< 约伯记 26 >

1 约伯回答说:
Yobo azongisaki:
2 无能的人蒙你何等的帮助! 膀臂无力的人蒙你何等的拯救!
« Ah! Tala ndenge osungi moto oyo azangi makasi, ndenge osungi loboko oyo elembi!
3 无智慧的人蒙你何等的指教! 你向他多显大知识!
Tala toli oyo opesi na moto azangi bwanya, mpe tala ebele na mayele oyo olakisi!
4 你向谁发出言语来? 谁的灵从你而出?
Ozwi maloba oyo wapi? Molimo oyo elobi na monoko na yo ezali ya nani?
5 在大水和水族以下的阴魂战兢。
Bakufi balengaka na se ya mayi mpe ya bikelamu oyo ezalaka kuna.
6 在 神面前,阴间显露; 灭亡也不得遮掩。 (Sheol h7585)
Liboso ya Nzambe, mboka ya bakufi ezali bolumbu, mpe libulu ya molili ezali polele. (Sheol h7585)
7 神将北极铺在空中, 将大地悬在虚空;
Atandaka likolo na esika oyo ezali na eloko moko te, atelemisaka mabele na likolo ya eloko moko te,
8 将水包在密云中, 云却不破裂;
akangaka mayi kati na mapata, kasi mapata epasukaka te;
9 遮蔽他的宝座, 将云铺在其上;
azipaka kiti ya bokonzi na Ye, atandaka mapata na likolo na yango;
10 在水面的周围划出界限, 直到光明黑暗的交界。
akataka mondelo na likolo ya mayi, na suka ya pole mpe na molili.
11 天的柱子因他的斥责震动惊奇。
Makonzi ya Lola ezali kolenga mpe ezali kokamwa na pamela na Ye.
12 他以能力搅动大海; 他借知识打伤拉哈伯,
Na nguya na Ye, apasoli ebale monene; mpe na mayele na Ye, abuki-buki Rakabe na biteni.
13 借他的灵使天有妆饰; 他的手刺杀快蛇。
Na pema na Ye, Likolo ekomaka kitoko, loboko na Ye etobolaka nyoka oyo ekimaka.
14 看哪,这不过是 神工作的些微; 我们所听于他的是何等细微的声音! 他大能的雷声谁能明透呢?
Soki makambo wana ezali kaka ndambo moke ya misala na Ye mpe mongongo na Ye ya se oyo toyokaka, nani akoki kososola bakake ya nguya na Ye? »

< 约伯记 26 >