< 撒迦利亚书 3 >

1 天使又指给我看:大祭司约书亚站在耶和华的使者面前;撒但也站在约书亚的右边,与他作对。
Yawe alakisaki ngai Jozue, mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo azalaki ya kotelema liboso ya Anjelu ya Yawe. Alakisaki ngai lisusu Satana oyo azalaki ya kotelema na ngambo ya loboko ya mobali ya Jozue mpo na kofunda ye.
2 耶和华向撒但说:“撒但哪,耶和华责备你!就是拣选耶路撒冷的耶和华责备你!这不是从火中抽出来的一根柴吗?”
Yawe alobaki na Satana: — Satana, tika ete Yawe apamela yo! Tika ete Yawe oyo apona Yelusalemi apamela yo! Boni, moto oyo azali te lokola koni ya moto oyo balongoli na moto?
3 约书亚穿着污秽的衣服站在使者面前。
Nzokande, Jozue alataki bilamba ya salite tango atelemaki liboso ya Anjelu.
4 使者吩咐站在面前的说:“你们要脱去他污秽的衣服”;又对约书亚说:“我使你脱离罪孽,要给你穿上华美的衣服。”
Bongo Anjelu alobaki na ba-oyo bazalaki kotelema liboso na ye: — Bolongola ye bilamba wana ya salite! Mpe alobaki na Jozue: — Tala, nalongoli masumu na yo mpe nakolatisa yo bilamba ya talo.
5 我说:“要将洁净的冠冕戴在他头上。”他们就把洁净的冠冕戴在他头上,给他穿上华美的衣服,耶和华的使者在旁边站立。
Nalobaki: — Bolatisa ye kitendi ya peto oyo bakangaka na moto. Boye, bakangaki ye kitendi ya peto na moto mpe balatisaki ye bilamba mosusu wana Anjelu ya Yawe atelemaki pene na ye.
6 耶和华的使者告诫约书亚说:
Anjelu ya Yawe ayebisaki na Jozue maloba oyo:
7 “万军之耶和华如此说:你若遵行我的道,谨守我的命令,你就可以管理我的家,看守我的院宇;我也要使你在这些站立的人中间来往。
— Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Soki otamboli na nzela na Ngai mpe obateli mitindo na Ngai, okokamba ndako na Ngai mpe okobatela lopango na Ngai, mpe nakotia yo na molongo ya ba-oyo batelemaka awa.
8 大祭司约书亚啊,你和坐在你面前的同伴都当听。(他们是作预兆的。)我必使我仆人大卫的苗裔发出。
Jozue, mokonzi ya Banganga-Nzambe, yo elongo na bandeko na yo, Banganga-Nzambe oyo basalaka elongo na yo, bozali bilembo oyo etalisaka makambo oyo ekoya. Nakobimisa Mosali na Ngai; bakobenga Ye: Moto ya nzete oyo ebimaka na mobimbi.
9 看哪,我在约书亚面前所立的石头,在一块石头上有七眼。万军之耶和华说:我要亲自雕刻这石头,并要在一日之间除掉这地的罪孽。
Tala, natie libanga liboso ya Jozue. Libanga yango ezali na miso sambo, nakokoma makomi na likolo na yango, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « mpe nakolongola masumu ya mokili oyo na mokolo moko.
10 当那日,你们各人要请邻舍坐在葡萄树和无花果树下。这是万军之耶和华说的。”
Na mokolo wana, moko na moko kati na bino akobengisa moninga na ye mpo ete bavanda na se ya nzete ya vino mpe ya figi, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.

< 撒迦利亚书 3 >