< 士师记 14 >
1 参孙下到亭拿,在那里看见一个女子,是非利士人的女儿。
Mokolo moko, Samison akendeki na Timina mpe amonaki kuna elenge mwasi moko ya Filisitia.
2 参孙上来禀告他父母说:“我在亭拿看见一个女子,是非利士人的女儿,愿你们给我娶来为妻。”
Tango azongaki, alobaki na tata mpe mama na ye: — Namoni mwasi moko kati na basi ya bato ya Filisitia, na Timina; bokende kobalela ngai ye.
3 他父母说:“在你弟兄的女儿中,或在本国的民中,岂没有一个女子,何至你去在未受割礼的非利士人中娶妻呢?”参孙对他父亲说:“愿你给我娶那女子,因我喜悦她。”
Tata mpe mama na ye bazongisaki: — Boni, kati na bandeko na yo to kati na bato na biso nyonso, ezali te na bana basi ya kitoko mpo ete okende kozwa mwasi kati na bato ya Filisitia oyo bakatama ngenga te? Kasi Samison alobaki na tata na ye: — Balela ngai ye, pamba te ye nde abongi mpo na ngai.
4 他的父母却不知道这事是出于耶和华,因为他找机会攻击非利士人。那时,非利士人辖制以色列人。
Baboti na ye bayebaki te ete likambo wana ewutaki epai na Yawe, pamba te Yawe azalaki koluka nzela mpo na kokotisa mobulu kati na bana ya Isalaele mpe bato ya Filisitia. Pamba te na tango wana, bato ya Filisitia bazalaki kokonza bana ya Isalaele.
5 参孙跟他父母下亭拿去,到了亭拿的葡萄园,见有一只少壮狮子向他吼叫。
Samison akendeki na Timina elongo na tata mpe mama na ye. Tango bakomaki pembeni ya bilanga ya vino ya Timina, mbala moko, mwana nkosi moko eyaki konguluma liboso ya Samison.
6 耶和华的灵大大感动参孙,他虽然手无器械,却将狮子撕裂,如同撕裂山羊羔一样。他行这事并没有告诉父母。
Molimo na Yawe akitelaki Samison na nguya. Boye, Samison apasolaki nkosi na kati-kati, na maboko pamba, ndenge bapasolaka mwana ntaba. Kasi kati na makambo oyo asalaki, ayebisaki eloko moko te epai ya tata to mama na ye.
Sima na yango, Samison akendeki na Timina, asololaki na mwana mwasi mpe alingaki ye.
8 过了些日子,再下去要娶那女子,转向道旁要看死狮,见有一群蜂子和蜜在死狮之内,
Sima na mwa mikolo, tango azongaki na Timina mpo na kobala mwasi na ye, alekaki pembeni mpo na kotala nzoto ya nkosi oyo ekufaki. Kati na nzoto yango, amonaki liboke ya banzoyi mpe mafuta na yango.
9 就用手取蜜,且吃且走;到了父母那里,给他父母,他们也吃了;只是没有告诉这蜜是从死狮之内取来的。
Akamataki yango na maboko na ye mpe aliaki yango nzela-nzela. Tango akutanaki na baboti na ye, apesaki bango ndambo ya mafuta ya nzoyi. Bongo bango mpe baliaki yango; kasi atikalaki koyebisa bango te ete azwaki mafuta yango ya nzoyi kati na nzoto ya nkosi oyo ekufa.
10 他父亲下去见女子。参孙在那里设摆筵宴,因为向来少年人都有这个规矩。
Tata na ye akendeki kotala elenge mwasi yango, mpe Samison asalisaki kuna feti moko ya monene, kolanda ndenge ezalaki momesano mpo na libala.
Tango abimaki, bapesaki bato tuku misato mpo ete bavanda na ye elongo.
12 参孙对他们说:“我给你们出一个谜语,你们在七日筵宴之内,若能猜出意思告诉我,我就给你们三十件里衣,三十套衣裳;
Samison alobaki na bango: — Nalingi koyebisa bino lisese moko. Soki bopesi ngai eyano, na mikolo sambo ya feti, nakopesa bino bilamba tuku misato ya lino mpe bilamba tuku misato ya feti.
13 你们若不能猜出意思告诉我,你们就给我三十件里衣,三十套衣裳。”他们说:“请将谜语说给我们听。”
Soki bokoki te kopesa ngai eyano, bokopesa ngai bilamba tuku misato ya lino mpe bilamba tuku misato ya feti. Balobaki: — Yebisa biso lisese na yo, tolingi koyoka yango!
14 参孙对他们说: 吃的从吃者出来; 甜的从强者出来。 他们三日不能猜出谜语的意思。
Samison alobaki na bango: — Kati na oyo eliaka, ebimi oyo baliaka; kati na oyo ezali makasi, ebimi oyo ezali elengi. Mikolo misato mobimba, bakokaki te kopesa ye eyano.
15 到第七天,他们对参孙的妻说:“你诓哄你丈夫,探出谜语的意思告诉我们,免得我们用火烧你和你父家。你们请了我们来,是要夺我们所有的吗?”
Bongo na mokolo ya minei, balobaki na mwasi ya Samison: — Bondela mobali na yo mpo ete apesa biso ndimbola ya lisese; sima na yango, yaka koyebisa biso ndimbola yango. Soki te, tokotumba yo elongo na ndako ya tata na yo. Obengisi biso awa mpo na koyiba biso?
16 参孙的妻在丈夫面前啼哭说:“你是恨我,不是爱我,你给我本国的人出谜语,却没有将意思告诉我。”参孙回答说:“连我父母我都没有告诉,岂可告诉你呢?”
Bongo mwasi ya Samison akomaki kolela liboso ya mobali mpe alobaki na ye: — Oyina ngai! Solo, olingaka ngai te! Oyebisaki bato na ngai lisese, kasi oyebisaki ngai ndimbola na yango te! Samison azongisaki: — Natikala kutu kolimbola yango epai ya tata to mama na ngai te, bongo ndenge nini nalimbola yango epai na yo?
17 七日筵宴之内,她在丈夫面前啼哭,到第七天逼着他,他才将谜语的意思告诉他妻,他妻就告诉本国的人。
Na mikolo nyonso sambo ya feti, azalaki kaka kolela. Suka na suka, na mokolo ya sambo, Samison alimbolelaki ye yango, pamba te mwasi na ye atungisaki ye mingi. Bongo mwasi ya Samison, ye mpe akendeki kopesa ndimbola ya lisese yango epai ya bato na ye.
18 到第七天,日头未落以前,那城里的人对参孙说: 有什么比蜜还甜呢? 有什么比狮子还强呢? 参孙对他们说: 你们若非用我的母牛犊耕地, 就猜不出我谜语的意思来。
Na mokolo ya sambo, liboso ete moyi elala, bato ya engumba bayaki koloba na Samison: — Eloko nini ezali elengi koleka mafuta ya nzoyi? Mpe eloko nini eleki nkosi na makasi? Samison alobaki na bango: — Soki bosalaki likita te na mwasi na ngai, bokokaki koyeba te ndimbola ya lisese na ngai.
19 耶和华的灵大大感动参孙,他就下到亚实基伦,击杀了三十个人,夺了他们的衣裳,将衣裳给了猜出谜语的人。参孙发怒,就上父家去了。
Bongo Molimo na Yawe akitelaki Samison na nguya. Akendeki na Ashikeloni mpe abomaki bato tuku misato, azwaki bilamba na bango mpe apesaki yango epai ya bato oyo bapesaki ye ndimbola ya lisese. Azongaki na ndako ya tata na ye na kanda makasi.
20 参孙的妻便归了参孙的陪伴,就是作过他朋友的。
Mpe babalisaki mwasi ya Samison epai ya moko kati na baninga ya Samison, oyo babengisaki na feti.