< 创世记 36 >
Tala libota ya Ezawu oyo azali Edomi.
2 以扫娶迦南的女子为妻,就是赫人以伦的女儿亚大和希未人祭便的孙女、亚拿的女儿阿何利巴玛,
Ezawu abalaki basi na ye kati na bana basi ya Kanana: Ada, mwana mwasi ya Eloni, moto ya Iti; Olibama, mwana mwasi ya Ana mpe koko ya Tsibeoni, moto ya Evi;
mpe Basimati, mwana mwasi ya Isimaeli mpe ndeko mwasi ya Nebayoti.
Ada abotelaki Ezawu Elifazi; mpe Basimati abotelaki ye Reweli.
5 阿何利巴玛生了耶乌施、雅兰、可拉。这都是以扫的儿子,是在迦南地生的。
Olibama abotaki Yewushi, Yaelami mpe Kora. Bango nde bana mibali oyo babotelaki Ezawu na mokili ya Kanana.
6 以扫带着他的妻子、儿女,与家中一切的人口,并他的牛羊、牲畜,和一切货财,就是他在迦南地所得的,往别处去,离了他兄弟雅各。
Ezawu azwaki basi na ye, bana na ye ya mibali, bana na ye ya basi, bato nyonso ya ndako na ye mpe bibwele na ye, banyama na ye nyonso mpe biloko nyonso oyo azwaki na mokili ya Kanana, akendeki na mokili mosusu, mosika ya ndeko na ye Jakobi.
7 因为二人的财物群畜甚多,寄居的地方容不下他们,所以不能同居。
Bomengo na bango ekomaki mingi penza, mpe bakokaki lisusu te kovanda esika moko; pamba te mokili oyo bazalaki kovanda ekokaki bango lisusu te likolo ya motango ya bibwele na bango.
Yango wana Ezawu, oyo azali Edomi, akendeki kovanda na ngomba Seiri.
9 以扫是西珥山里以东人的始祖,他的后代记在下面。
Tala libota ya Ezawu, koko ya bato ya Edomi, na ngomba Seiri:
10 以扫众子的名字如下。以扫的妻子亚大生以利法;以扫的妻子巴实抹生流珥。
Tala bakombo ya bana mibali ya Ezawu: Elifazi, mwana mobali ya Ada, mwasi ya Ezawu; mpe Reweli, mwana mobali ya Basimati, mwasi ya Ezawu.
11 以利法的儿子是提幔、阿抹、洗玻、迦坦、基纳斯。
Bana mibali ya Elifazi: Temani, Omari, Tsefo, Gaetami mpe Kenazi.
12 亭纳是以扫儿子以利法的妾;她给以利法生了亚玛力。这是以扫的妻子亚大的子孙。
Elifazi, mwana mobali ya Ezawu, azalaki na makangu oyo kombo na ye ezalaki « Timina; » Timina abotelaki ye Amaleki. Bango nde bakoko ya Ada, mwasi ya Ezawu.
13 流珥的儿子是拿哈、谢拉、沙玛、米撒。这是以扫妻子巴实抹的子孙。
Bana mibali ya Reweli: Naati, Zera, Shama mpe Miza. Bango nde bakoko ya Basimati, mwasi ya Ezawu.
14 以扫的妻子阿何利巴玛是祭便的孙女,亚拿的女儿;她给以扫生了耶乌施、雅兰、可拉。
Tala bana mibali oyo Olibama, mwasi ya Ezawu, mwana mwasi ya Ana mpe koko ya Tsibeoni, abotelaki Ezawu: Yewushi, Yaelami mpe Kora.
15 以扫子孙中作族长的记在下面。以扫的长子以利法的子孙中,有提幔族长、阿抹族长、洗玻族长、基纳斯族长、
Tala bakonzi ya mabota ya bana mibali ya Ezawu: Bana ya Elifazi, mwana liboso ya Ezawu: mokonzi Temani, mokonzi Omari, mokonzi Tsefo, mokonzi Kenazi,
16 可拉族长、迦坦族长、亚玛力族长。这是在以东地从以利法所出的族长,都是亚大的子孙。
mokonzi Kora, mokonzi Gaetami mpe mokonzi Amaleki. Bango nde bakonzi ya libota ya Elifazi, oyo babotamaki na Edomi; bazalaki bakoko ya Ada.
17 以扫的儿子流珥的子孙中,有拿哈族长、谢拉族长、沙玛族长、米撒族长。这是在以东地从流珥所出的族长,都是以扫妻子巴实抹的子孙。
Bana mibali ya Reweli, mwana mobali ya Ezawu: mokonzi Naati, mokonzi Zera, mokonzi Shama mpe mokonzi Miza. Bango nde bakonzi ya libota ya Reweli, oyo babotamaki na Edomi; bazalaki bakoko ya Basimati, mwasi ya Ezawu.
18 以扫的妻子阿何利巴玛的子孙中,有耶乌施族长、雅兰族长、可拉族长。这是从以扫妻子,亚拿的女儿,阿何利巴玛子孙中所出的族长。
Bana mibali ya Olibama, mwasi ya Ezawu: mokonzi Yewushi, mokonzi Yaelami mpe mokonzi Kora. Bango nde bakonzi ya libota ya Olibama, mwana mwasi ya Ana mpe mwasi ya Ezawu.
Bango nde bazalaki bana mibali ya Ezawu oyo azali Edomi, mpe bango nde bazalaki bakonzi ya mabota ya Edomi.
20 那地原有的居民—何利人西珥的子孙记在下面:就是罗坍、朔巴、祭便、亚拿、
Tala bakitani ya Seiri, moto ya Ori, bato ya liboso oyo bavandaki na mokili yango: Lotani, Shobali, Tsibeoni, Ana,
21 底顺、以察、底珊。这是从以东地的何利人西珥子孙中所出的族长。
Dishoni, Etseri mpe Dishani. Bango nde bakonzi ya libota ya Ori, mwana mobali ya Seiri, na mokili ya Edomi.
Bana mibali ya Lotani: Ori mpe Emami. Timina azalaki ndeko mwasi ya Lotani.
23 朔巴的儿子是亚勒文、玛拿辖、以巴录、示玻、阿南。
Bana mibali ya Shobali: Alivani, Manaati, Ebali, Shefo mpe Onami.
24 祭便的儿子是亚雅、亚拿(当时在旷野放他父亲祭便的驴,遇着温泉的,就是这亚拿)。
Bana mibali ya Tsibeoni: Aya mpe Ana. Ezali Ana nde amonaki maziba ya mayi kati na esobe tango azalaki koleisa ba-ane ya Tsibeoni, tata na ye.
Bana ya Ana: Dishoni, mwana na ye ya mobali; mpe Olibama, mwana na ye ya mwasi.
Bana mibali ya Dishoni: Emidani, Eshibani, Yitirani mpe Kerani.
Tala bana mibali ya Etseri: Bilani, Zavani mpe Akani.
Bana mibali ya Dishani: Utsi mpe Arani.
29 从何利人所出的族长记在下面:就是罗坍族长、朔巴族长、祭便族长、亚拿族长、
Tala bakonzi ya mabota ya Ori: mokonzi Lotani, mokonzi Shobali, mokonzi Tsibeoni, mokonzi Ana,
30 底顺族长、以察族长、底珊族长。这是从何利人所出的族长,都在西珥地,按着宗族作族长。
mokonzi Dishoni, mokonzi Etseri mpe mokonzi Dishani. Bango nde bazalaki bakonzi ya mabota ya Ori, na mokili ya Seiri.
31 以色列人未有君王治理以先,在以东地作王的记在下面。
Tala bakonzi oyo bakonzaki kati na Edomi liboso ete bana ya Isalaele bazwa mokonzi:
32 比珥的儿子比拉在以东作王,他的京城名叫亭哈巴。
Bela, mwana mobali ya Beori, akomaki mokonzi ya Edomi. Kombo ya engumba na ye ezalaki « Dinaba. »
33 比拉死了,波斯拉人谢拉的儿子约巴接续他作王。
Tango Bela akufaki, Yobabi, mwana mobali ya Zera, moto ya mokili ya Botsira, akitanaki na ye na bokonzi.
Tango Yobabi akufaki, Ushami, moto ya mokili ya Temani, akitanaki na ye na bokonzi.
35 户珊死了,比达的儿子哈达接续他作王;这哈达就是在摩押地杀败米甸人的,他的京城名叫亚未得。
Tango Ushami akufaki, Adadi, mwana mobali ya Bedadi oyo alongaki Madiani na bilanga ya Moabi, akitanaki na ye na bokonzi. Kombo ya engumba na ye ezalaki Aviti.
Tango Adadi akufaki, Samila, moto ya engumba Masireka, akitanaki na ye na bokonzi.
Tango Samila akufaki, Saulo, moto ya engumba Reoboti, engumba oyo etongama pembeni ya ebale, akitanaki na ye na bokonzi.
38 扫罗死了,亚革波的儿子巴勒·哈南接续他作王。
Tango Saulo akufaki, Bala-Anani, mwana mobali ya Akibori, akitanaki na ye na bokonzi.
39 亚革波的儿子巴勒·哈南死了,哈达接续他作王,他的京城名叫巴乌;他的妻子名叫米希她别,是米·萨合的孙女,玛特列的女儿。
Tango Bala-Anani, mwana mobali ya Akibori, akufaki, Adari akitanaki na ye na bokonzi. Kombo ya engumba na ye ezalaki « Pawu, » mpe kombo ya mwasi na ye ezalaki « Meetabeli. » Meetabeli azalaki mwana mwasi ya Matiredi, mwana mwasi ya Mezaabi.
40 从以扫所出的族长,按着他们的宗族、住处、名字记在下面:就是亭纳族长、亚勒瓦族长、耶帖族长、
Tala bato oyo bazalaki bakonzi ya mabota ya Ezawu kolanda mabota ya botata, bisika oyo bazalaki kovanda mpe bakombo na bango: Timina, Aliva, Yeteti,
Kenazi, Temani, Mibitsari,
43 玛基叠族长、以兰族长。这是以东人在所得为业的地上,按着他们的住处。(所有的族长都是以东人的始祖以扫的后代。)
Magidieli mpe Irami. Bango nde bazalaki bakonzi ya Edomi kolanda bituka na bango, kati na mokili oyo bazalaki kovanda. Ezawu azalaki koko ya bato ya Edomi.