< 诗篇 34 >

1 大卫在亚比米勒面前装疯,被他赶出去,就作这诗。 我要时时称颂耶和华; 赞美他的话必常在我口中。
Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango akosanaki liboma liboso ya Abimeleki oyo abenganaki ye, mpe akendeki. Nakopambola Yawe tango nyonso, nakokumisa Ye mikolo nyonso na bibebu na ngai.
2 我的心必因耶和华夸耀; 谦卑人听见就要喜乐。
Tika ete bomoi na ngai emikumisa kati na Yawe; tika ete banyokolami bayoka mpe basepela!
3 你们和我当称耶和华为大, 一同高举他的名。
Boya kosakola elongo na ngai ete Yawe azali monene! Tonetola Kombo na Ye, biso nyonso.
4 我曾寻求耶和华,他就应允我, 救我脱离了一切的恐惧。
Nalukaki Yawe, mpe ayanolaki ngai; akangolaki ngai na somo na ngai nyonso.
5 凡仰望他的,便有光荣; 他们的脸必不蒙羞。
Bato oyo batalaka epai na Ye bangengaka na esengo, mpe bayokisamaka soni ata moke te.
6 我这困苦人呼求,耶和华便垂听, 救我脱离一切患难。
Mobola agangaki, mpe Yawe ayokaka ye; abikisaki ye na pasi na ye nyonso.
7 耶和华的使者在敬畏他的人四围安营, 搭救他们。
Anjelu ya Yawe atongaka molako na ye zingazinga ya bato oyo batosaka Yawe, mpe akangolaka bango.
8 你们要尝尝主恩的滋味,便知道他是美善; 投靠他的人有福了!
Bomeka elengi mpe botala ndenge nini Yawe azali malamu; Esengo na moto oyo azwaka Yawe lokola ebombamelo na ye!
9 耶和华的圣民哪,你们当敬畏他, 因敬畏他的一无所缺。
Bino basantu ya Yawe, botosa Yawe; pamba te bato oyo batosaka Ye bazangaka eloko moko te.
10 少壮狮子还缺食忍饿, 但寻求耶和华的什么好处都不缺。
Bana ya nkosi ezangaka mpe ekufaka nzala, kasi bato oyo balukaka Yawe bakozanga eloko moko.
11 众弟子啊,你们当来听我的话! 我要将敬畏耶和华的道教训你们。
Bana na ngai, boya, boyoka ngai; Nakolakisa bino kotosa Yawe.
12 有何人喜好存活, 爱慕长寿,得享美福,
Nani asepelaka na bomoi? Nani alingaka kobika mikolo ebele ya esengo?
13 就要禁止舌头不出恶言, 嘴唇不说诡诈的话。
Batela lolemo na yo mosika na mabe, mpe bibebu na yo ete eloba lokuta te.
14 要离恶行善, 寻求和睦,一心追赶。
Zala mosika na mabe mpe sala bolamu, luka kimia mpe koba na yango.
15 耶和华的眼目看顾义人; 他的耳朵听他们的呼求。
Miso ya Yawe etalaka bato ya sembo, mpe matoyi na Ye eyokaka koganga na bango;
16 耶和华向行恶的人变脸, 要从世上除灭他们的名号。
kasi Yawe apesaka bato mabe mokongo mpo ete bakanisa bango lisusu te kati na mokili.
17 义人呼求,耶和华听见了, 便救他们脱离一切患难。
Tango bato ya sembo babelelaka, Yawe ayokaka mpe akangolaka bango na pasi na bango nyonso.
18 耶和华靠近伤心的人, 拯救灵性痛悔的人。
Yawe azali pene ya bato oyo bazoki na mitema mpe abikisaka ba-oyo balembi na milimo na bango.
19 义人多有苦难, 但耶和华救他脱离这一切,
Pasi mingi ekangaka moto ya sembo, kasi Yawe akangolaka ye na nyonso,
20 又保全他一身的骨头, 连一根也不折断。
abatelaka mikuwa na ye nyonso mpo ete moko te kati na yango ebukana.
21 恶必害死恶人; 恨恶义人的,必被定罪。
Mabe ebomaka moto mabe, mpe bayini ya moto ya sembo bakozwa etumbu.
22 耶和华救赎他仆人的灵魂; 凡投靠他的,必不致定罪。
Yawe akangolaka bomoi ya basali na Ye; mpe bato nyonso oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango bakozwa etumbu te.

< 诗篇 34 >