< 以赛亚书 45 >
1 我—耶和华所膏的塞鲁士; 我搀扶他的右手, 使列国降伏在他面前。 我也要放松列王的腰带, 使城门在他面前敞开, 不得关闭。 我对他如此说:
« Tala liloba oyo Yawe alobi epai ya Sirisi, mopakolami na Ye, oyo Yawe asimbi loboko na ye ya mobali mpo na kokweyisa bikolo nyonso liboso na ye mpe kolongola mikaba wuta na baloketo ya bakonzi, mpo na kofungola bikuke liboso na ye mpo ete bikuke yango ekangama te:
2 我必在你前面行, 修平崎岖之地。 我必打破铜门, 砍断铁闩。
Nakotambola liboso na yo mpe nakolalisa bangomba, nakobuka bikuke ya bronze mpe nakokata-kata bibende oyo bakangelaka yango.
3 我要将暗中的宝物和隐密的财宝赐给你, 使你知道提名召你的, 就是我—耶和华、以色列的 神。
Nakopesa yo bomengo oyo babomba na molili, bozwi oyo batia na bisika ebombama, mpo okoka koyeba ete Ngai nazali Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo abengi yo na kombo na yo.
4 因我仆人雅各, 我所拣选以色列的缘故, 我就提名召你; 你虽不认识我, 我也加给你名号。
Mpo na bolingo ya Jakobi, mosali na Ngai, mpe Isalaele, moponami na Ngai, nabengi yo na kombo na yo, napesi yo kombo ya lokumu atako oyebi Ngai nanu te.
5 我是耶和华,在我以外并没有别神; 除了我以外再没有 神。 你虽不认识我, 我必给你束腰。
Nazali Yawe, mosusu azali te; Nzambe mosusu azali te, soki Ngai te. Nalatisi yo mokaba na loketo atako oyebi Ngai nanu te;
6 从日出之地到日落之处 使人都知道除了我以外,没有别神。 我是耶和华; 在我以外并没有别神。
mpo ete, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste, bato bayeba ete mosusu azali te, bobele Ngai nde nazali Nzambe. Nazali Yawe, mosusu azali te.
7 我造光,又造暗; 我施平安,又降灾祸; 造作这一切的是我—耶和华。
Nasalaka pole mpe nakelaka molili, napesaka kimia mpe nakelaka pasi; Ngai Yawe nde nasalaka makambo oyo nyonso.
8 诸天哪,自上而滴, 穹苍降下公义; 地面开裂,产出救恩, 使公义一同发生; 这都是我—耶和华所造的。
Yo, Lola kuna na likolo, nokisa bosembo lokola mvula, tika ete mapata ekitisa yango! Tika ete mabele efungwama mpo ete lobiko ebima; tika ete bosembo ekola nzela moko! Ezali Ngai Yawe nde nakelaki yango.
9 祸哉,那与造他的主争论的! 他不过是地上瓦片中的一块瓦片。 泥土岂可对抟弄他的说:你做什么呢? 所做的物岂可说:你没有手呢?
Mawa na ye oyo abetaka tembe na Mokeli na ye, ye oyo azali kaka mbeki kati na bambeki ya mabele! Boni, potopoto ekoki solo koloba na moto oyo asali yango: ‹ Ozali kosala nini? › Mpe mosala ya maboko na yo ekoki solo koloba: ‹ Azali na maboko te? ›
10 祸哉,那对父亲说: 你生的是什么呢? 或对母亲说: 你产的是什么呢?
Mawa na ye oyo alobaka na tata na ye: ‹ Mpo na nini obotaki ngai? › Mpe na mama na ye: ‹ Mpo na nini obotaki ngai? ›
11 耶和华—以色列的圣者, 就是造就以色列的如此说: 将来的事,你们可以问我; 至于我的众子,并我手的工作, 你们可以求我命定。
Tala liloba oyo Yawe, Mosantu ya Isalaele mpe Mokeli na ye, alobi: Boni, bino nde bato bokotuna Ngai soki nakosala nini mpo na bana na Ngai na mikolo oyo ekoya to bino nde bato bokopesa Ngai mitindo mpo na mosala oyo maboko na Ngai esali?
12 我造地,又造人在地上。 我亲手铺张诸天; 天上万象也是我所命定的。
Ngai nde nasala mabele mpe nakela bato kati na yango; loboko na Ngai moko nde etandaki likolo lokola liputa mpe etiaki mampinga na yango nyonso na molongo.
13 我凭公义兴起塞鲁士, 又要修直他一切道路。 他必建造我的城, 释放我被掳的民; 不是为工价,也不是为赏赐。 这是万军之耶和华说的。
Nakobimisa Sirisi na bosembo na Ngai; nakokomisa nzela na ye nyonso alima. Akotonga lisusu engumba na Ngai mpe akopesa bonsomi na bakangami na Ngai; ekozala na motuya ya mbongo to ya biloko te, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. »
14 耶和华如此说: 埃及劳碌得来的和古实的货物必归你; 身量高大的西巴人必投降你,也要属你。 他们必带着锁链过来随从你, 又向你下拜,祈求你说: 神真在你们中间,此外再没有别神; 再没有别的 神。
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Mosala ya Ejipito, mombongo ya Kushi mpe bato milayi ya Seba, bakoleka epai na yo mpe bakozala ya yo. Bakotambola ya kokangama na minyololo, sima na yo; bakofukama liboso na yo mpe bakobondela yo na maloba oyo: ‹ Solo, Nzambe azali penza epai na yo, nzambe mosusu azali te! › »
15 救主—以色列的 神啊, 你实在是自隐的 神。
Solo, ozali Nzambe oyo amibombaka, Nzambe, Mobikisi ya Isalaele!
16 凡制造偶像的都必抱愧蒙羞, 都要一同归于惭愧。
Bato nyonso oyo basalaka banzambe ya bikeko bakoyoka soni mpe bakosambwa; bango nyonso, bakokende na soni.
17 惟有以色列必蒙耶和华的拯救, 得永远的救恩。 你们必不蒙羞,也不抱愧, 直到永世无尽。
Kasi Yawe akobikisa Isalaele na lobiko ya seko na seko. Bokotikalaka lisusu koyoka soni te mpe kosambwa te, libela na libela.
18 创造诸天的耶和华, 制造成全大地的 神, 他创造坚定大地, 并非使地荒凉, 是要给人居住。 他如此说: 我是耶和华,再没有别神。
Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi, Ye oyo akela likolo, Ye oyo azali Nzambe oyo asala mpe abongisa mabele, mpe atelemisa yango ngwi; Ye akelaki yango te mpo ete ezala pamba, kasi asalaki yango mpo ete bato bavanda: « Nazali Yawe, mpe mosusu azali te.
19 我没有在隐密黑暗之地说话; 我没有对雅各的后裔说: 你们寻求我是徒然的。 我—耶和华所讲的是公义, 所说的是正直。
Nalobaki na nkuku te, kati na esika moko te ya molili ya mokili; nalobaki te na bakitani ya Jakobi: ‹ Boluka Ngai kati na pamba! › Nazali Yawe, nalobaka oyo ezali sembo, nasakolaka oyo ezali alima.
20 你们从列国逃脱的人, 要一同聚集前来。 那些抬着雕刻木偶、 祷告不能救人之神的, 毫无知识。
Bosangana elongo mpe boya, bopusana elongo bino nyonso, bino bato oyo bobiki kati na bikolo! Bato oyo bamemaka banzambe ya bikeko basala na nzete mpe babelelaka nzambe oyo ebikisaka te; bazangi boyebi.
21 你们要述说陈明你们的理, 让他们彼此商议。 谁从古时指明? 谁从上古述说? 不是我—耶和华吗? 除了我以外,再没有 神; 我是公义的 神,又是救主; 除了我以外,再没有别神。
Botelema mpe bopesa sango, boloba makambo na bino mpe tosamba elongo! Nani asakolaki yango wuta kala mpe atatolaki yango wuta na tango oyo eleka? Ezali Ngai Yawe te? Ezali na Nzambe mosusu te, soki Ngai te. Nazali Nzambe ya sembo mpe Mobikisi; mosusu azali te, soki Ngai te.
22 地极的人都当仰望我, 就必得救; 因为我是 神,再没有别神。
Bozonga epai na Ngai mpo ete bobika, bino nyonso oyo bozali na basuka ya mokili; pamba te Ngai, nazali Nzambe, mpe mosusu azali te.
23 我指着自己起誓, 我口所出的话是凭公义,并不反回: 万膝必向我跪拜; 万口必凭我起誓。
Nalapi ndayi na Kombo na Ngai; oyo ezali sembo ebimaka na monoko na Ngai, liloba oyo bakoki koboya te: mabolongo nyonso ekofukama liboso na Ngai, mpe minoko nyonso ekolapa ndayi na Kombo na Ngai.
24 人论我说, 公义、能力,惟独在乎耶和华; 人都必归向他。 凡向他发怒的必至蒙羞。
Bakoloba na tina na Ngai: ‹ Makasi mpe bosembo ezali kati na Yawe kaka. › » Bato nyonso oyo batombokelaki Ye bakoya epai na Ye mpe bakoyoka soni.
25 以色列的后裔都必因耶和华得称为义, 并要夸耀。
Ezali kati na Yawe nde bato nyonso oyo bazali bakitani ya Isalaele bakokoma bato ya sembo mpe bakozwa lokumu.