< 约伯记 16 >

1 约伯回答说:
Yobo azongisaki:
2 这样的话我听了许多; 你们安慰人,反叫人愁烦。
« Nayoki maloba ebele ya lolenge oyo; bino nyonso bozali babondisi mabe.
3 虚空的言语有穷尽吗? 有什么话惹动你回答呢?
Kino tango nini bokotika koloba maloba ya pamba-pamba boye? Likambo nini etindi yo lisusu kozongela maloba?
4 我也能说你们那样的话; 你们若处在我的境遇, 我也会联络言语攻击你们, 又能向你们摇头。
Ngai mpe nakokaki koloba lokola bino, soki bozalaki na esika na ngai, nakokaki kobimisa maloba ebele mpe koningisa moto mpo na bino.
5 但我必用口坚固你们, 用嘴消解你们的忧愁。
Kasi monoko na ngai elingaki kolendisa bino, mpe bibebu na ngai elingaki koningana mpo na kokitisa bino mitema kati na pasi.
6 我虽说话,忧愁仍不得消解; 我虽停住不说,忧愁就离开我吗?
Nzokande, soki nalobi, pasi na ngai ekosila te; bongo soki nakangi monoko nde pasi yango elongwe na bomoi na ngai?
7 但现在 神使我困倦, 使亲友远离我,
Oh Nzambe! Solo penza, olembisi ngai! Obebisi ndako na ngai nyonso,
8 又抓住我,作见证攻击我; 我身体的枯瘦也当面见证我的不是。
ofini-fini ngai makasi penza, mpe kokonda na ngai ekomi ata kotatola mpe kofunda ngai na miso ya bato!
9 主发怒撕裂我,逼迫我, 向我切齿; 我的敌人怒目看我。
Kanda na Yo ezali kopasola mpe kobundisa ngai, okomi ata kolia minu mpo na kosala ngai mabe mpe kotala ngai na miso mabe lokola nde nazali monguna na yo.
10 他们向我开口, 打我的脸羞辱我, 聚会攻击我。
Bato mabe bafungoli minoko mpo na kotiola ngai, bakomi kobeta ngai bambata na matama mpo na kosambwisa ngai, bango nyonso basaleli ngai likita.
11 神把我交给不敬虔的人, 把我扔到恶人的手中。
Nzambe akabi ngai na maboko ya bato mabe mpe abwaki ngai na manzaka na bango.
12 我素来安逸,他折断我, 掐住我的颈项,把我摔碎, 又立我为他的箭靶子。
Makambo nyonso ezalaki kotambola malamu mpo na ngai, kasi aningisi ngai, akangi ngai na kingo mpe apanzi ngai, akomisi ngai lokola eloko na Ye ya komekela makonga;
13 他的弓箭手四面围绕我; 他破裂我的肺腑,并不留情, 把我的胆倾倒在地上,
makonga na Ye ezingeli ngai, atoboli-toboli libumu na ngai, mpe na mawa te, asopi makila na ngai na mabele.
14 将我破裂又破裂, 如同勇士向我直闯。
Tango nyonso, azali kaka kozokisa ngai mpe kokweya likolo na ngai lokola elombe.
15 我缝麻布在我皮肤上, 把我的角放在尘土中。
Natongi elamba na ngai ya saki na poso ya nzoto na ngai mpe nakundi lokumu na ngai nyonso na se ya putulu.
16 我的脸因哭泣发紫, 在我的眼皮上有死荫。
Likolo ya kolela, elongi na ngai ekomi motane, mpe molili ezingeli miso na ngai.
17 我的手中却无强暴; 我的祈祷也是清洁。
Nzokande, maboko na ngai etikala kosala moto mabe te, mpe libondeli na ngai ezalaki kosalema na motema peto.
18 地啊,不要遮盖我的血! 不要阻挡我的哀求!
Oh mabele, kozipa makila na ngai te! Kotika te ete koganga na ngai ezwa tango ya kopema!
19 现今,在天有我的见证, 在上有我的中保。
Wuta sik’oyo, motatoli na ngai azali na Likolo, molobeli na ngai azali na Lola.
20 我的朋友讥诮我, 我却向 神眼泪汪汪。
Baninga na ngai bakomi koseka ngai; nazali nde kolela epai ya Nzambe na mpinzoli.
21 愿人得与 神辩白, 如同人与朋友辩白一样;
Boni, ezali solo na molobeli oyo akoki kolobela moto liboso ya Nzambe ndenge moto alobelaka moninga na ye?
22 因为再过几年, 我必走那往而不返之路。
Solo, motango ya mibu na ngai ekomi pene ya kosila, mpe nakokende na ngai na nzela oyo bato bazongaka lisusu te.

< 约伯记 16 >