< 阿摩司书 6 >

1 国为列国之首,人最著名, 且为以色列家所归向, 在锡安和撒马利亚山安逸无虑的,有祸了!
Mawa na bino oyo bomimonaka ete bokoka kati na Siona, mpe na bino oyo bokanisaka ete bozali na kimia na likolo ya ngomba Samari, bino bato ya lokumu ya ekolo oyo ekenda sango koleka bikolo mosusu epai wapi bana ya Isalaele bayaka!
2 你们要过到甲尼察看, 从那里往大城哈马去, 又下到非利士人的迦特, 看那些国比你们的国还强吗? 境界比你们的境界还宽吗?
Bokende na Kaline mpo na kotala makambo oyo elekaki kuna! Bongo longwa kuna, bokende na Amati, engumba monene, mpe bokende lisusu na Gati kati na Filisitia! Boni, bingumba oyo eleki penza bingumba ya mikili ya bokonzi oyo na malamu? Mpe etando na yango eleki ya bino na monene?
3 你们以为降祸的日子还远, 坐在位上尽行强暴。
Bozali kozongisa mokolo ya pasi sima mpe komibendela bokonzi ya somo.
4 你们躺卧在象牙床上,舒身在榻上, 吃群中的羊羔,棚里的牛犊;
Bozali kolala na bambeto oyo batia pembe ya nzoko, bozali komivandisa na bakiti ya divan ya kitoko, bozali kolia misuni ya bameme ya kitoko kati na bibwele mpe ya bana ngombe ya mibali ya mafuta kati na etonga.
5 弹琴鼓瑟唱消闲的歌曲, 为自己制造乐器,如同大卫所造的;
Bozali kobeta mandanda na bino lokola Davidi mpe kokotisa bibetelo mindule kati na banzembo na bino.
6 以大碗喝酒,用上等的油抹身, 却不为约瑟的苦难担忧。
Bozali komela bakopo etonda na masanga ya vino mpe bozali kopakola mafuta ya talo na banzoto na bino, kasi kobebisama ya ndako ya Jozefi ezali kosala bino pasi na mitema te.
7 所以这些人必在被掳的人中首先被掳; 舒身的人荒宴之乐必消灭了。
Yango wana bokozala bato ya liboso mpo na kokende na bowumbu, mpe bafeti ya bato oyo bamivandisaka na bakiti ya kitoko ekosila.
8 主耶和华—万军之 神指着自己起誓说: 我憎恶雅各的荣华,厌弃他的宫殿; 因此,我必将城和其中所有的都交付敌人。
Nkolo Yawe alapi ndayi na Kombo na Ye moko; Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Nazali na somo ya lolendo ya Jakobi, nayini bandako na ye, oyo batonga makasi; nakokaba engumba elongo na biloko na yango nyonso. »
9 那时,若在一房之内剩下十个人,也都必死。
Soki bato zomi batikali na bomoi kati na ndako moko, bango mpe bakokufa.
10 死人的伯叔,就是烧他尸首的,要将这尸首搬到房外,问房屋内间的人说:“你那里还有人没有?”他必说:“没有”;又说:“不要作声,因为我们不可提耶和华的名。”
Soki noko moko oyo asengeli kotumba bibembe ayei kobimisa yango na ndako mpe atuni na moto nyonso oyo abombami kuna: — Boni, ozali elongo na moto mosusu kuna? Akozongisa: — Te, moto mosusu azali te! Bongo akoloba lisusu: — Esili! Bakolobela lisusu Kombo ya Yawe te.
11 看哪,耶和华出令, 大房就被攻破, 小屋就被打裂。
Pamba te Yawe apesi mitindo, boye akobuka-buka na biteni ndako monene mpe akobuka-buka na biteni ya mike-mike ndako moke.
12 马岂能在崖石上奔跑? 人岂能在那里用牛耕种呢? 你们却使公平变为苦胆, 使公义的果子变为茵 。
Boni, bampunda ekimaka penza mbangu na nzela oyo etonda na mabanga? Ngombe ebalolaka penza mabele na bisika ya ndenge wana? Kasi bino bokomisi bosembo ngenge, mpe mbuma ya bosembo bololo.
13 你们喜爱虚浮的事,自夸说: 我们不是凭自己的力量取了角吗?
Bozali kosepela mpo ete bozwi Lo-Debari mpe bozali komikumisa na koloba: « Boni, tobotoli engumba Karinayimi na makasi na biso moko te? »
14 耶和华、万军之 神说: 以色列家啊,我必兴起一国攻击你们; 他们必欺压你们, 从哈马口直到亚拉巴的河。
Mpo na yango, Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Oh libota ya Isalaele, nakobimisa ekolo moko oyo ekobundisa mpe ekonyokola yo tango nyonso wuta na Lebo-Amati kino na lubwaku ya Araba. »

< 阿摩司书 6 >