< 以西结书 8 >

1 第六年六月初五日,我坐在家中;犹大的众长老坐在我面前。在那里主耶和华的灵降在我身上。
Na mobu ya motoba, na mokolo ya mitano ya sanza ya motoba, wana nazalaki ya kovanda kati na ndako na ngai, mpe bakambi ya Yuda bavandaki liboso na ngai, loboko ya Nkolo Yawe esimbaki ngai kuna.
2 我观看,见有形象仿佛火的形状,从他腰以下的形状有火,从他腰以上有光辉的形状,仿佛光耀的精金。
Tango natalaki, namonaki elilingi moko lokola elongi ya moto. Eteni oyo ezalaki komonana lokola se ya loketo na yango ezalaki lokola moto, mpe lolenge ya eteni oyo ezalaki komonana lokola likolo ya loketo na yango ezalaki kongenga makasi lokola linzanza ya sika.
3 他伸出仿佛一只手的样式,抓住我的一绺头发,灵就将我举到天地中间,在 神的异象中,带我到耶路撒冷朝北的内院门口,在那里有触动主怒偶像的坐位,就是惹动忌邪的。
Asembolaki elilingi moko lokola loboko mpe asimbaki ngai na suki ya moto. Molimo atombolaki ngai na kati-kati ya se mpe likolo mpe amemaki ngai, kati na emoniseli ya Nzambe, kino na Yelusalemi, na ekotelo ya Ekuke ya nor ya lopango ya kati ya Tempelo, epai wapi batelemisaki nzambe ya ekeko oyo etumbolaka zuwa.
4 谁知,在那里有以色列 神的荣耀,形状与我在平原所见的一样。
Nkembo ya Nzambe ya Isalaele ezalaki kuna ndenge kaka namonaki yango na emoniseli kati na lubwaku.
5 神对我说:“人子啊,你举目向北观看。”我就举目向北观看,见祭坛门的北边,在门口有这惹忌邪的偶像;
Alobaki na ngai: « Mwana na moto, tala na ngambo ya nor. » Natombolaki miso na ngai mpe namonaki nzambe ya ekeko ya zuwa, na ekotelo ya Ekuke oyo ya nor ya etumbelo.
6 又对我说:“人子啊,以色列家所行的,就是在此行这大可憎的事,使我远离我的圣所,你看见了吗?你还要看见另有大可憎的事。”
Alobaki na ngai: « Mwana na moto, ozali komona makambo oyo bazali kosala, makambo mabe mpe ya nkele oyo libota ya Isalaele bazali kosala awa, makambo oyo ekokomisa Ngai mosika ya Esika na Ngai ya bule? Kasi okomona lisusu makambo oyo ezali mabe koleka. »
7 他领我到院门口。我观看,见墙上有个窟窿。
Amemaki ngai na ekotelo ya lopango. Tango natalaki, namonaki lidusu moko na mir.
8 他对我说:“人子啊,你要挖墙。”我一挖墙,见有一门。
Alobaki na ngai: « Mwana na moto, tobola mir. » Tango natobolaki yango, namonaki ekuke moko kuna.
9 他说:“你进去,看他们在这里所行可憎的恶事。”
Alobaki na ngai lisusu: « Kota; okomona makambo mabe mpe ya nkele oyo bazali kosala awa! »
10 我进去一看,谁知,在四面墙上画着各样爬物和可憎的走兽,并以色列家一切的偶像。
Tango nakotaki, natalaki mpe namonaki ete bakomakoma na bamir bililingi ya miselekete mpe ya banyoka ya lolenge nyonso, ya banyama nyonso ya mbindo mpe ya banzambe nyonso ya bikeko ya libota ya Isalaele.
11 在这些像前有以色列家的七十个长老站立,沙番的儿子雅撒尼亚也站在其中。各人手拿香炉,烟云的香气上腾。
Bongo, liboso na yango, bakambi tuku sambo ya libota ya Isalaele batelemaki; mpe moko na moko kati na bango asimbaki mbabola oyo batumbelaka malasi: ezalaki kobimisa milinga ya solo ya ansa. Yazania, mwana mobali ya Shafani, azalaki mpe elongo na bango.
12 他对我说:“人子啊,以色列家的长老暗中在各人画像屋里所行的,你看见了吗?他们常说:‘耶和华看不见我们;耶和华已经离弃这地。’”
Molimo alobaki na ngai: « Mwana na moto, omoni makambo oyo bakambi ya libota ya Isalaele bazali kosala, moko na moko kati na esika ya bule ya nzambe na ye ya ekeko? Bazali koloba: ‹ Yawe azali komona biso te, Yawe asili na Ye kosundola mokili! › »
13 他又说:“你还要看见他们另外行大可憎的事。”
Alobaki lisusu: « Okomona bango ndenge bazali kosala makambo ya mbindo oyo eleki penza mabe. »
14 他领我到耶和华殿外院朝北的门口。谁知,在那里有妇女坐着,为搭模斯哭泣。
Bongo amemaki ngai lisusu na ekotelo ya Ekuke ya ngambo ya nor ya Tempelo ya Yawe; bongo namonaki basi bavandi wana, bazali kolela Tamuzi.
15 他对我说:“人子啊,你看见了吗?你还要看见比这更可憎的事。”
Alobaki na ngai: « Mwana na moto, omoni makambo oyo? Okomona lisusu makambo ya mbindo koleka oyo ya liboso. »
16 他又领我到耶和华殿的内院。谁知,在耶和华的殿门口、廊子和祭坛中间,约有二十五个人背向耶和华的殿,面向东方拜日头。
Akotisaki ngai kati na lopango ya kati ya Tempelo ya Yawe: na ekotelo ya Tempelo, bato tuku mibale na mitano bazalaki na kati-kati ya ndako moke ya kokotela na Tempelo mpe etumbelo; bapesaki mikongo na Tempelo ya Yawe mpe bilongi na bango ezalaki kotala na ngambo ya este; bazalaki kogumbama na kotalaka na ngambo ya este mpo na kogumbamela moyi.
17 他对我说:“人子啊,你看见了吗?犹大家在此行这可憎的事还算为小吗?他们在这地遍行强暴,再三惹我发怒,他们手拿枝条举向鼻前。
Alobaki na ngai lisusu: « Mwana na moto, omoni? Boni, ezali penza pamba mpo na libota ya Yuda kosala makambo ya nkele oyo bazali kosala na esika oyo? Batondisa lisusu mokili na makambo na bango ya kanza mpo na kokoba kotumbola kanda na Ngai? Tala ndenge bazali kotombola mandalala kino na zolo!
18 因此,我也要以忿怒行事,我眼必不顾惜,也不可怜他们;他们虽向我耳中大声呼求,我还是不听。”
Mpo na yango, Ngai mpe nakopesa bango etumbu na kanda, nakoyokela bango mawa te mpe nakobikisa bango te. Ata bagangi na matoyi na Ngai, nakoyoka bango te. »

< 以西结书 8 >