< 诗篇 140 >

1 大卫的诗,交与伶长。 耶和华啊,求你拯救我脱离凶恶的人, 保护我脱离强暴的人!
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Yawe, kangola ngai wuta na maboko ya bato ya misala mabe! Kokutanisa ngai te na bato na kanza.
2 他们心中图谋奸恶, 常常聚集要争战。
Basalaka mabongisi mabe kati na mitema na bango mpe balukaka bitumba mikolo nyonso.
3 他们使舌头尖利如蛇, 嘴里有虺蛇的毒气。 (细拉)
Bapelisaka lolemo na bango lokola nyoka, bibebu na bango ezali na ngenge ya etupa.
4 耶和华啊,求你拯救我脱离恶人的手, 保护我脱离强暴的人! 他们图谋推我跌倒。
Yawe, batela ngai mosika ya maboko ya moto mabe; kokutanisa ngai te na bato na kanza oyo bazali kosala mabongisi ya kokweyisa ngai!
5 骄傲人为我暗设网罗和绳索; 他们在路旁铺下网,设下圈套。 (细拉)
Bato ya lofundu batieli ngai mitambo, batandi basinga ya minyama na nzela mpe batimoli mabulu mpo na kokanga ngai.
6 我曾对耶和华说:你是我的 神。 耶和华啊,求你留心听我恳求的声音!
Nalobaka na Yawe: « Ozali Nzambe na ngai! » Yawe, yoka mabondeli na ngai.
7 主—耶和华、我救恩的力量啊, 在争战的日子,你遮蔽了我的头。
Oh Yawe, Nkolo na ngai, ozali makasi ya lobiko na ngai, obatelaka moto na ngai kati na mokolo ya etumba.
8 耶和华啊,求你不要遂恶人的心愿; 不要成就他们的计谋,恐怕他们自高。 (细拉)
Yawe, kokokisa te posa ya moto mabe, kolongisa te mabongisi na ye, noki te akokoma lolendo.
9 至于那些昂首围困我的人, 愿他们嘴唇的奸恶陷害自己!
Tika ete pasi oyo bibebu na bango esili kobongisa ekweyela bato oyo bazingeli ngai.
10 愿火炭落在他们身上! 愿他们被丢在火中, 抛在深坑里,不能再起来。
Tika ete makala ya moto esopanela bango! Tika ete Nzambe atindika bango kati na moto, kati na mabulu ya potopoto epai wapi bakokoka kotelema lisusu te!
11 说恶言的人在地上必坚立不住; 祸患必猎取强暴的人,将他打倒。
Batioli bakowumela te kati na mokili, pasi ekolanda bato na kanza na kolemba te.
12 我知道耶和华必为困苦人伸冤, 必为穷乏人辨屈。
Nayebi ete Yawe akotaka makambo ya babola mpe alongisaka bato oyo bakelela.
13 义人必要称赞你的名; 正直人必住在你面前。
Solo, bato ya sembo bakosanzola Kombo na Yo, bato ya alima bakovanda liboso na Yo.

< 诗篇 140 >