< 雅歌 7 >

1 王女啊,你的脚在鞋中何其美好! 你的大腿圆润,好像美玉, 是巧匠的手做成的。
Oh elenge mwasi ya lokumu! Makolo na yo ebimaka kitoko soki olati basandale. Zingazinga ya loketo na yo ezali lokola lopete oyo esalemi na maboko ya basali bikeko.
2 你的肚脐如圆杯, 不缺调和的酒; 你的腰如一堆麦子, 周围有百合花。
Motolu na yo ezali lokola kopo ya kitoko oyo ezangaka vino ya kitoko te. Libumu na yo ezali lokola mopiku ya ble oyo ezingami na fololo oyo babengaka lisi.
3 你的两乳好像一对小鹿, 就是母鹿双生的。
Mabele na yo nyonso mibale ezali lokola bana mapasa mibale ya mboloko.
4 你的颈项如象牙台; 你的眼目像希实本、巴特·拉并门旁的水池; 你的鼻子仿佛朝大马士革的黎巴嫩塔。
Kingo na yo ezali lokola ndako molayi oyo batonga na pembe ya nzoko. Miso na yo ezali lokola maziba ya engumba Eshiboni, pembeni ya ekuke ya Bati-Rabimi. Zolo na yo ezali lokola ndako molayi ya Libani oyo etalani na Damasi.
5 你的头在你身上好像迦密山; 你头上的发是紫黑色; 王的心因这下垂的发绺系住了。
Moto na yo ezali lokola ngomba Karimeli, mpe suki ya moto na yo ezali lokola elamba ya motane; mokonzi akangami na mazita na yango.
6 我所爱的,你何其美好! 何其可悦,使人欢畅喜乐!
Oh tala ndenge ozali penza kitoko! Bolingo na ngai, osalaka esengo ya motema na ngai; kitoko na yo esalaka ngai esengo na motema!
7 你的身量好像棕树; 你的两乳如同其上的果子,累累下垂。
Molayi na yo ezali lokola nzete ya mbila, mabele na yo ezali lokola maboke ya bambuma.
8 我说:我要上这棕树,抓住枝子。 愿你的两乳好像葡萄累累下垂, 你鼻子的气味香如苹果;
Namilobeli: « Nakomata na nzete ya mbila, nakobuka bambuma na yango! » Tika ete mabele na yo ezala lokola maboke ya bambuma ya vino! Tika ete solo ya monoko na yo ezala lokola bapome!
9 你的口如上好的酒。 〔新娘〕 女子说:为我的良人下咽舒畅, 流入睡觉人的嘴中。
Mpe tika ete monoko na yo ezala lokola vino ya kitoko koleka! Tika ete vino yango esopanela bolingo na ngai na pete, eleka na bibebu ya bato oyo bazali kolala.
10 我属我的良人, 他也恋慕我。
Ngai, nazali ya mobali na ngai; mpe ye, azalaka kaka na posa na ngai.
11 我的良人,来吧! 你我可以往田间去; 你我可以在村庄住宿。
Yaka, mobali na ngai; tika ete tokende na biso na elanga, tolekisa butu na biso kati na mboka!
12 我们早晨起来往葡萄园去, 看看葡萄发芽开花没有, 石榴放蕊没有; 我在那里要将我的爱情给你。
Na tongo, tokokende na bilanga ya vino mpo na kotala soki banzete ya vino ebandi kobimisa bafololo, soki mito na yango efungwami, mpe soki banzete ya bambuma ya grenade ebimisi bafololo. Kuna nde nakopesa yo babeze na ngai.
13 风茄放香, 在我们的门内有各样新陈佳美的果子; 我的良人,这都是我为你存留的。
Bambuma ya mandragore ezali kobimisa solo na yango; mpe na ekuke na biso, tozali na bambuma nyonso ya kitoko: ezala ya sika to ya kala, oyo nabombeli yo, mobali na ngai ya motema.

< 雅歌 7 >