< 撒迦利亚书 1 >
1 大流士王第二年八月,耶和华的话临到易多的孙子、比利家的儿子先知撒迦利亚,说:
Na sanza ya mwambe, na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, Yawe alobaki na mosakoli Zakari, mwana mobali ya Barashi, mwana mobali ya Ido:
— Yawe atombokelaki bakoko na bino makasi.
3 所以你要对以色列人说,万军之耶和华如此说:你们要转向我,我就转向你们。这是万军之耶和华说的。
Yango wana, loba na bato oyo: « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: ‹ Bozonga epai na Ngai, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, ‹ mpe Ngai nakozonga epai na bino, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
4 不要效法你们列祖。从前的先知呼叫他们说,万军之耶和华如此说:‘你们要回头离开你们的恶道恶行。’他们却不听,也不顺从我。这是耶和华说的。
Bozala te lokola bakoko na bino, epai ya banani basakoli ya tango ya kala balobaki: Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: ‹ Botika banzela mabe mpe misala na bino ya mabe, bozonga epai na Ngai! › Kasi basalaki keba te na maloba na Ngai, mpe batosaki Ngai te, elobi Yawe.
Wapi sik’oyo bakoko na bino? Boni, basakoli yango bazali kaka na bomoi kino na mokolo ya lelo?
6 只是我的言语和律例,就是所吩咐我仆人众先知的,岂不临到你们列祖吗?他们就回头,说:‘万军之耶和华定意按我们的行动作为向我们怎样行,他已照样行了。’”
Maloba mpe malako na Ngai, oyo napesaki na nzela ya basakoli, basali na Ngai, ekomelaki bakoko na bino te? Solo, ekomelaki bango, babongolaki mitema mpe balobaki: ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga, asaleli biso kolanda banzela mpe misala na biso, asali ndenge kaka akanaki kosala. › »
7 大流士第二年十一月,就是细罢特月二十四日,耶和华的话临到易多的孙子、比利家的儿子先知撒迦利亚,说:
Na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya zomi na moko, sanza ya shebati, na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Zakari, mwana mobali ya Barashi, mwana mobali ya Ido.
8 “我夜间观看,见一人骑着红马,站在洼地番石榴树中间。在他身后又有红马、黄马,和白马。”
Na butu, nazwaki emoniseli moko: namonaki liboso na ngai moto moko azali kotambolisa mpunda moko ya langi ya motane; moto yango atelemaki kati na banzete ya mirite oyo ezalaki kati na lubwaku. Na sima na ye, ezalaki na bampunda mosusu ya langi ya motane, ya shokola mpe ya pembe.
9 我对与我说话的天使说:“主啊,这是什么意思?”他说:“我要指示你这是什么意思。”
Natunaki: — Nkolo na ngai, bampunda oyo elingi kolakisa nini? Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai azongisaki: — Nakolakisa yo tina na yango.
10 那站在番石榴树中间的人说:“这是奉耶和华差遣在遍地走来走去的。”
Moto oyo azalaki kati na banzete ya mirite alimbolaki: — Ezali bato oyo Yawe atindaki mpo na kotambola na mabele.
11 那些骑马的对站在番石榴树中间耶和华的使者说:“我们已在遍地走来走去,见全地都安息平静。”
Bato yango bayebisaki Anjelu ya Yawe, oyo atelemaki kati na banzete ya mirite: — Towuti kotambola na mabele mpe tokuti kimia mpe bopemi na mokili mobimba.
12 于是,耶和华的使者说:“万军之耶和华啊,你恼恨耶路撒冷和犹大的城邑已经七十年,你不施怜悯要到几时呢?”
Anjelu ya Yawe alobaki: — Yawe, Mokonzi ya mampinga, kino tango nini okoboya koyokela engumba Yelusalemi mawa mpe bingumba mosusu ya Yuda, bingumba oyo okangela kanda mibu tuku sambo mobimba?
13 耶和华就用美善的安慰话回答那与我说话的天使。
Yawe abimisaki maloba ya kimia mpe ya kobondisa, na monoko ya Anjelu oyo azalaki koloba na ngai.
14 与我说话的天使对我说:“你要宣告说,万军之耶和华如此说:我为耶路撒冷为锡安,心里极其火热。
Bongo Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai alobaki: — Tatola maloba oyo: « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: ‹ Nazali na zuwa makasi mpo na Yelusalemi mpe Siona.
15 我甚恼怒那安逸的列国,因我从前稍微恼怒我民,他们就加害过分。
Kasi nazali na kanda makasi mpo na bikolo oyo emonaka ete emikoka. Nazalaki kaka na kanda moke mpo na bato na Ngai, kasi bango bayei nde kobakisela bato na Ngai pasi. › »
16 所以耶和华如此说:现今我回到耶路撒冷,仍施怜悯,我的殿必重建在其中,准绳必拉在耶路撒冷之上。这是万军之耶和华说的。
Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi: « Nakozonga na Yelusalemi mpo na koyokela bango mawa; mpe kuna, bakotonga lisusu Tempelo na Ngai mpe bakosalela kati na Yelusalemi singa oyo bamekelaka molayi, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
17 你要再宣告说,万军之耶和华如此说:我的城邑必再丰盛发达。耶和华必再安慰锡安,拣选耶路撒冷。”
Tatola lisusu: « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: ‹ Bingumba na Ngai ekotondisama lisusu na bomengo, Yawe akobondisa lisusu Siona mpe akopona Yelusalemi. › »
Bongo natombolaki miso mpe namonaki maseke minei liboso na ngai.
19 我就问与我说话的天使说:“这是什么意思?”他回答说:“这是打散犹大、以色列,和耶路撒冷的角。”
Natunaki Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai: — Maseke wana elakisi nini? Azongiselaki ngai: — Maseke wana ezali bikolo ya nguya oyo epanzaki Yuda, Isalaele mpe Yelusalemi.
Yawe alakisaki ngai bato minei ya misala ya maboko.
21 我说:“他们来做什么呢?”他说:“这是打散犹大的角,使人不敢抬头;但这些匠人来威吓列国,打掉他们的角,就是举起打散犹大地的角。”
Natunaki: — Bato oyo bayei kosala nini? Azongisaki: — Ezali maseke oyo eyaki kopanza Yuda mpo ete moto moko te akoka kotombola moto, kasi bato oyo ya misala ya maboko bayei nde kolengisa bango mpe kokweyisa nguya ya bikolo oyo etombolaki maseke na yango mpo na kobundisa Yuda mpe kopanza bato na yango.