< 列王纪下 3 >
1 犹大王约沙法十八年,亚哈的儿子约兰在撒马利亚登基作了以色列王十二年。
Tango Jozafati, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, Yorami, mwana mobali ya Akabi, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari. Asalaki mibu zomi na mibale na bokonzi.
2 他行耶和华眼中看为恶的事,但不至像他父母所行的,因为除掉他父所造巴力的柱像。
Asalaki mabe na miso ya Yawe, kasi ndenge moko te na tata mpe mama na ye. Abukaki ekeko ya Bala oyo tata na ye atelemisaki,
3 然而,他贴近尼八的儿子耶罗波安使以色列人陷在罪里的那罪,总不离开。
kasi akangamaki kaka na lisumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo amemaki Isalaele na kosala masumu; atikalaki kobongwana na yango te.
4 摩押王米沙牧养许多羊,每年将十万羊羔的毛和十万公绵羊的毛给以色列王进贡。
Mesha, mokonzi ya Moabi, azalaki kobokola bameme. Mibu nyonso, azalaki kofuta mpako epai ya mokonzi ya Isalaele, oyo ezalaki na motuya ya bampate nkoto nkama moko mpe ya bameme ya mibali nkoto nkama moko elongo na bapwale na yango.
Tango Akabi akufaki, mokonzi ya Moabi atombokelaki mokonzi ya Isalaele.
Na tango wana, mokonzi Yorami abimaki na Samari mpe asangisaki Isalaele mobimba.
7 前行的时候,差人去见犹大王约沙法,说:“摩押王背叛我,你肯同我去攻打摩押吗?”他说:“我肯上去,你我不分彼此,我的民与你的民一样,我的马与你的马一样。”
Atindaki lisusu sango oyo epai ya Jozafati, mokonzi ya Yuda: — Mokonzi ya Moabi atombokeli ngai. Okoki solo kokende elongo na ngai mpo na kobundisa bato ya Moabi? Mokonzi Jozafati azongisaki: — Nakokende na yo elongo. Ngai na yo tozali kaka moto moko; bato na ngai bazali kaka bato na yo, bongo bampunda na ngai ezali mpe bampunda na yo.
8 约兰说:“我们从哪条路上去呢?”回答说:“从以东旷野的路上去。”
Jozafati atunaki: — Tokokende na nzela nini? Yorami azongisaki: — Na nzela ya esobe ya Edomi.
9 于是,以色列王和犹大王,并以东王,都一同去绕行七日的路程;军队和所带的牲畜没有水喝。
Mokonzi ya Isalaele abimaki elongo na mokonzi ya Yuda mpe mokonzi ya Edomi. Batambolaki mikolo sambo, kasi mayi ya komela ezalaki lisusu te mpo na mampinga mpe banyama oyo ezalaki kotambola elongo na bango.
10 以色列王说:“哀哉!耶和华招聚我们这三王,乃要交在摩押人的手里。”
Mokonzi ya Isalaele akamwaki: — Ndenge nini boye! Yawe asangisi biso awa, biso bakonzi misato, kaka mpo na kokaba biso na maboko ya bato ya Moabi?
11 约沙法说:“这里不是有耶和华的先知吗?我们可以托他求问耶和华。”以色列王的一个臣子回答说:“这里有沙法的儿子以利沙,就是从前服事以利亚的。”
Kasi Jozafati atunaki: — Awa, ezali te na mosakoli ya Yawe mpo ete totuna toli ya Yawe na nzela na ye? Mokonzi moko ya mampinga ya mokonzi ya Isalaele azongisaki: — Elize, mwana mobali ya Shafati, azali awa. Azalaki kosopa mayi na maboko ya Eliya.
12 约沙法说:“他必有耶和华的话。”于是以色列王和约沙法,并以东王都下去见他。
Jozafati alobaki: — Solo, Liloba na Yawe ezali elongo na ye. Boye mokonzi ya Isalaele elongo na Jozafati mpe mokonzi ya Edomi bakendeki epai ya Elize.
13 以利沙对以色列王说:“我与你何干?去问你父亲的先知和你母亲的先知吧!”以色列王对他说:“不要这样说,耶和华招聚我们这三王,乃要交在摩押人的手里。”
Elize alobaki na mokonzi ya Isalaele: — Ngai na yo likambo nini? Kende koluka mosakoli ya tata na yo to ya mama na yo. Mokonzi ya Isalaele azongisaki: — Te! Yawe asangisi biso te, biso bakonzi oyo misato, mpo na kokaba biso na maboko ya bato ya Moabi!
14 以利沙说:“我指着所事奉永生的万军耶和华起誓,我若不看犹大王约沙法的情面,必不理你,不顾你。
Elize azongisaki: — Na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo ngai nasalelaka; soki ezalaki te mpo na kotosa Jozafati, mokonzi ya Yuda, nalingaki kutu ata moke te kotala yo to kolanda yo na bokebi.
15 现在你们给我找一个弹琴的来。”弹琴的时候,耶和华的灵就降在以利沙身上。
Kasi sik’oyo, memela ngai mobeti moko ya lindanda! Wana mobeti lindanda azalaki kobeta, loboko ya Yawe ekitelaki Elize,
16 他便说:“耶和华如此说:‘你们要在这谷中满处挖沟;
mpe Elize alobaki: « Tala liloba oyo Yawe alobi: Botimola mabulu ebele na lubwaku oyo!
17 因为耶和华如此说:你们虽不见风,不见雨,这谷必满了水,使你们和牲畜有水喝。’
Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi: Bokotikala te komona mopepe to mvula, kasi lubwaku oyo ekotonda na mayi, mpe bino elongo na bibwele na bino bokomela yango.
18 在耶和华眼中这还算为小事,他也必将摩押人交在你们手中。
Ezali likambo moke na miso ya Yawe. Akokaba lisusu bato ya Moabi na maboko na bino.
19 你们必攻破一切坚城美邑,砍伐各种佳树,塞住一切水泉,用石头糟踏一切美田。”
Bokobuka bingumba na bango nyonso oyo batonga makasi mpe bingumba nyonso ya minene, bokokata banzete na bango nyonso ya kitoko, bokokanga bitima nyonso ya mayi mpe bokobebisa bilanga nyonso na mabanga. »
20 次日早晨,约在献祭的时候,有水从以东而来,遍地就满了水。
Na tongo ya mokolo oyo elandaki, na tango oyo batumbaka mbeka, mayi ebandaki kotiola na nzela ya Edomi, mpe mabele etondaki na mayi.
21 摩押众人听见这三王上来要与他们争战,凡能顶盔贯甲的,无论老少,尽都聚集站在边界上。
Nzokande, sima na bato nyonso ya Moabi koyoka sango ete bakonzi bayei kobundisa bango, babengaki bato nyonso, bilenge mpe mikolo oyo bakoki komema bibundeli, mpe batelemisaki bango na mondelo ya mboka.
22 次日早晨,日光照在水上,摩押人起来,看见对面水红如血,
Tango balamukaki na tongo-tongo, moyi ezalaki kongala na mayi; mpe bato ya Moabi bamonaki liboso na bango mayi motane lokola makila.
23 就说:“这是血啊!必是三王互相击杀,俱都灭亡。摩押人哪,我们现在去抢夺财物吧!”
Bagangaki: « Ezali makila! Bakonzi babundi bango na bango. Sik’oyo, bato na Moabi, tokende kobotola biloko na bango! »
24 摩押人到了以色列营,以色列人就起来攻打他们,以致他们在以色列人面前逃跑。以色列人往前追杀摩押人,直杀入摩押的境内,
Kasi tango bato ya Moabi bakomaki na molako ya bana ya Isalaele, bana ya Isalaele batelemaki, babundisaki bango kino bato ya Moabi bakimaki. Bato ya Isalaele bakotaki na mboka Moabi mpe babetaki yango.
25 拆毁摩押的城邑,各人抛石填满一切美田,塞住一切水泉,砍伐各种佳树,只剩下吉珥·哈列设的石墙;甩石的兵在四围攻打那城。
Babebisaki bingumba, mpe moto nyonso abwakaki libanga moko na bilanga nyonso ya kitoko kino etondaki na mabanga, bakangaki bitima nyonso ya mayi, mpe bakataki nzete nyonso ya kitoko. Kaka engumba ya Kiri-Aresheti nde etikalaki na mabanga na yango; kasi babwaki ya mabanga bazingelaki yango mpe babundisaki yango lokola.
26 摩押王见阵势甚大,难以对敌,就率领七百拿刀的兵,要冲过阵去到以东王那里,却是不能;
Tango mokonzi ya Moabi amonaki ete bitumba ebalukeli ye, akamataki basoda nkama sambo oyo babundaka na mipanga, mpo na kofungola nzela kino epai ya mokonzi ya Edomi, kasi balongaki te.
27 便将那应当接续他作王的长子,在城上献为燔祭。以色列人遭遇耶和华的大怒,于是三王离开摩押王,各回本国去了。
Boye azwaki mwana na ye ya liboso ya mobali oyo alingaki kokitana na ye na bokonzi, abonzaki ye lokola mbeka ya kotumba, na likolo ya mir ya engumba. Tango bamonaki bongo, bana ya Isalaele bayokaki mawa, balongwaki mpe bazongaki na mboka na bango.