< 利未记 15 >

1 耶和华对摩西、亚伦说:
Yawe alobaki na Moyize mpe Aron:
2 “你们晓谕以色列人说:人若身患漏症,他因这漏症就不洁净了。
« Boloba na bana ya Isalaele mpe boyebisa bango: ‹ Soki nzoto ya mibali ya mobali moko ezali kobimisa tofina to mayi, kobima yango ekomisi mobali yango mbindo.
3 他患漏症,无论是下流的,是止住的,都是不洁净。
Ata soki tofina to mayi ekobi kobima na nzoto na ye to ekangami, azali kaka mbindo. Tala ndenge kobima ya tofina to ya mayi yango ekomisaka moto mbindo:
4 他所躺的床都为不洁净,所坐的物也为不洁净。
mbeto nyonso oyo mobali oyo azali kobimisa tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali akolala to eloko nyonso oyo akovandela ekokoma mbindo.
5 凡摸那床的,必不洁净到晚上,并要洗衣服,用水洗澡。
Moto nyonso oyo akosimba mbeto na ye asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.
6 那坐患漏症人所坐之物的,必不洁净到晚上,并要洗衣服,用水洗澡。
Moto oyo akovanda likolo ya eloko oyo mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali avandelaki, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.
7 那摸患漏症人身体的,必不洁净到晚上,并要洗衣服,用水洗澡。
Moto oyo akosimba mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino pokwa.
8 若患漏症人吐在洁净的人身上,那人必不洁净到晚上,并要洗衣服,用水洗澡。
Soki mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali abwakeli moto oyo azali peto soyi, moto yango asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.
9 患漏症人所骑的鞍子也为不洁净。
Eloko nyonso oyo mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali akovandela likolo ya mpunda tango azali kosala mobembo, ekokoma mbindo.
10 凡摸了他身下之物的,必不洁净到晚上;拿了那物的,必不洁净到晚上,并要洗衣服,用水洗澡。
Moto nyonso oyo akosimba eloko nyonso kati na biloko oyo ezali na se ya mobali yango, akozala mbindo kino na pokwa; mpe moto nyonso oyo akolokota biloko yango asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.
11 患漏症的人没有用水涮手,无论摸了谁,谁必不洁净到晚上,并要洗衣服,用水洗澡。
Moto nyonso oyo mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali akosimba na kozanga komisukola maboko na mayi, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.
12 患漏症人所摸的瓦器就必打破;所摸的一切木器也必用水涮洗。
Mbeki nyonso oyo esalema na mabele oyo bakosimba na mobali oyo azali kobima tofina to mayi, basengeli kopanza yango; mpe eloko nyonso oyo esalema na nzete basengeli kosukola yango na mayi.
13 “患漏症的人痊愈了,就要为洁净自己计算七天,也必洗衣服,用活水洗身,就洁净了。
Soki tofina to mayi etiki kobima na nzoto ya mibali ya mobali yango, akotanga mikolo sambo mpo na kopetolama na ye; sima akosukola bilamba na ye, akosukola nzoto na ye na mayi ya etima mpe akokoma peto.
14 第八天,要取两只斑鸠或是两只雏鸽,来到会幕门口、耶和华面前,把鸟交给祭司。
Na mokolo ya mwambe, akozwa bibenga mibale ya zamba to bana bibenga mibale mpe akoya liboso ya Yawe na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Akopesa yango epai ya Nganga-Nzambe.
15 祭司要献上一只为赎罪祭,一只为燔祭;因那人患的漏症,祭司要在耶和华面前为他赎罪。
Nganga-Nzambe akobonza yango, moko lokola mbeka ya masumu mpe mosusu lokola mbeka ya kotumba. Na nzela wana nde Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mobali yango liboso ya Yawe likolo ya kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali.
16 “人若梦遗,他必不洁净到晚上,并要用水洗全身。
Soki mobali abimi mayi ya mibali na nzoto na ye ya mibali, asengeli kosukola nzoto na ye mobimba na mayi mpe akozala mbindo kino na pokwa.
17 无论是衣服是皮子,被精所染,必不洁净到晚上,并要用水洗。
Elamba nyonso to eloko nyonso oyo esalema na poso ya nyama oyo ekweyeli mayi ya mibali, esengeli basukola yango na mayi, mpe ekozala mbindo kino na pokwa.
18 若男女交合,两个人必不洁净到晚上,并要用水洗澡。
Soki mobali asangisi nzoto na mwasi, bango mibale basengeli kosukola nzoto na mayi mpe bakozala mbindo kino na pokwa.
19 “女人行经,必污秽七天;凡摸她的,必不洁净到晚上。
Soki mwasi amoni makila na ye ya sanza, akozala mbindo mikolo sambo, mpe moto nyonso oyo akosimba ye akozala mbindo kino na pokwa.
20 女人在污秽之中,凡她所躺的物件都为不洁净,所坐的物件也都不洁净。
Eloko nyonso oyo akolalela na tango wana ekokoma mbindo, mpe eloko nyonso oyo akovandela ekokoma mbindo.
21 凡摸她床的,必不洁净到晚上,并要洗衣服,用水洗澡。
Moto nyonso oyo akosimba mbeto na ye akosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi mpe akozala mbindo kino na pokwa.
22 凡摸她所坐什么物件的,必不洁净到晚上,并要洗衣服,用水洗澡。
Moto nyonso oyo akosimba eloko oyo mwasi yango avandeli, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa.
23 在女人的床上,或在她坐的物上,若有别的物件,人一摸了,必不洁净到晚上。
Soki eloko ezali na mbeto na ye to likolo ya eloko oyo avandeli, moto oyo akosimba yango akozala mbindo kino na pokwa.
24 男人若与那女人同房,染了她的污秽,就要七天不洁净;所躺的床也为不洁净。
Soki mobali moko asangisi na ye nzoto mpe makila na ye ya sanza ezwi mobali yango, akozala mbindo mikolo sambo. Bongo mbeto nyonso oyo mobali yango akolalela, ekokoma mbindo.
25 “女人若在经期以外患多日的血漏,或是经期过长,有了漏症,她就因这漏症不洁净,与她在经期不洁净一样。
Soki mwasi azali kobima makila mikolo ebele na tango oyo amonaka makila na ye ya sanza te to azali kokoba kobima makila penza na tango oyo amonaka makila na ye ya sanza, akozala mbindo mikolo nyonso oyo azali kobima makila lokola na mikolo oyo amonaka makila na ye ya sanza.
26 她在患漏症的日子所躺的床、所坐的物都要看为不洁净,与她月经的时候一样。
Mbeto nyonso oyo akolalela na tango oyo makila na ye ezali kokoba kobima, ekozala mbindo; mpe eloko nyonso oyo akovandela ekokoma mbindo lokola na tango oyo amonaka makila na ye ya sanza.
27 凡摸这些物件的,就为不洁净,必不洁净到晚上,并要洗衣服,用水洗澡。
Moto nyonso oyo akosimba biloko wana akokoma mbindo. Asengeli kosukola bilamba mpe nzoto na ye na mayi; akozala mbindo kino na pokwa.
28 女人的漏症若好了,就要计算七天,然后才为洁净。
Soki apetolami na kobima makila na ye, asengeli kotanga mikolo sambo; sima na yango, akokoma peto.
29 第八天,要取两只斑鸠或是两只雏鸽,带到会幕门口给祭司。
Na mokolo ya mwambe, akozwa bibenga mibale ya zamba to bana bibenga mibale mpe akomema yango epai ya Nganga-Nzambe na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
30 祭司要献一只为赎罪祭,一只为燔祭;因那人血漏不洁,祭司要在耶和华面前为她赎罪。
Nganga-Nzambe akobonza yango, moko lokola mbeka ya masumu mpe mosusu lokola mbeka ya kotumba. Na nzela wana nde Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mwasi yango liboso ya Yawe mpo na mbindo ya kobima makila na ye.
31 “你们要这样使以色列人与他们的污秽隔绝,免得他们玷污我的帐幕,就因自己的污秽死亡。”
Bosengeli kosala ete bana ya Isalaele bazala mosika ya makambo oyo ekokomisa bango mbindo; boye bakokufa te na mbindo na bango, na kokomisa mbindo Mongombo na Ngai, oyo ezali kati na bango. ›
32 这是患漏症和梦遗而不洁净的,
Oyo nde mibeko mpo na mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali to mpo na mobali oyo abimi mayi ya mibali oyo ekomisi ye mbindo;
33 并有月经病的和患漏症的,无论男女,并人与不洁净女人同房的条例。
mpo na mwasi oyo azali komona makila na ye ya sanza mpe mpo na mobali oyo azali kobima tofina to mayi to mpo na mwasi oyo azali kobima makila, mpe mpo na mobali oyo asangisi nzoto na mwasi ya mbindo. »

< 利未记 15 >