< 撒母耳记上 20 >
1 大卫从拉玛的拿约逃跑,来到约拿单那里,对他说:“我做了什么?有什么罪孽呢?在你父亲面前犯了什么罪,他竟寻索我的性命呢?”
Davidi akimaki wuta na Nayoti ya Rama mpe akendeki epai ya Jonatan. Atunaki ye: — Nasali nini? Mabe nini nasali? Lisumu nini nasali liboso ya tata na yo mpo ete aluka koboma ngai?
2 约拿单回答说:“断然不是!你必不致死。我父做事,无论大小,没有不叫我知道的。怎么独有这事隐瞒我呢?决不如此。”
Jonatan azongisaki: — Te, Ekosalema te! Okokufa te! Tala, tata na ngai asalaka eloko moko te, ezala ya moke to ya monene, soki ayebisi ngai te. Mpo na nini tata na ngai abombela ngai kaka likambo oyo? Ezali bongo te.
3 大卫又起誓说:“你父亲准知我在你眼前蒙恩。他心里说,不如不叫约拿单知道,恐怕他愁烦。我指着永生的耶和华,又敢在你面前起誓,我离死不过一步。”
Kasi Davidi alapaki ndayi na koloba: « Tata na yo ayebi malamu ete nazwaki ngolu na miso na yo, mpe amilobelaki: ‹ Tika ete Jonatan ayeba makambo oyo te, noki te akoyoka pasi na motema! › Nzokande, na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo moko, etikali kaka moke ete baboma ngai. »
4 约拿单对大卫说:“你心里所求的,我必为你成就。”
Jonatan alobaki na Davidi: — Nakosala nyonso oyo okolinga ete ngai nasala mpo na yo.
5 大卫对约拿单说:“明日是初一,我当与王同席,求你容我去藏在田野,直到第三日晚上。
Davidi azongiselaki Jonatan: — Lobi ekozala mokolo ya feti ya Sanza ya Sika; nasengelaki kovanda mesa moko na mokonzi mpo na kolia. Pesa ngai nzela ete nakende kobombama na bilanga kino na pokwa ya mokolo ya misato.
6 你父亲若见我不在席上,你就说:‘大卫切求我许他回本城伯利恒去,因为他全家在那里献年祭。’
Soki tata na yo amitungisi mpo na kozanga na ngai komonana, okoloba na ye: « Davidi atungisaki ngai ete napesa ye nzela ya kokende noki na engumba na ye, Beteleemi, pamba te etuka mobimba ekosepela kuna mbeka oyo babonzaka mibu nyonso. »
7 你父亲若说好,仆人就平安了;他若发怒,你就知道他决意要害我。
Soki alobi: « Malamu, » wana mosali na yo akozala na kimia. Kasi soki atomboki na kanda, wana yeba malamu ete azwi mokano ya kosala ngai mabe.
8 求你施恩与仆人,因你在耶和华面前曾与仆人结盟。我若有罪,不如你自己杀我,何必将我交给你父亲呢?”
Boye, salela mosali na yo bolamu, pamba te okotisaki ye na boyokani elongo na yo liboso ya Yawe. Soki nasalaki mabe na likambo songolo, yo moko boma ngai! Mpo na nini kokaba ngai na maboko ya tata na yo?
9 约拿单说:“断无此事!我若知道我父亲决意害你,我岂不告诉你呢?”
Jonatan alobaki: — Te! Ekozala penza likambo ya nkele soki ngai nakoki koyeba ete tata na ngai azwi mokano ya kosala yo mabe, bongo nayebisi yo yango te!
10 大卫对约拿单说:“你父亲若用厉言回答你,谁来告诉我呢?”
Davidi atunaki Jonatan: — Bongo soki tata na yo akozongisela yo eyano na kanda, nani akoyebisa ngai?
11 约拿单对大卫说:“你我且往田野去。”二人就往田野去了。
Jonatan azongiselaki Davidi: — Yaka, tokende na zamba! Boye, bango mibale bakendeki nzela moko na zamba.
12 约拿单对大卫说:“愿耶和华—以色列的 神为证。明日约在这时候,或第三日,我探我父亲的意思,若向你有好意,我岂不打发人告诉你吗?
Jonatan alobaki na Davidi: « Na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, lobi to sima na lobi, na ngonga oyo, nakoluka koyeba makanisi ya tata na ngai mpo na yo. Soki ezali malamu, bongo natindi moto te mpo na koyebisa yo yango,
13 我父亲若有意害你,我不告诉你使你平平安安地走,愿耶和华重重地降罚与我。愿耶和华与你同在,如同从前与我父亲同在一样。
wana tika ete Yawe asala na ngai Jonatan nyonso oyo ekozala malamu na miso na Ye! Kasi soki tata na ngai azali na makanisi ya kosala yo mabe, ngai nakoyebisa yo mpe nakotika yo kokende mpo ete okende na yo na kimia. Tika ete Yawe azala elongo na yo ndenge azalaki elongo na tata na ngai!
14 你要照耶和华的慈爱恩待我,不但我活着的时候免我死亡,
Sima na mikolo, soki nakozala nanu na bomoi, salela ngai bolamu lokola bolamu ya Yawe mpo ete baboma ngai te.
15 就是我死后,耶和华从地上剪除你仇敌的时候,你也永不可向我家绝了恩惠。”
Mpe kolemba te kosalela libota na ngai bolamu, ata tango Yawe akolongola banguna nyonso ya Davidi, na etando ya mokili. »
16 于是约拿单与大卫家结盟,说:“愿耶和华借大卫的仇敌追讨背约的罪。”
Boye Jonatan asalaki boyokani elongo na libota ya Davidi na maloba oyo: « Tika ete Yawe azongisa mabe na mabe na banguna ya Davidi! »
17 约拿单因爱大卫如同爱自己的性命,就使他再起誓。
Mpe Jonatan asengaki ete Davidi alapa lisusu ndayi na ye na kombo ya bolingo na ye Davidi epai ya Jonatan, pamba te azalaki kolinga ye ndenge ye moko amilingaka.
18 约拿单对他说:“明日是初一,你的座位空设,人必理会你不在那里。
Bongo Jonatan alobaki na Davidi: — Lobi ekozala mokolo ya feti ya Sanza ya Sika; bato bakomitungisa mpo na yo mpo ete okozala te, mpe bakomona ete esika na yo ekozala pamba.
19 你等三日,就要速速下去,到你从前遇事所藏的地方,在以色磐石那里等候。
Sima na lobi, na pokwa, okokende kino na esika epai wapi obombamaki tango likambo oyo ebandaki mpe okovanda pembeni ya libanga Ezeli.
Ngai nakobwaka makonga misato na ngambo moko ya libanga yango lokola nde nazali kobwaka na elembo moko.
21 我要打发童子,说:‘去把箭找来。’我若对童子说:‘箭在后头,把箭拿来’,你就可以回来;我指着永生的耶和华起誓,你必平安无事。
Bongo nakotinda elenge mobali moko kokende koluka makonga yango. Soki nalobi na ye: « Tala, makonga ezali pembeni na yo, lokota mpe yaka na yango awa, » wana nalingi koloba: « Na Kombo na Yawe, yaka mpo ete ozali na kimia, likambo ezali te. »
22 我若对童子说:‘箭在前头’,你就要去,因为是耶和华打发你去的。
Kasi soki nalobi na elenge mobali: « Tala, makonga ezali mosika na yo; » wana nalingi koloba: « Kima na yo, pamba te Yawe akimisi yo. »
23 至于你我今日所说的话,有耶和华在你我中间为证,直到永远。”
Bongo mpo na liloba oyo tosololaki ngai na yo, yeba ete Yawe azali Motatoli kati na ngai mpe yo mpo na libela.
24 大卫就去藏在田野。到了初一日,王坐席要吃饭。
Davidi abombamaki kati na zamba. Bongo na tango ya feti ya Sanza ya Sika, mokonzi avandaki na mesa mpo na kolia.
25 王照常坐在靠墙的位上,约拿单侍立,押尼珥坐在扫罗旁边,大卫的座位空设。
Mokonzi avandaki lokola momesano na esika na ye pembeni ya mir. Jonatan atelemaki, mpe Abineri avandaki pembeni ya Saulo, kasi esika ya Davidi ezalaki polele.
26 然而这日扫罗没有说什么,他想大卫遇事,偶染不洁,他必定是不洁。
Saulo alobaki eloko moko te na mokolo wana, pamba te akanisaki kaka ete eloko moko esalemi epai ya Davidi oyo ekomisi ye mbindo.
27 初二日大卫的座位还空设。扫罗问他儿子约拿单说:“耶西的儿子为何昨日、今日没有来吃饭呢?”
Kasi mokolo oyo elandaki, mokolo ya mibale ya feti ya Sanza ya Sika, lokola esika ya Davidi ezalaki lisusu polele, Saulo alobaki na mwana na ye ya mobali, Jonatan: — Mpo na nini mwana mobali ya Izayi ayei te mpo na kolia, ezala lobi oyo eleki to lelo?
28 约拿单回答扫罗说:“大卫切求我容他往伯利恒去。
Jonatan azongiselaki Saulo: — Davidi atungisaki ngai ete napesa ye nzela ya kokende noki na Beteleemi.
29 他说:‘求你容我去,因为我家在城里有献祭的事;我长兄吩咐我去。如今我若在你眼前蒙恩,求你容我去见我的弟兄’;所以大卫没有赴王的席。”
Alobaki: « Pesa ngai nzela ya kokende mpo ete etuka na ngai esengeli kobonza mbeka kati na engumba, mpe ndeko na ngai ya mobali abengisi ngai mpo ete nazala kuna. Soki nazwi ngolu na miso na yo, tika ngai kokende kotala bandeko na ngai. » Yango wana ayei te na mesa ya mokonzi.
30 扫罗向约拿单发怒,对他说:“你这顽梗背逆之妇人所生的,我岂不知道你喜悦耶西的儿子,自取羞辱,以致你母亲露体蒙羞吗?
Saulo asilikelaki makasi Jonatan mpe alobaki na ye: — Yo mwana mobali ya mwasi ya yawuli mpe motomboki, nayebi solo ete okoteli mwana mobali ya Izayi; kasi ezali mpo na soni na yo mpe ya mama oyo abota yo.
31 耶西的儿子若在世间活着,你和你的国位必站立不住。现在你要打发人去,将他捉拿交给我;他是该死的。”
Pamba te tango nyonso mwana mobali ya Izayi akozala na bomoi kati na mokili oyo, ezala yo to bokonzi na yo, bokozala na kimia te. Sik’oyo, lukisa ye mpe memela ngai ye, pamba te asengeli kokufa.
32 约拿单对父亲扫罗说:“他为什么该死呢?他做了什么呢?”
Jonatan atunaki Saulo, tata na ye: — Basengeli koboma ye mpo na nini? Asali nini?
33 扫罗向约拿单抡枪要刺他,约拿单就知道他父亲决意要杀大卫。
Saulo abwakelaki Jonatan likonga na ye mpo na koboma ye, mpe Jonatan asosolaki ete tata na ye azali na makanisi ya koboma Davidi.
34 于是约拿单气忿忿地从席上起来,在这初二日没有吃饭。他因见父亲羞辱大卫,就为大卫愁烦。
Jonatan alongwaki na mesa na kanda makasi mpe atikalaki kolia te na mokolo oyo ya mibale ya feti ya Sanza ya Sika, pamba te ayokaki pasi na motema na ndenge tata na ye afingaki Davidi.
35 次日早晨,约拿单按着与大卫约会的时候出到田野,有一个童子跟随。
Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Jonatan akendeki na zamba kokutana na Davidi. Azalaki elongo na elenge mobali moko.
36 约拿单对童子说:“你跑去,把我所射的箭找来。”童子跑去,约拿单就把箭射在童子前头。
Alobaki na elenge mobali: « Kima mbangu mpe lokota makonga oyo nazali kobwaka. » Tango elenge mobali azalaki kokima mbangu, Jonatan abwakaki likonga liboso na ye.
37 童子到了约拿单落箭之地,约拿单呼叫童子说:“箭不是在你前头吗?”
Mpe tango elenge mobali akomaki na esika oyo likonga ya Jonatan ekweyaki, Jonatan alobaki na ye na mongongo makasi: « Boni, likonga ezali liboso na yo te? »
38 约拿单又呼叫童子说:“速速地去,不要迟延!”童子就拾起箭来,回到主人那里。
Bongo Jonatan agangaki lisusu: « Sala noki! Kima mbangu, kotelema te! » Elenge mobali alokotaki likonga mpe azongaki epai ya nkolo na ye.
39 童子却不知道这是什么意思,只有约拿单和大卫知道。
Elenge mobali ayebaki ata eloko moko te na makambo oyo nyonso; kaka Jonatan mpe Davidi nde bayebaki.
40 约拿单将弓箭交给童子,吩咐说:“你拿到城里去。”
Bongo Jonatan apesaki bibundeli na ye epai ya elenge mobali mpe alobaki: « Kende kozongisa yango na engumba. »
41 童子一去,大卫就从磐石的南边出来,俯伏在地,拜了三拜;二人亲嘴,彼此哭泣,大卫哭得更恸。
Sima na elenge mobali kozonga, Davidi abimaki na ngambo ya sude ya libanga mpe agumbamaki mbala misato liboso ya Jonatan, elongi etala na se. Bayambanaki mpe balelaki elongo, kasi Davidi alelaki mingi koleka.
42 约拿单对大卫说:“我们二人曾指着耶和华的名起誓说:‘愿耶和华在你我中间,并你我后裔中间为证,直到永远。’如今你平平安安地去吧!”大卫就起身走了;约拿单也回城里去了。
Jonatan alobaki na Davidi: « Kende na kimia, pamba te biso mibale tolapanaki ndayi na Kombo na Yawe na koloba: ‹ Yawe azali Motatoli kati na yo mpe ngai, mpe kati ya bakitani na yo mpe bakitani na ngai mpo na libela. › » Bongo Davidi akendeki, mpe Jonatan azongaki na engumba.