< 以赛亚书 22 >
1 论异象谷的默示: 有什么事使你这满城的人都上房顶呢?
Maloba na Yawe na tina na lubwaku ya Emoniseli: Likambo nini lisusu ekomeli bino sik’oyo mpo ete bino nyonso bomata na likolo ya mitondo ya ndako?
2 你这满处呐喊、大有喧哗的城, 欢乐的邑啊, 你中间被杀的并不是被刀杀, 也不是因打仗死亡。
Oh engumba etonda na loyenge, engumba etonda na makelele mpe na bisengo! Bibembe na yo ekufi na mopanga te to mpe na bitumba te.
3 你所有的官长一同逃跑, 都为弓箭手所捆绑。 你中间一切被找到的都一同被捆绑; 他们本是逃往远方的。
Bakambi na yo nyonso bakimaki elongo; bakangaki bango na basoda na nguya ya tolotolo. Mpe bato na yo, oyo bazalaki kokima monguna na mosika, bakangaki bango mpe bakomaki elongo bakangami.
4 所以我说:你们转眼不看我, 我要痛哭。 不要因我众民的毁灭, 就竭力安慰我。
Yango wana nalobaki: « Botika kotala Ngai, botika ete nalela makasi! Bomeka kobondisa Ngai te mpo na kobebisama ya bato na Ngai! »
5 因为主—万军之耶和华使“异象谷” 有溃乱、践踏、烦扰的日子。 城被攻破, 哀声达到山间。
Pamba te ezali mokolo moko ya lokito ya bitumba, mokolo ya pasi makasi mpe ya somo kati na lubwaku ya Emoniseli kowuta na Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga; ezali mokolo oyo mir ya makasi ekobukana mpe makelele ya koganga ekobima na bangomba.
6 以拦带着箭袋, 还有坐战车的和马兵; 吉珥揭开盾牌。
Mampinga ya Elami batomboli makonga, mosusu bamati na bashar mpe bampunda; Kiri abimisi nguba.
Lubwaku na yo, oyo eleki kitoko etondi na bashar, mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda batelemi-telemi na bikuke ya engumba;
8 他去掉犹大的遮盖。 那日,你就仰望林库内的军器。
bibombamelo ya Yuda etikali lisusu te. Na mokolo wana, obalolaki miso na yo na bibundeli oyo ezalaka na Ndako ya Zamba.
Bomonaki ete Engumba ya mokonzi Davidi ezali na madusu mingi kati na mir oyo ezingeli yango; boye bobombaki mayi kati na Liziba oyo ezalaka na se,
10 又数点耶路撒冷的房屋,将房屋拆毁,修补城墙,
botangaki motango ya bandako ya Yelusalemi, bobukaki mosusu mpo na kolendisa mir ya monene.
11 又在两道城墙中间挖一个聚水池可盛旧池的水,却不仰望做这事的主,也不顾念从古定这事的。
Bosalaki liziba mpo na kobomba mayi ya liziba ya kala kati na bamir mibale, kasi bobalolaki miso na bino te mpo na kotala Ye oyo asalaki mpe abongisaki yango wuta kala.
12 当那日,主—万军之耶和华叫人哭泣哀号, 头上光秃,身披麻布。
Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, azalaki kobenga bino na mokolo wana mpo ete bolela mpe bosala matanga, bomikokola suki mpe bolata saki.
13 谁知,人倒欢喜快乐, 宰牛杀羊,吃肉喝酒,说: 我们吃喝吧!因为明天要死了。
Kasi tala, ezalaki kaka bisengo mpe loyenge, koboma bangombe mpe bameme ya mibali, bantaba ya basi, kolia misuni mpe komela masanga ya vino! Bozalaki koloba: « Tika ete tolia mpe tomela, pamba te, lobi, tokokufa! »
14 万军之耶和华亲自默示我说: 这罪孽直到你们死,断不得赦免! 这是主—万军之耶和华说的。
Yawe, Mokonzi ya mampinga, ayebisaki ngai yango na matoyi na ngai moko penza: « Kino bokokufa, bokotikala kozwa bolimbisi ya lisumu oyo te, » elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga.
15 主—万军之耶和华这样说:“你去见掌银库的,就是家宰舍伯那,对他说:
Tala maloba oyo Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Kende kokuta Shebina, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, loba na ye:
16 ‘你在这里做什么呢?有什么人竟在这里凿坟墓,就是在高处为自己凿坟墓,在磐石中为自己凿出安身之所?
‹ Ozali kosala nini awa, mpe nani apesi yo nzela ya kotonga kunda na yo awa lokola moto oyo azali kotimola kunda na ye na likolo mpe kotonga epemelo na ye kati na lidusu ya libanga monene?
17 看哪,耶和华必像大有力的人,将你紧紧缠裹,竭力抛去。
Tala, Yawe akomi pene ya koningisa yo mpe kobwaka yo mosika, yo moto ya makasi!
18 他必将你滚成一团,抛在宽阔之地,好像抛球一样。你这主人家的羞辱,必在那里坐你荣耀的车,也必在那里死亡。
Akobalola yo ndenge babalolaka ndembo mpe akobwaka yo na etando moko ya monene. Kuna nde okokufa, mpe bashar na yo ya lokumu ekotikala, yo oyo osalaka soni ya ndako ya mokonzi na yo.
Nakolongola yo na mosala, mpe lokumu na yo ekosila.
20 “到那日,我必召我仆人希勒家的儿子以利亚敬来,
Na mokolo wana, nakobengisa mosali na Ngai, Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia.
21 将你的外袍给他穿上,将你的腰带给他系紧,将你的政权交在他手中。他必作耶路撒冷居民和犹大家的父。
Nakolatisa ye nzambala na yo, nakokanga ye mokaba na yo mpe nakopesa bokonzi na yo na maboko na ye. Akozala tata mpo na bavandi ya Yelusalemi mpe mpo na ndako ya Yuda.
22 我必将大卫家的钥匙放在他肩头上。他开,无人能关;他关,无人能开。
Nakotia fungola ya ndako ya Davidi na mapeka na ye: oyo akofungola, moto moko te akokanga yango; mpe oyo akokanga, moto moko te akofungola yango.
23 我必将他安稳,像钉子钉在坚固处;他必作为他父家荣耀的宝座。
Nakopika ye lokola sete na esika ya malamu; akozala lokola kiti ya bokonzi ya lokumu mpo na ndako ya tata na ye.
24 他父家所有的荣耀,连儿女带子孙,都挂在他身上,好像一切小器皿,从杯子到酒瓶挂上一样。
Nkembo nyonso ya ndako ya tata na ye ekozala likolo na ye: kobanda na bakitani na ye kino na bana na bango nyonso, lokola bisalelo oyo: kobanda na bakopo ya mike kino na mbeki ya minene.
25 万军之耶和华说:当那日,钉在坚固处的钉子必压斜,被砍断落地;挂在其上的重担必被剪断。因为这是耶和华说的。”
Na mokolo wana, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, sete oyo bapikaki na esika ya malamu ekolongwa, ekobukana mpe ekokweya; mpe mokumba oyo amemaki ekokweya. › » Yawe nde alobaki.