< 以西结书 36 >

1 “人子啊,你要对以色列山发预言说:以色列山哪,要听耶和华的话。
« Mwana na moto, sakola na tina na bangomba ya Isalaele mpe loba: ‹ Bino bangomba ya Isalaele, boyoka Liloba na Yawe!
2 主耶和华如此说:因仇敌说:‘阿哈!这永久的山冈都归我们为业了!’
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Moyini alobaki na tina na bino: ‘Ah, bangomba ya kala ekomi sik’oyo ya biso!’ ›
3 所以要发预言说,主耶和华如此说:因为敌人使你荒凉,四围吞吃,好叫你归与其余的外邦人为业,并且多嘴多舌的人提起你来,百姓也说你有臭名。
Yango wana, sakola! Loba: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Lokola babebisaki bino mpe bapanzaki bino bipai nyonso mpo ete bokoma libula ya bikolo mosusu mpe eloko ya masolo ya kotiola mpe ya kofinga kati na bato;
4 故此,以色列山要听主耶和华的话。大山小冈、水沟山谷、荒废之地、被弃之城,为四围其余的外邦人所占据、所讥刺的,
mpo na yango, bino bangomba ya Isalaele, boyoka liloba na Nkolo Yawe: Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na bangomba ya milayi mpe ya mikuse, na mabulu mpe na mabwaku, na bisika ya libebi mpe na bingumba oyo basundola mpe babebisa, bongo bato ya bikolo mosusu ya zingazinga bayibaki mpe bakomisaki yango eloko ya kotiola;
5 主耶和华对你们如此说:我真发愤恨如火,责备那其余的外邦人和以东的众人。他们快乐满怀,心存恨恶,将我的地归自己为业,又看为被弃的掠物。
tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: na zuwa na Ngai ya makasi, natombokeli bikolo oyo etikali mpe mokili mobimba ya Edomi, pamba te na esengo nyonso mpe na mayele mabe kati na mitema na bango, bakomisi mokili na Ngai lokola libula na bango moko mpo ete babotola bilanga na yango nyonso na makasi. ›
6 所以,你要指着以色列地说预言,对大山小冈、水沟山谷说,主耶和华如此说:我发愤恨和忿怒说,因你们曾受外邦人的羞辱,
Mpo na yango, sakola na tina na mokili ya Isalaele mpe loba na bangomba ya milayi mpe ya mikuse, na mabulu mpe na mabwaku: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nazali koloba na zuwa mpe na kanda na Ngai ya makasi, pamba te bikolo mosusu emonisi bino pasi na kotiola.
7 所以我起誓说:你们四围的外邦人总要担当自己的羞辱。这是主耶和华说的。
Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: nalapi ndayi, na kotombola loboko, ete ezali bikolo oyo ezingeli bino nde ekotiolama.
8 “以色列山哪,你必发枝条,为我的民以色列结果子,因为他们快要来到。
Kasi bino, bangomba ya Isalaele, bokobota bitape mpe bambuma mpo na Isalaele, bato na Ngai; pamba te etikali kaka moke ete bazonga epai na bango.
9 看哪,我是帮助你的,也必向你转意,使你得以耕种。
Nazali kolandela likambo na bino mpe nazali kotala bino na liso ya ngolu; bakobalola bino lisusu ndenge babalolaka mabele ya bilanga mpe bakolona lisusu bankona na mabele na bino.
10 我必使以色列全家的人数在你上面增多,城邑有人居住,荒场再被建造。
Nakokomisa motango ya bato na bino ebele, na mabele na bino: yango nde libota mobimba ya Isalaele; bato bakozongela lisusu kovanda kati na bingumba na bino mpe bakotonga lisusu bandako na bino oyo ebukana.
11 我必使人和牲畜在你上面加增;他们必生养众多。我要使你照旧有人居住,并要赐福与你比先前更多,你就知道我是耶和华。
Nakokomisa motango ya bato mpe ya bibwele na bino ebele na mokili na bino: bakobotana mpe bakokoma ebele penza. Nakovandisa lisusu bato na mokili na bino ndenge ezalaka na tango ya kala mpe nakokomisa bino bato ya kofuluka koleka liboso. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
12 我必使人,就是我的民以色列,行在你上面。他们必得你为业;你也不再使他们丧子。
Nakosala ete bato na Ngai, bana ya Isalaele, batambola na mokili na bino; bakozwa mabele na bino mpe bokozala libula na bango; bokotikala lisusu te koboma bana na bango.
13 主耶和华如此说:因为人对你说:‘你是吞吃人的,又使国民丧子’,
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Lokola bato balobaka na tina na bino: Bobomaka bato mpe bozangisaka ekolo na bino bana na yango;
14 所以主耶和华说:你必不再吞吃人,也不再使国民丧子。
mpo na yango, bokoboma lisusu bato te mpe bokozangisa lisusu ekolo na bino bana te, elobi Nkolo Yawe.
15 我使你不再听见各国的羞辱,不再受万民的辱骂,也不再使国民绊跌。这是主耶和华说的。”
Nakosala ete boyoka lisusu kotiolama ya bikolo mosusu te, mpe bato ya bikolo mosusu bakofinga bino lisusu te; na bongo, bokokweyisa lisusu ekolo na bino te, elobi Nkolo Yawe. › »
16 耶和华的话又临到我说:
Yawe alobaki na ngai lisusu:
17 “人子啊,以色列家住在本地的时候,在行动作为上玷污那地。他们的行为在我面前,好像正在经期的妇人那样污秽。
« Mwana na moto, tango bana ya Isalaele bazalaki kovanda na mokili na bango, bazalaki kokomisa yango mbindo na ezaleli mpe na misala na bango; ezaleli na bango ezalaki mbindo na miso na Ngai lokola makila ya mwasi oyo azali komona sanza na ye.
18 所以我因他们在那地上流人的血,又因他们以偶像玷污那地,就把我的忿怒倾在他们身上。
Boye, napeliselaki bango kanda na Ngai ya makasi, pamba te bazalaki kotangisa makila kati na mokili mpe bakomisaki yango mbindo na nzela ya banzambe na bango ya bikeko.
19 我将他们分散在列国,四散在列邦,按他们的行动作为惩罚他们。
Napanzaki bango kati na bikolo, mpe bapalanganaki kati na mikili mosusu; nasambisaki bango kolanda etamboli mpe misala na bango.
20 他们到了所去的列国,就使我的圣名被亵渎;因为人谈论他们说,这是耶和华的民,是从耶和华的地出来的。
Nzokande, na bisika nyonso oyo bazalaki kokende, babebisaki bosantu ya Kombo na Ngai, pamba te bazalaki koloba na tina na bango: ‹ Bato wana bazali solo bato ya Yawe, kasi tala ndenge batiki mokili na Ye! ›
21 我却顾惜我的圣名,就是以色列家在所到的列国中所亵渎的。
Boye, nabatelaki lokumu mpe bosantu ya Kombo na Ngai, oyo libota ya Isalaele babebisaki bosantu na yango kati na bikolo epai wapi bakendeki.
22 “所以,你要对以色列家说,主耶和华如此说:以色列家啊,我行这事不是为你们,乃是为我的圣名,就是在你们到的列国中所亵渎的。
Mpo na yango, loba na libota ya Isalaele: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Oh libota ya Isalaele, ezali mpo na bino te nde nazali kosala makambo oyo nyonso, kasi mpo na bosantu ya Kombo na Ngai, oyo bobebisaki kati na bikolo epai wapi bokendeki.
23 我要使我的大名显为圣;这名在列国中已被亵渎,就是你们在他们中间所亵渎的。我在他们眼前,在你们身上显为圣的时候,他们就知道我是耶和华。这是主耶和华说的。
Nakolakisa bosantu ya Kombo monene na Ngai, oyo esambwaki kati na bikolo, Kombo oyo bobebisaki bosantu na yango kati na bikolo yango. Boye, bikolo ekoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, elobi Nkolo Yawe, tango nakomonisa bosantu na Ngai na nzela na bino na miso na bango.
24 我必从各国收取你们,从列邦聚集你们,引导你们归回本地。
Pamba te nakobimisa bino na bikolo, nakosangisa bino wuta na bikolo mpe nakozongisa bino na mabele na bino moko.
25 我必用清水洒在你们身上,你们就洁净了。我要洁净你们,使你们脱离一切的污秽,弃掉一切的偶像。
Nakobwakela bino mayi ya peto, mpe bokokoma peto; nakopetola bino na mbindo na bino nyonso mpe na mbindo ya banzambe na bino nyonso ya bikeko.
26 我也要赐给你们一个新心,将新灵放在你们里面,又从你们的肉体中除掉石心,赐给你们肉心。
Nakopesa bino motema ya sika mpe nakotia kati na bino molimo ya sika; nakolongola kati na bino mitema ya mabanga mpe nakopesa bino mitema ya misuni.
27 我必将我的灵放在你们里面,使你们顺从我的律例,谨守遵行我的典章。
Nakotia Molimo na Ngai kati na bino mpe nakosala ete botosa bikateli na Ngai mpe bobatela mibeko na Ngai na bokebi.
28 你们必住在我所赐给你们列祖之地。你们要作我的子民,我要作你们的 神。
Bokovanda kati na mokili oyo napesaki epai ya bakoko na bino; bokozala bato na Ngai, mpe Ngai, nakozala Nzambe na bino.
29 我必救你们脱离一切的污秽,也必命五谷丰登,不使你们遭遇饥荒。
Nakobikisa bino na mbindo na bino nyonso, nakobotisa mbuma ya ble mpe nakokomisa yango ebele penza; bongo nakotindela bino lisusu nzala te.
30 我必使树木多结果子,田地多出土产,好叫你们不再因饥荒受外邦人的讥诮。
Nakosala ete banzete mpe milona ya bilanga ebota ebele, mpo ete boyoka lisusu soni te na miso ya bikolo likolo ya nzala.
31 那时,你们必追想你们的恶行和你们不善的作为,就因你们的罪孽和可憎的事厌恶自己。
Boye, tango bokokanisa lisusu etamboli mabe na bino mpe misala na bino ya mabe, bino moko bokomiyina likolo ya masumu mpe ya misala na bino ya nkele.
32 主耶和华说:你们要知道,我这样行不是为你们。以色列家啊,当为自己的行为抱愧蒙羞。
Nalingi bososola ete nazali kosala makambo oyo mpo na bino te, elobi Nkolo Yawe! Oh libota ya Isalaele, boyoka mawa mpe soni mpo na etamboli na bino!
33 “主耶和华如此说:我洁净你们,使你们脱离一切罪孽的日子,必使城邑有人居住,荒场再被建造。
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Na mokolo oyo nakopetola bino na masumu na bino nyonso, nakosala ete bato bazongela kovanda na bingumba na bino mpe batonga yango lisusu;
34 过路的人虽看为荒废之地,现今这荒废之地仍得耕种。
nakosala ete basala lisusu bilanga na mabele oyo ekomaki esobe, na esika ete etikala pamba na miso ya bato nyonso oyo bakoleka wana.
35 他们必说:‘这先前为荒废之地,现在成如伊甸园;这荒废凄凉、毁坏的城邑现在坚固有人居住。’
Bongo, bakoloba: ‘Mokili oyo ebebisamaki ekomi lokola elanga ya Edeni; bingumba oyo babuka, bongo etikala lisusu na bato te mpe babebisa, elendisami lisusu mpe bato bakomi lisusu kovanda kuna.’
36 那时,在你们四围其余的外邦人必知道我—耶和华修造那毁坏之处,培植那荒废之地。我—耶和华说过,也必成就。
Boye, bikolo oyo ekotikala zingazinga na bino ekoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe; Ngai nde natongi lisusu bingumba oyo ebukana, mpe naloni lisusu biloko oyo ebebisama. Ngai Yawe nde nalobi mpe nakokokisa yango. ›
37 “主耶和华如此说:我要加增以色列家的人数,多如羊群。他们必为这事向我求问,我要给他们成就。
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Na mbala oyo lisusu, nakosala ete libota ya Isalaele eluka Ngai mpo ete natalisa bango ngolu na Ngai: nakosala ete bato na yango bakoma ebele lokola bibwele.
38 耶路撒冷在守节作祭物所献的羊群怎样多,照样,荒凉的城邑必被人群充满。他们就知道我是耶和华。”
Bingumba oyo ebebisama ekotonda lisusu na bato ebele lokola bibwele oyo bapesaka na mbeka, lokola bibwele oyo bamemaka na Yelusalemi na tango ya bafeti oyo ekatama. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. »

< 以西结书 36 >