< 申命記 11 >

1 「你要愛耶和華-你的上帝,常守他的吩咐、律例、典章、誡命。
Boye, okolinga Yawe, Nzambe na yo, mpe okobatela tango nyonso malako na Ye, bikateli na Ye mpe mitindo na Ye.
2 你們今日當知道,我本不是和你們的兒女說話;因為他們不知道,也沒有看見耶和華-你們上帝的管教、威嚴、大能的手,和伸出來的膀臂,
Nazali koloba na bana na bino te oyo batikalaki te koyeba to komona nyonso wana, kasi na bino oyo bozali awa lelo ete bobosanaka te malako ya Yawe, Nzambe na bino, monene na Ye, nguya na Ye,
3 並他在埃及中向埃及王法老和其全地所行的神蹟奇事;
bilembo mpe bikamwa oyo asalaki kati na Ejipito, epai ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe epai ya mokili na ye mobimba,
4 也沒有看見他怎樣待埃及的軍兵、車馬,他們追趕你們的時候,耶和華怎樣使紅海的水淹沒他們,將他們滅絕,直到今日,
makambo oyo asalaki na mampinga ya Ejipito, na bampunda mpe bashar na yango, ndenge azindisaki yango kati na Ebale monene ya barozo, tango ezalaki kolanda bino, mpe ndenge nini Yawe alimwisaki yango libela;
5 並他在曠野怎樣待你們,以致你們來到這地方;
makambo oyo asalelaki bino kati na esobe kino bokoma na esika oyo,
6 也沒有看見他怎樣待呂便子孫以利押的兒子大坍、亞比蘭,地怎樣在以色列人中間開口,吞了他們和他們的家眷,並帳棚與跟他們的一切活物。
makambo oyo asalaki na Datani mpe Abirami, bana mibali ya Eliabi, na libota ya Ribeni, tango mabele efungolaki monoko na yango mpe emelaki bango elongo na mabota na bango, bandako na bango mpe bato nyonso oyo bazalaki sima na bango kati na Isalaele mobimba.
7 惟有你們親眼看見耶和華所做的一切大事。」
Ezali bino nde bato bomonaki na miso na bino moko makambo nyonso ya minene oyo Yawe asalaki.
8 「所以,你們要守我今日所吩咐的一切誡命,使你們膽壯,能以進去,得你們所要得的那地,
Yango wana, bobatela mibeko nyonso oyo napesi bino lelo mpo ete bozala makasi mpe bokoka kobotola mokili oyo bolingi kokota mpo na kozwa
9 並使你們的日子在耶和華向你們列祖起誓、應許給他們和他們後裔的地上得以長久;那是流奶與蜜之地。
mpe kowumela mingi kati na mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na bino mpe epai ya bakitani na bango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi.
10 你要進去得為業的那地,本不像你出來的埃及地。你在那裏撒種,用腳澆灌,像澆灌菜園一樣。
Mokili oyo ozali kokota mpo na kozwa ekokani te na mokili ya Ejipito epai wapi bowutaki. Kuna, bozalaki kolona bambuma mpe koyeisa mayi na bilanga na kosalaka banzela ya mayi na makolo na bino.
11 你們要過去得為業的那地乃是有山有谷、雨水滋潤之地,
Kasi mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa ezali mokili ya bangomba mpe ya mabwaku, mokili oyo mvula enokaka wuta na likolo.
12 是耶和華-你上帝所眷顧的;從歲首到年終,耶和華-你上帝的眼目時常看顧那地。
Ezali mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, abatelaka; miso ya Yawe, Nzambe na yo, ezalaka tango nyonso likolo na yango wuta na ebandeli kino na suka ya mobu.
13 「你們若留意聽從我今日所吩咐的誡命,愛耶和華-你們的上帝,盡心盡性事奉他,
Soki bokotosa na boyengebene mibeko oyo napesi bino lelo ya kolinga Yawe, Nzambe na bino, mpe ya kosalela Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba,
14 他必按時降秋雨春雨在你們的地上,使你們可以收藏五穀、新酒,和油,
nakonokisa kati na mokili na bino mvula na tango na yango, mvula ya ebandeli ya eleko mpe mvula ya suka ya eleko, mpo ete bokoka kobuka mbuma ya malamu, bokoka kozwa vino ya sika mpe mafuta.
15 也必使你吃得飽足,並使田野為你的牲畜長草。
Nakokolisa matiti kati na bilanga mpo na bibwele na bino mpe bokolia mpe bokotonda.
16 你們要謹慎,免得心中受迷惑,就偏離正路,去事奉敬拜別神。
Bosala keba ete bokosama te mpe bopengwa te na kogumbamelaka banzambe mosusu mpe na kofukamelaka yango,
17 耶和華的怒氣向你們發作,就使天閉塞不下雨,地也不出產,使你們在耶和華所賜給你們的美地上速速滅亡。
noki te Yawe akosilikela bino, akokanga likolo mpo ete enokisa lisusu mvula te mpe mabele ekobota lisusu te mbuma na yango; na bongo bokolimwa kati na mokili ya malamu oyo Yawe apesi bino.
18 「你們要將我這話存在心內,留在意中,繫在手上為記號,戴在額上為經文;
Bobatela malamu kati na mitema mpe milimo na bino maloba na ngai oyo, bokanga yango na maboko na bino lokola bilembo, mpe botia yango na bilongi na bino lokola elembo.
19 也要教訓你們的兒女,無論坐在家裏,行在路上,躺下,起來,都要談論;
Boteya yango na bana na bino na kolobelaka bango yango tango bovandi kati na bandako mpe tango bozali kotambola na nzela, tango bolali pongi mpe tango bolamuki.
20 又要寫在房屋的門框上,並城門上,
Bokoma yango na makonzi ya bandako na bino mpe na bikuke na bino
21 使你們和你們子孫的日子在耶和華向你們列祖起誓、應許給他們的地上得以增多,如天覆地的日子那樣多。
mpo ete mikolo na bino mpe mikolo ya bakitani na bino ezala ebele kati na mokili oyo Yawe alakaki kopesa epai ya bakoko na bino na nzela na ndayi tango nyonso oyo mokili ekowumela.
22 你們若留意謹守遵行我所吩咐這一切的誡命,愛耶和華-你們的上帝,行他的道,專靠他,
Soki bobateli malamu mibeko nyonso oyo napesi bino mpo na kosalela, na kolingaka Yawe, Nzambe na bino, na kotambolaka na banzela na Ye nyonso mpe na kokangamaka na Ye;
23 他必從你們面前趕出這一切國民,就是比你們更大更強的國民,你們也要得他們的地。
wana Yawe akobengana liboso na bino bikolo oyo nyonso, mpe bokobotola bikolo oyo eleki bino na monene mpe na makasi.
24 凡你們腳掌所踏之地都必歸你們;從曠野和黎巴嫩,並幼發拉底大河,直到西海,都要作你們的境界。
Esika nyonso makolo na bino ekonyata, ekozala ya bino. Mokili na bino ekobanda wuta na esobe kino na Libani, wuta na Ebale Efrate kino na este ya Ebale monene.
25 必無一人能在你們面前站立得住;耶和華-你們的上帝必照他所說的,使懼怕驚恐臨到你們所踏之地的居民。
Moto moko te akolonga kotelemela bino. Ndenge Yawe Nzambe alakaki bino, akotia somo mpe kobanga kati na mokili mobimba, na esika nyonso oyo bokokende.
26 「看哪,我今日將祝福與咒詛的話都陳明在你們面前。
Tala, natie lelo liboso na bino mapamboli mpe bilakeli mabe.
27 你們若聽從耶和華-你們上帝的誡命,就是我今日所吩咐你們的,就必蒙福。
Mapamboli, soki botosi mibeko ya Yawe, Nzambe na bino, oyo napesi bino lelo;
28 你們若不聽從耶和華-你們上帝的誡命,偏離我今日所吩咐你們的道,去事奉你們素來所不認識的別神,就必受禍。
bilakeli mabe, soki boboyi kotosa mibeko ya Yawe, Nzambe na bino, mpe bopengwi na nzela oyo natindi bino lelo, na kosalelaka banzambe mosusu oyo bino botikalaki koyeba te.
29 及至耶和華-你的上帝領你進入要去得為業的那地,你就要將祝福的話陳明在基利心山上,將咒詛的話陳明在以巴路山上。
Tango Yawe, Nzambe na bino, akokotisa bino na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa, bosengeli kotatola mapamboli na ngomba Garizimi, mpe bilakeli mabe, na ngomba Ebali.
30 這二山豈不是在約旦河那邊,日落之處,在住亞拉巴的迦南人之地與吉甲相對,靠近摩利橡樹嗎?
Bangomba nyonso mibale ezali na ngambo mosusu ya Yordani, ngambo ya weste, na mokili ya bato ya Kanana oyo bavandaka na etando ya Yordani, etalana na Giligali, pembeni ya banzete minene ya More.
31 你們要過約旦河,進去得耶和華-你們上帝所賜你們為業之地,在那地居住。
Kala mingi te, bokokatisa Yordani mpo na kokota mpe kozwa mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa bino. Tango bokobotola yango mpe bokowumela kati na yango,
32 你們要謹守遵行我今日在你們面前所陳明的一切律例典章。」
bosala keba ete botosa bikateli nyonso mpe mibeko nyonso oyo nazali kotia liboso na bino lelo.

< 申命記 11 >