< 历代志下 23 >
1 第七年,耶何耶大奋勇自强,将百夫长耶罗罕的儿子亚撒利雅,约哈难的儿子以实玛利,俄备得的儿子亚撒利雅,亚大雅的儿子玛西雅,细基利的儿子以利沙法召来,与他们立约。
Na mobu ya sambo, Nganga-Nzambe Yeoyada alongolaki kobanga mpe azwaki mokano ya kosala boyokani elongo na bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko: Azaria, mwana mobali ya Yeroami; Isimaeli, mwana mobali ya Yoanani; Azaria, mwana mobali ya Obedi; Maaseya, mwana mobali ya Adaya; mpe Elishafati, mwana mobali ya Zikiri.
2 他们走遍犹大,从犹大各城里招聚利未人和以色列的众族长到耶路撒冷来。
Batambolaki kati na Yuda mpe basangisaki Balevi elongo na bakonzi ya mabota ya Isalaele, oyo bawutaki na bingumba nyonso. Tango bayaki na Yelusalemi,
3 会众在 神殿里与王立约。耶何耶大对他们说:“看哪,王的儿子必当作王,正如耶和华指着大卫子孙所应许的话”;
lisanga mobimba esalaki boyokani elongo na mokonzi kati na Tempelo ya Nzambe. Yeoyada alobaki na bango: « Mwana mobali ya mokonzi asengeli kokonza lokola mokonzi, kolanda elaka oyo Yawe apesaki na tina na bakitani ya Davidi.
4 又说:“你们当这样行:祭司和利未人凡安息日进班的,三分之一要把守各门,
Sik’oyo, tala ndenge bokosala: ‹ kati na bandambo misato ya lisanga na bino Banganga-Nzambe mpe Balevi oyo bakosala na mokolo ya Saba, ndambo ya liboso bakokengela bikuke,
5 三分之一要在王宫,三分之一要在基址门;众百姓要在耶和华殿的院内。
ndambo ya mibale bakokengela ndako ya mokonzi, mpe ndambo ya misato bakokengela ekuke ya Yesodi. Bato nyonso bakozala kati na mapango ya Tempelo ya Yawe.
6 除了祭司和供职的利未人之外,不准别人进耶和华的殿;惟独他们可以进去,因为他们圣洁。众百姓要遵守耶和华所吩咐的。
Moko te asengeli kokota kati na Tempelo ya Yawe longola kaka Banganga-Nzambe mpe Balevi oyo bakozala na mosala, pamba te bazali bule. Bato nyonso oyo batikali basengeli kotosa mobeko ya Yawe.
7 利未人要手中各拿兵器,四围护卫王;凡擅入殿宇的,必当治死。王出入的时候,你们当跟随他。”
Balevi bakozingela mokonzi, moko na moko na ebundeli na ye na loboko. Moto mosusu oyo akomeka kokota na Tempelo ya Yawe, basengeli koboma ye. Bozala pene ya mokonzi na bisika nyonso oyo akokende. › »
8 利未人和犹大众人都照着祭司耶何耶大一切所吩咐的去行,各带所管安息日进班出班的人来,因为祭司耶何耶大不许他们下班。
Balevi mpe bato nyonso ya Yuda basalaki ndenge kaka Nganga-Nzambe Yeoyada atindaki. Moko na moko akamataki basoda na ye, ba-oyo bazalaki kokota na mosala na mokolo ya Saba mpe ba-oyo basilisaki mosala na bango na mokolo yango ya Saba, pamba te Nganga-Nzambe Yeoyada apemisaki ndambo moko te.
9 祭司耶何耶大便将 神殿里所藏大卫王的枪、盾牌、挡牌交给百夫长,
Nganga-Nzambe Yeoyada apesaki na bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko makonga, banguba minene mpe banguba mike ya mokonzi Davidi, oyo ezalaki kati na Tempelo ya Nzambe.
10 又分派众民手中各拿兵器,在坛和殿那里,从殿右直到殿左,站在王子的四围;
Atiaki bato nyonso zingazinga ya mokonzi, moko na moko na ebundeli na ye na loboko, pembeni ya etumbelo mpe ya Tempelo, wuta na ngambo ya sude kino na ngambo ya nor ya Tempelo.
11 于是领王子出来,给他戴上冠冕,将律法书交给他,立他作王。耶何耶大和众子膏他,众人说:“愿王万岁!”
Babimisaki mwana mobali ya mokonzi, balatisaki ye motole, bapesaki ye mokanda ya boyokani mpe bakomisaki ye mokonzi. Yeoyada mpe bana na ye ya mibali bapakolaki ye mafuta ya bokonzi mpe bagangaki: « Tika ete mokonzi awumela na bomoi! »
12 亚她利雅听见民奔走赞美王的声音,就到民那里,进耶和华的殿,
Tango Atali ayokaki makelele ya bato oyo bazalaki kopota mbangu mpe kobetela mokonzi maboko, akendeki epai ya bato, na Tempelo ya Yawe,
13 看见王站在殿门的柱旁,百夫长和吹号的人侍立在王左右,国民都欢乐吹号,又有歌唱的,用各样的乐器领人歌唱赞美;亚她利雅就撕裂衣服,喊叫说:“反了!反了!”
atalaki mpe amonaki mokonzi atelemi na etemelo na ye ya kolobela, pembeni ya ekotelo ya Tempelo. Bakonzi ya basoda mpe bato oyo babetaka bakelelo bazalaki pembeni ya mokonzi. Bato nyonso ya mokili bazalaki kosepela wana bazalaki kobeta bakelelo; mpe bayembi elongo na bibetelo na bango ya mindule bazalaki kokamba nzembo mpo na kokumisa Nkolo. Atali apasolaki bilamba na ye mpe agangaki: — Basaleli ngai likita! Basaleli ngai likita!
14 祭司耶何耶大带管辖军兵的百夫长出来,吩咐他们说:“将她赶到班外,凡跟随她的必用刀杀死!”因为祭司说:“不可在耶和华殿里杀她。”
Nganga-Nzambe Yeoyada abengisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko mpe alobaki na bango: — Bobimisa ye na molongo! Mpe boboma na mopanga moto nyonso oyo akolanda ye! Pamba te Nganga-Nzambe alobaki: « Boboma ye te kati na Tempelo ya Yawe! »
15 众兵就闪开,让她去;她走到王宫的马门,便在那里把她杀了。
Boye, wana Atali azwaki nzela ya ekotelo ya bampunda mpo na kokende na ndako ya mokonzi, bakangaki ye mpe babomaki ye kuna.
Yeoyada asalaki boyokani kati na ye, bato nyonso mpe mokonzi, mpo ete bazala bato ya Yawe.
17 于是众民都到巴力庙,拆毁了庙,打碎坛和像,又在坛前将巴力的祭司玛坦杀了。
Bato nyonso bakendeki na ndako ya nzambe Bala, babukaki yango elongo na bitumbelo mpe bikeko, mpe babomaki Matani, nganga-nzambe ya Bala, liboso ya bitumbelo.
18 耶何耶大派官看守耶和华的殿,是在祭司利未人手下。这祭司利未人是大卫分派在耶和华殿中、照摩西律法上所写的,给耶和华献燔祭,又按大卫所定的例,欢乐歌唱;
Yeoyada apesaki mosala ya kokengela Tempelo ya Yawe epai ya Banganga-Nzambe Balevi oyo Davidi apesaki mosala ya Tempelo ya Yawe, mpo na kotumba mbeka epai na Yawe, ndenge ekomama kati na mibeko ya Moyize, na esengo mpe na koyemba banzembo, ndenge Davidi atindaki.
19 且设立守门的把守耶和华殿的各门,无论为何事,不洁净的人都不准进去。
Atiaki lisusu bakengeli na bikuke ya Tempelo ya Yawe mpo na kopekisa moto nyonso ya mbindo kokota kuna.
20 又率领百夫长和贵胄,与民间的官长,并国中的众民,请王从耶和华殿下来,由上门进入王宫,立王坐在国位上。
Asangisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko, bato ya lokumu, bakambi ya bato mpe bato nyonso ya mokili; amemaki mokonzi longwa na Tempelo ya Yawe kino na ndako ya mokonzi, na nzela ya ekuke ya likolo. Mpe kuna, bavandisaki ye na kiti ya bokonzi.
21 国民都欢乐,合城都安静。众人已将亚她利雅用刀杀了。
Bato nyonso ya mokili basepelaki, mpe engumba ekomaki na kimia, pamba te babomaki Atali na mopanga.