< 诗篇 139 >

1 大卫的诗,交与伶长。 耶和华啊,你已经鉴察我,认识我。
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Yawe, omonaka mozindo ya bomoi na ngai mpe oyebi ngai malamu;
2 我坐下,我起来,你都晓得; 你从远处知道我的意念。
oyebi tango navandaka mpe tango natelemaka. Liboso na ngai kokanisa, ososolaka mabongisi na ngai;
3 我行路,我躺卧,你都细察; 你也深知我一切所行的。
omonaka tango natambolaka mpe tango nalalaka, oyebi mozindo ya banzela na ngai nyonso.
4 耶和华啊,我舌头上的话, 你没有一句不知道的。
Pamba te, oh Yawe, liboso ete liloba ekoma na lolemo na ngai, omiyebelaka yango.
5 你在我前后环绕我, 按手在我身上。
Ozali pene ngai, na liboso mpe na sima, mpe osimbi ngai na loboko na Yo.
6 这样的知识奇妙,是我不能测的, 至高,是我不能及的。
Solo, boyebi oyo ya kokamwa elekelaka ngai, ezali likolo makasi, nakoki kososola yango te.
7 我往哪里去躲避你的灵? 我往哪里逃、躲避你的面?
Nakende wapi mpo na kokima Molimo na Yo? Nakima wapi mpo na kozala mosika na Yo?
8 我若升到天上,你在那里; 我若在阴间下榻,你也在那里。 (Sheol h7585)
Soki namati na likolo, ozali kuna; soki nakeyi na mboka ya bakufi, ozali lisusu kuna. (Sheol h7585)
9 我若展开清晨的翅膀, 飞到海极居住,
Soki nazwi mapapu ya lipekapeka mpo na kokende kovanda mosika ya ebale monene,
10 就是在那里,你的手必引导我; 你的右手也必扶持我。
kuna mpe loboko na Yo ekotambolisa ngai, loboko na Yo ya mobali ekosimba ngai makasi.
11 我若说:黑暗必定遮蔽我, 我周围的亮光必成为黑夜;
Soki nalobi: « Tembe te, molili ekobomba ngai penza; tika ete pole ekoma butu zingazinga na ngai! »
12 黑暗也不能遮蔽我,使你不见, 黑夜却如白昼发亮。 黑暗和光明,在你看都是一样。
Epai na Yo, butu ezalaka molili te, butu ezalaka na pole lokola moyi, pole mpe molili ezali ndenge moko.
13 我的肺腑是你所造的; 我在母腹中,你已覆庇我。
Ezali Yo nde okelaki mozindo ya bomoto na ngai, obombaki ngai kati na libumu ya mama na ngai.
14 我要称谢你,因我受造,奇妙可畏; 你的作为奇妙,这是我心深知道的。
Nasanzolaka Yo, pamba te osala ngai kitoko makasi. Misala na Yo ezali ya kokamwa; ngai, nayebi yango malamu.
15 我在暗中受造,在地的深处被联络; 那时,我的形体并不向你隐藏。
Na miso na Yo, nzoto na ngai ezalaki ya kobombama te tango osalaki ngai na esika ebombama, tango otongaki ngai kati na mozindo ya mabele.
16 我未成形的体质,你的眼早已看见了; 你所定的日子,我尚未度一日, 你都写在你的册上了。
Tango nazalaki nanu na lolenge te, ozalaki komona ngai; mpe omikomelaki kati na buku na Yo mikolo nyonso oyo obongisaki mpo na bomoi na ngai liboso ete moko te kati na yango ezala.
17 神啊,你的意念向我何等宝贵! 其数何等众多!
Oh Nzambe, tala ndenge ezali pasi mpo na ngai kososola makanisi na Yo! Tala ndenge motango na yango ezali ebele!
18 我若数点,比海沙更多; 我睡醒的时候,仍和你同在。
Nameki kotanga yango, ezali ebele koleka motango ya bambuma ya zelo. Nalamuki, nazali kaka elongo na Yo.
19 神啊,你必要杀戮恶人; 所以,你们好流人血的,离开我去吧!
Oh Nzambe, soki kaka ozalaki na Yo koboma moto mabe! Bino basopi makila ya bato, bokende mosika na ngai!
20 因为他们说恶言顶撞你; 你的仇敌也妄称你的名。
Bayini na Yo basalelaka Kombo na Yo mpo na kosala mabongisi ya mabe, batangaka Kombo na Yo mpo na kokosa.
21 耶和华啊,恨恶你的,我岂不恨恶他们吗? 攻击你的,我岂不憎嫌他们吗?
Yawe, ndenge nini nayina te banguna na Yo, ndenge nini nayoka batelemeli na Yo nkele te?
22 我切切地恨恶他们, 以他们为仇敌。
Nayinaka bango makasi; nazwaka bango lokola banguna na ngai.
23 神啊,求你鉴察我,知道我的心思, 试炼我,知道我的意念,
Oh Nzambe, kundola mpe yeba mozindo ya motema na ngai, meka ngai mpe yeba makambo oyo ezali kotungisa ngai!
24 看在我里面有什么恶行没有, 引导我走永生的道路。
Tala soki nazali kotambola na nzela mabe mpe tambolisa ngai na nzela ya tango nyonso!

< 诗篇 139 >