< 民数记 35 >

1 耶和华在摩押平原—约旦河边、耶利哥对面晓谕摩西说:
Yawe alobaki na Moyize kati na etando ya Moabi, pembeni ya Yordani oyo etalani na Jeriko:
2 “你吩咐以色列人,要从所得为业的地中把些城给利未人居住,也要把这城四围的郊野给利未人。
« Pesa mitindo na bana ya Isalaele ete bapesa na Balevi, wuta na libula oyo bakozwa, bingumba ya kovanda elongo na mabele oyo ezali zingazinga na yango.
3 这城邑要归他们居住,城邑的郊野可以牧养他们的牛羊和各样的牲畜,又可以安置他们的财物。
Bingumba ekozala mpo na kovanda, mpe mabele ya zingazinga mpo na bibwele na bango, bisalelo na bango mpe banyama na bango nyonso.
4 你们给利未人的郊野,要从城根起,四围往外量一千肘。
Mabele ya zingazinga ya bingumba oyo bokopesa na Balevi ekozala etando ya bametele pene nkama mitano kobanda na mir ya engumba.
5 另外东量二千肘,南量二千肘,西量二千肘,北量二千肘,为边界,城在当中;这要归他们作城邑的郊野。
Na libanda ya engumba, bokozwa etando ya bametele pene nkoto moko na ngambo ya este, nkoto moko na ngambo ya weste, nkoto moko na ngambo ya nor mpe nkoto moko na ngambo ya sude; mpe engumba ekozala na kati-kati. Yango nde ekozala mabele na bango ya zingazinga.
6 你们给利未人的城邑,其中当有六座逃城,使误杀人的可以逃到那里。此外还要给他们四十二座城。
Bokobongisa mpo na Balevi bingumba motoba ya kokimela mpo ete moto oyo abomi moninga na nko te akoka kokima kuna; bokobakisa bingumba mosusu tuku minei na mibale.
7 你们要给利未人的城,共有四十八座,连城带郊野都要给他们。
Na nyonso, bokopesa na Balevi bingumba tuku minei na mwambe, moko na moko elongo na mabele na yango ya zingazinga.
8 以色列人所得的地业从中要把些城邑给利未 人;人多的就多给,人少的就少给;各支派要按所承受为业之地把城邑给利未人。”
Mpo na bingumba oyo bokopesa na Balevi wuta na libula ya mabele ya bana ya Isalaele, bosengeli kozwa yango kolanda bozwi ya libota moko na moko: libota oyo ezali na bingumba ebele ekopesa mpe bingumba ebele; libota oyo ezali na bingumba moke ekopesa mpe bingumba moke. »
9 耶和华晓谕摩西说:
Yawe alobaki na Moyize:
10 “你吩咐以色列人说:你们过约旦河,进了迦南地,
« Loba na bana ya Isalaele: ‹ Tango bokokatisa Yordani mpo na kokota na Kanana,
11 就要分出几座城,为你们作逃城,使误杀人的可以逃到那里。
bokopona bingumba ya kokimela mpo ete moto oyo akoboma moto na nko te akoka kokima kuna.
12 这些城可以作逃避报仇人的城,使误杀人的不至于死,等他站在会众面前听审判。
Bingumba yango ekozala ekimelo mpo na bino liboso ya mobukanisi makila; na bongo mobomi akokufa te soki asambi nanu te na miso ya lisanga.
13 你们所分出来的城,要作六座逃城。
Kati na bingumba oyo bokopesa, bingumba motoba ekozala ekimelo mpo na bino:
14 在约旦河东要分出三座城,在迦南地也要分出三座城,都作逃城。
misato na ngambo ya Yordani, mpe misato kati na Kanana. Ekozala bingumba ya kokimela.
15 这六座城要给以色列人和他们中间的外人,并寄居的,作为逃城,使误杀人的都可以逃到那里。
Bingumba nyonso motoba ekozala ekimelo mpo na bana ya Isalaele mpe mpo na bapaya oyo bakozala kati na bino. Boye moto nyonso oyo akoboma moto na nko te akoki kokima kuna.
16 “倘若人用铁器打人,以致打死,他就是故杀人的;故杀人的必被治死。
Soki abeti moninga na ye libende, mpe moninga yango akufi, moto wana azali mobomi; basengeli koboma ye.
17 若用可以打死人的石头打死了人,他就是故杀人的;故杀人的必被治死。
Soki abeti moninga na ye libanga, mpe moninga yango akufi, moto wana azali mobomi; basengeli koboma ye.
18 若用可以打死人的木器打死了人,他就是故杀人的;故杀人的必被治死。
Soki abeti moninga na ye nzete, mpe moninga yango akufi, moto wana azali mobomi; basengeli koboma ye.
19 报血仇的必亲自杀那故杀人的,一遇见就杀他。
Ezali mobukanisi makila nde akoboma mobomi: akoboma ye tango kaka akokutana na ye.
20 人若因怨恨把人推倒,或是埋伏往人身上扔物,以致于死,
Soki abambi moninga na ye eloko na nko mpe moninga yango akufi
21 或是因仇恨用手打人,以致于死,那打人的必被治死。他是故杀人的;报血仇的一遇见就杀他。
to soki abeti moninga na ye likofi mpo ete alingaka ye te, mpe moninga yango akufi, moto wana azali mobomi; boye mobukanisi makila akoboma mobomi tango kaka akokutana na ye.
22 “倘若人没有仇恨,忽然将人推倒,或是没有埋伏把物扔在人身上,
Kasi soki moto atindiki moninga na ye na nko te to na kokana te, soki abambi ye eloko na makanisi mabe te,
23 或是没有看见的时候用可以打死人的石头扔在人身上,以致于死,本来与他无仇,也无意害他。
soki akweyiseli ye libanga na nko te mpe na kokana te, mpe moninga yango akufi,
24 会众就要照典章,在打死人的和报血仇的中间审判。
lisanga ekokata makambo oyo kolanda mibeko kati ya mobomi mpe mobukanisi makila.
25 会众要救这误杀人的脱离报血仇人的手,也要使他归入逃城。他要住在其中,直等到受圣膏的大祭司死了。
Lisanga ekokangola mobomi na maboko ya mobukanisi makila mpe ekozongisa ye kati na engumba ya kokimela epai wapi akimaki. Mobomi akovanda kuna kino na kufa ya mokonzi ya Banganga-Nzambe oyo bapakolaki mafuta ya bule.
26 但误杀人的,无论什么时候,若出了逃城的境外,
Nzokande soki mobomi alongwe na engumba ya kokimela epai wapi akimaki,
27 报血仇的在逃城境外遇见他,将他杀了,报血仇的就没有流血之罪。
mpe soki mobukanisi makila akutani na ye libanda ya engumba na ye ya kokimela mpe abomi ye, mobukanisi makila asali mabe te.
28 因为误杀人的该住在逃城里,等到大祭司死了。大祭司死了以后,误杀人的才可以回到他所得为业之地。
Pamba te mobomi asengeli kovanda kati na engumba na ye ya kokimela kino na kufa ya mokonzi ya Banganga-Nzambe. Ezali kaka sima ya kufa na ye nde akoki kozonga na mabele na ye.
29 这在你们一切的住处,要作你们世世代代的律例典章。
Mitindo oyo ekozala mibeko mpo na bino mpe mpo na bakitani na bino nyonso, na bisika nyonso oyo bokovanda.
30 “无论谁故杀人,要凭几个见证人的口把那故杀人的杀了,只是不可凭一个见证的口叫人死。
Tango nyonso oyo moto akoboma moninga na ye, bakoboma mobomi soki kaka batatoli ebele bafundi, pamba te litatoli ya moto moko ekoki te mpo na kokatela moto etumbu ya kufa.
31 故杀人、犯死罪的,你们不可收赎价代替他的命;他必被治死。
Bokondima kozwa eloko moko te mpo na kosikola bomoi ya mobomi oyo asengeli na kufa; basengeli kaka koboma ye.
32 那逃到逃城的人,你们不可为他收赎价,使他在大祭司未死以先再来住在本地。
Bokondima mpe kozwa eloko moko te mpo na kopesa ye nzela ya kokima na engumba songolo ya kokimela to ya kozonga kovanda lisusu kati na mokili na ye liboso ya kufa ya mokonzi ya Banganga-Nzambe.
33 这样,你们就不污秽所住之地,因为血是污秽地的;若有在地上流人血的,非流那杀人者的血,那地就不得洁净。
Bokokomisa mbindo te mokili epai wapi bozali. Solo, kosopa makila ekomisaka mokili mbindo; pamba te soki makila esopani na mokili, ezali kaka na nzela ya makila ya moto oyo asopi yango nde bakoki kokomisa lisusu mokili peto.
34 你们不可玷污所住之地,就是我住在其中之地,因为我—耶和华住在以色列人中间。”
Bokokomisa mbindo te mokili epai wapi bokovanda, mokili epai wapi Ngai mpe nakovanda; pamba te nazali Yawe, navandaka kati na bana ya Isalaele. › »

< 民数记 35 >