< 列王纪上 8 >
1 那时,所罗门将以色列的长老和各支派的首领,并以色列的族长,招聚到耶路撒冷,要把耶和华的约柜从大卫城—就是锡安—运上来。
Salomo abengisaki, na Yelusalemi, bakambi nyonso ya mabota ya Isalaele, bakambi nyonso ya bituka mpe ya mabota ya bato ya Isalaele mpo na komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe wuta na Siona, engumba ya Davidi.
2 以他念月,就是七月,在节前,以色列人都聚集到所罗门王那里。
Bato nyonso ya Isalaele basanganaki pene ya mokonzi Salomo, na feti monene, na sanza ya Etanimi oyo ezali sanza ya sambo.
Tango bakambi nyonso ya Isalaele bakomaki, Banganga-Nzambe batombolaki Sanduku.
4 祭司和利未人将耶和华的约柜运上来,又将会幕和会幕的一切圣器具都带上来。
Banganga-Nzambe mpe Balevi bamemaki Sanduku ya Yawe, Ndako ya kapo ya Bokutani mpe bisalelo nyonso ya bule oyo ezalaki kati na yango.
5 所罗门王和聚集到他那里的以色列全会众,一同在约柜前献牛羊为祭,多得不可胜数。
Mokonzi Salomo mpe lisanga mobimba ya Isalaele oyo esanganaki epai na ye liboso ya Sanduku babonzaki lokola mbeka bameme mpe bangombe oyo balongaki kotanga te mpo na koyeba motango na yango, pamba te ezalaki ebele penza.
6 祭司将耶和华的约柜抬进内殿,就是至圣所,放在两个基路伯的翅膀底下。
Banganga-Nzambe batiaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe na esika na yango, kati na Tempelo, kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, na se ya mapapu ya basheribe.
7 基路伯张着翅膀在约柜之上,遮掩约柜和抬柜的杠。
Mapapu ya basheribe ezalaki ya kofungwama na likolo ya esika oyo Sanduku ezalaki, bongo ezipaki Sanduku mpe banzete ya komemela yango.
8 这杠甚长,杠头在内殿前的圣所可以看见,在殿外却不能看见,直到如今还在那里。
Mpo ete banzete yango elekaki milayi, basonge na yango ezalaki komonana wuta na Esika ya bule oyo ezali liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule, kasi ezalaki komonana te wuta na libanda. Etikala wana kino na mokolo ya lelo.
9 约柜里惟有两块石版,就是以色列人出埃及地后,耶和华与他们立约的时候摩西在何烈山所放的。除此以外,并无别物。
Kati na Sanduku, ezalaki na eloko mosusu te longola kaka bitando mibale ya mabanga oyo Moyize atiaki na Orebi epai wapi Yawe asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele tango babimaki na Ejipito.
Na tango Banganga-Nzambe babimaki na Esika-Oyo-Eleki-Bule, lipata ezipaki Tempelo ya Yawe;
11 甚至祭司不能站立供职,因为耶和华的荣光充满了殿。
mpe Banganga-Nzambe bakokaki lisusu te kotelema kati na yango mpo na kosala mosala na bango mpo na lipata, pamba te nkembo na Yawe etondisaki Tempelo na Ye.
12 那时所罗门说: 耶和华曾说, 他必住在幽暗之处。
Bongo, Salomo alobaki: — Yawe alobaki ete akovanda kati na esika ya molili!
13 我已经建造殿宇作你的居所, 为你永远的住处。
Mpe ngai natongeli Yo ndako ya lokumu, esika oyo okovanda mpo na libela.
14 王转脸为以色列会众祝福,以色列会众就都站立。
Mokonzi abalukaki mpe apambolaki lisanga mobimba ya Isalaele. Lisanga mobimba ya Isalaele ezalaki ya kotelema.
15 所罗门说:“耶和华—以色列的 神是应当称颂的!因他亲口向我父大卫所应许的,也亲手成就了。
Alobaki: — Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, akumisama; Ye oyo, na monoko na Ye moko, alobaki na Davidi, tata na ngai, mpe akokisi, na loboko na Ye moko, makambo oyo alakaki:
16 他说:‘自从我领我民以色列出埃及以来,我未曾在以色列各支派中选择一城建造殿宇—为我名的居所,但拣选大卫治理我民以色列。’”
« Wuta mokolo oyo nabimisaki bato na Ngai, Isalaele, na Ejipito, naponaki engumba moko te kati na mabota nyonso ya Isalaele mpo ete batonga kuna Tempelo epai wapi Kombo na Ngai ekozala; kasi naponaki Davidi mpo ete akamba bato na Ngai, Isalaele! »
17 所罗门说:“我父大卫曾立意,要为耶和华—以色列 神的名建殿。
Tata na ngai, Davidi, azalaki na makanisi ya kotonga Tempelo mpo na lokumu ya Kombo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
18 耶和华却对我父大卫说:‘你立意为我的名建殿,这意思甚好。
Kasi Yawe alobaki na Davidi, tata na ngai: « Osali malamu lokola ozwi makanisi ya kotonga Tempelo mpo na lokumu ya Kombo na Ngai.
19 只是你不可建殿,惟你所生的儿子必为我名建殿。’
Kasi ezali yo te moto okotonga Tempelo yango; ezali nde mwana na yo ya mobali, oyo akobima na mokongo na yo moko, moto akotonga Tempelo yango mpo na lokumu ya Kombo na Ngai. »
20 现在耶和华成就了他所应许的话,使我接续我父大卫坐以色列的国位,又为耶和华—以色列 神的名建造了殿。
Yawe akokisi elaka na Ye. Nakitani na Davidi, tata na ngai, navandi na kiti ya bokonzi ya Isalaele, ndenge kaka Yawe alobaki, mpe natongi Tempelo mpo na lokumu ya Kombo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
21 我也在其中为约柜预备一处。约柜内有耶和华的约,就是他领我们列祖出埃及地的时候,与他们所立的约。”
Nabongisi kuna esika mpo na Sanduku ya Boyokani ya Yawe, boyokani oyo asalaki elongo na batata na biso tango abimisaki bango na mokili ya Ejipito.
22 所罗门当着以色列会众,站在耶和华的坛前,向天举手说:
Salomo atelemaki liboso ya etumbelo ya Yawe; mpe na miso ya lisanga mobimba ya Isalaele, atombolaki maboko likolo
23 “耶和华—以色列的 神啊,天上地下没有神可比你的!你向那尽心行在你面前的仆人守约施慈爱;
mpe asambelaki: « Yawe, Nzambe ya Isalaele, ezali na nzambe moko te oyo akokani na Yo, ezala kuna na likolo to awa na se! Obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo mpo na basali na Yo, oyo batambolaka kolanda mokano na Yo na motema na bango mobimba.
24 向你仆人—我父大卫所应许的话现在应验了。你亲口应许,亲手成就,正如今日一样。
Solo, okokisi bilaka oyo opesaki na Davidi, tata na ngai mpe mosali na Yo; makambo oyo olobaki na monoko na Yo, okokisi yango na nguya ya loboko na Yo, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.
25 耶和华—以色列的 神啊,你所应许你仆人—我父大卫的话说:‘你的子孙若谨慎自己的行为,在我面前行事像你所行的一样,就不断人坐以色列的国位。’现在求你应验这话。
Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, kokisa mpe elaka mosusu oyo opesaki na Davidi, tata na ngai mpe mosali na Yo, tango olobaki na ye: ‹ Okozangaka te moto oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele, na miso na Ngai, soki bana na yo bakotambola malamu liboso na Ngai mpe bakotosa mibeko na Ngai, ndenge yo otamboli kolanda mokano na Ngai. ›
26 以色列的 神啊,求你成就向你仆人—我父大卫所应许的话。
Sik’oyo, oh Nzambe ya Isalaele, nabondeli Yo, tika ete elaka yango oyo opesaki na Davidi, tata na ngai mpe mosali na Yo, ekokisama!
27 “神果真住在地上吗?看哪,天和天上的天尚且不足你居住的,何况我所建的这殿呢?
Kasi, boni, Nzambe akoki solo kovanda na mokili? Soki kutu Likolo mpe Likolo oyo eleki likolo ekoki kokoka Yo te, bongo ekozala boni mpo na Tempelo oyo natongi!
28 惟求耶和华—我的 神垂顾仆人的祷告祈求,俯听仆人今日在你面前的祈祷呼吁。
Yawe, Nzambe na ngai, yoka na bokebi losambo mpe libondeli na ngai, mowumbu na Yo! Yoka koganga mpe libondeli oyo mowumbu na Yo azali kotombola epai na Yo na mokolo ya lelo.
29 愿你昼夜看顾这殿,就是你应许立为你名的居所;求你垂听仆人向此处祷告的话。
Tika ete, moyi mpe butu, miso na Yo ezala ya kofungwama mpo na kotala Tempelo oyo, esika oyo olobaki na tina na yango: ‹ Kombo na Ngai ekozala awa. › Yoka losambo oyo mowumbu na Yo azali kotombola na esika oyo.
30 你仆人和你民以色列向此处祈祷的时候,求你在天上你的居所垂听,垂听而赦免。
Okoyoka libondeli oyo mowumbu na Yo mpe bato na Yo, Isalaele, bakotombola epai na Yo na kotala na ngambo ya esika oyo! Tika ete oyoka biso wuta na Likolo, evandelo na Yo; yoka mpe limbisa!
31 “人若得罪邻舍,有人叫他起誓,他来到这殿在你的坛前起誓,
Soki moto asali lisumu epai ya mozalani na ye, mpe batindi ye na makasi ete alapa ndayi esangana na bilakeli mabe, liboso ya etumbelo na Yo kati na Tempelo oyo,
32 求你在天上垂听,判断你的仆人:定恶人有罪,照他所行的报应在他头上;定义人有理,照他的义赏赐他。
yoka wuta na Likolo; sala mpe kata makambo kati na bawumbu na Yo mpo na kokweyisa moto oyo asali mabe mpe komemisa ye ngambo ya mabe na ye, kolanda etamboli na ye, mpe mpo na kolongisa moto ya sembo mpe kosalela ye kolanda bosembo na ye.
33 “你的民以色列若得罪你,败在仇敌面前,又归向你,承认你的名,在这殿里祈求祷告,
Tango banguna bakolonga bato na Yo, Isalaele, mpo ete basali lisumu liboso na Yo, soki babongoli mitema mpo na kozongela Yo, basanzoli Kombo na Yo, basambeli mpe babondeli Yo, kati na Tempelo oyo,
34 求你在天上垂听,赦免你民以色列的罪,使他们归回你赐给他们列祖之地。
yoka wuta na Likolo, limbisa masumu ya Isalaele, bato na Yo, mpe zongisa bango na mabele oyo opesaki batata na bango.
35 “你的民因得罪你,你惩罚他们,使天闭塞不下雨;他们若向此处祷告,承认你的名,离开他们的罪,
Tango likolo ekokangama mpe mvula ekozala lisusu te mpo ete basali masumu liboso na Yo, soki basambeli na kotala na ngambo ya esika oyo, basanzoli Kombo na Yo mpe batiki masumu na bango, pamba te osili koyokisa bango soni,
36 求你在天上垂听,赦免你仆人以色列民的罪,将当行的善道指教他们,且降雨在你的地,就是你赐给你民为业之地。
yoka bango wuta na likolo, limbisa masumu ya bawumbu na Yo mpe ya Isalaele, bato na Yo, —tango osili kolakisa bango nzela malamu oyo basengeli kolanda— mpe tinda mvula na mokili na Yo, mokili oyo opesaki lokola libula epai ya bato na Yo.
37 “国中若有饥荒、瘟疫、旱风、霉烂、蝗虫、蚂蚱,或有仇敌犯境围困城邑,无论遭遇什么灾祸疾病,
Tango nzala makasi to bokono makasi to moto to bokawuki to kopola ya bambuma to mabanki to mankoko ekokota kati na mokili, tango banguna bakozingela bato na Yo kati na mokili na bango, na bikuke ya bingumba na bango; tango pasi to bokono ya lolenge nyonso ekokweyela bango,
38 你的民以色列,或是众人,或是一人,自觉有罪,向这殿举手,无论祈求什么,祷告什么,
soki, wana bato na Yo, Isalaele, bayoki mawa makasi kati na mitema na bango mpo na pasi to bokono yango, moko na moko atomboli maboko na ye na ngambo ya Tempelo oyo, asambeli to abondeli Yo,
39 求你在天上你的居所垂听赦免。你是知道人心的,要照各人所行的待他们(惟有你知道世人的心),
yoka ye wuta na Likolo, evandelo na Yo, limbisa, sala mpe zongisela moto na moto kolanda etamboli na ye, mpo ete oyebi motema ya moto moko na moko. Solo, Yo kaka nde oyebi mitema ya bato.
40 使他们在你赐给我们列祖之地上一生一世敬畏你。
Sala bongo mpo ete bana ya Isalaele batosa Yo mikolo nyonso oyo bakovanda na mabele oyo opesaki epai na batata na biso.
41 “论到不属你民以色列的外邦人,为你名从远方而来,
Ndenge moko mpe mpo na mopaya oyo azali te na molongo ya Isalaele, bato na Yo: wana akowuta na mokili ya mosika, mpo na Kombo na Yo,
42 (他们听人论说你的大名和大能的手,并伸出来的膀臂)向这殿祷告,
pamba te bakoyoka sango ya Kombo monene na Yo, ya loboko na Yo ya nguya mpe esembolama; soki ayei mpe asambeli na kotala na ngambo ya Tempelo oyo,
43 求你在天上你的居所垂听,照着外邦人所祈求的而行,使天下万民都认识你的名,敬畏你像你的民以色列一样;又使他们知道我建造的这殿是称为你名下的。
yoka wuta na Likolo, evandelo na Yo, mpe salela ye nyonso oyo akosenga Yo, mpo ete bikolo nyonso ya mokili bayeba Kombo na Yo, batosa Yo lokola Isalaele, bato na Yo, mpe bayeba ete Tempelo oyo natongi ebulisami nde mpo na Kombo na Yo.
44 “你的民若奉你的差遣,无论往何处去与仇敌争战,向耶和华所选择的城与我为你名所建造的殿祷告,
Tango bato na Yo bakokende kobundisa banguna na bango na nzela oyo okolakisa bango, soki basambeli Yawe na kotala na ngambo ya engumba oyo oponaki mpe na ngambo ya Tempelo oyo natongi mpo na Kombo na Yo,
yoka wuta na Likolo losambo mpe libondeli na bango, mpe longisa bango.
46 “你的民若得罪你(世上没有不犯罪的人),你向他们发怒,将他们交给仇敌掳到仇敌之地,或远或近,
Tango bana ya Isalaele bakosala masumu liboso na Yo, pamba te moto nyonso asalaka masumu, bongo Yo osilikeli bango mpe okabi bango na maboko ya banguna oyo bamemi bango na bowumbu, na mokili ya banguna, ezala ya mosika to ya pene,
47 他们若在掳到之地想起罪来,回心转意,恳求你说:‘我们有罪了,我们悖逆了,我们作恶了’;
mpe soki, wuta na mokili ya bowumbu, basosoli, babongoli mitema, babondeli Yo kati na mokili ya bato oyo bamemaki bango na bowumbu mpe balobi: ‹ Tosalaki masumu, tosalaki bambeba, tosalaki makambo mabe; ›
48 他们若在掳到之地尽心尽性归服你,又向自己的地,就是你赐给他们列祖之地和你所选择的城,并我为你名所建造的殿祷告,
soki, wuta na mokili ya banguna na bango epai wapi bamemaki bango lokola bawumbu, basengi Yo bolimbisi na mitema mpe na milimo na bango mobimba; soki basambeli Yo na kotala na ngambo ya mokili na bango, oyo opesaki epai na batata na bango, na ngambo ya engumba oyo oponaki mpe na ngambo ya Tempelo oyo natongi mpo na lokumu ya Kombo na Yo;
49 求你在天上你的居所垂听他们的祷告祈求,为他们伸冤;
yoka wuta na Likolo, evandelo na Yo; yoka losambo mpe mabondeli na bango, longisa bosembo na bango,
50 饶恕得罪你的民,赦免他们的一切过犯,使他们在掳他们的人面前蒙怜恤。
limbisa bato na Yo na masumu mpe mabe nyonso oyo basalaki liboso na Yo mpe sala ete banguna na bango bayokela bango mawa.
51 因为他们是你的子民,你的产业,是你从埃及领出来脱离铁炉的。
Pamba te bazali bato na Yo mpe libula na Yo, oyo obimisaki na bowumbu wuta na Ejipito, wuta kati na libulu ya moto makasi oyo banyangwiselaka bibende.
52 愿你的眼目看顾仆人,听你民以色列的祈求,无论何时向你祈求,愿你垂听。
Tika ete miso na Yo efungwama wana mowumbu na Yo mpe Isalaele, bato na Yo, bakobondela Yo; yoka bango tango nyonso oyo bakotombola mingongo epai na Yo.
53 主耶和华啊,你将他们从地上的万民中分别出来作你的产业,是照你领我们列祖出埃及的时候,借你仆人摩西所应许的话。”
Pamba te, Nkolo Yawe, Yo moko nde oponaki bango kati na mabota nyonso ya mokili mpe otiaki bango pembeni, mpo ete bazala libula na Yo ndenge olobaki na mowumbu na Yo, Moyize, tango obimisaki batata na biso na Ejipito. »
54 所罗门在耶和华的坛前屈膝跪着,向天举手,在耶和华面前祷告祈求已毕,就起来,
Tango Salomo asilisaki kosambela mpe kobondela Yawe, atelemaki liboso ya etumbelo ya Yawe epai wapi afukamaki mpe atombolaki maboko na ye na likolo.
Wana atelemaki, apambolaki lisanga mobimba ya Isalaele na mongongo makasi mpe alobaki:
56 “耶和华是应当称颂的!因为他照着一切所应许的赐平安给他的民以色列人,凡借他仆人摩西应许赐福的话,一句都没有落空。
« Tika ete Yawe akumisama, Ye oyo apesi kimia na Isalaele, bato na Ye, ndenge alobaki. Kati na maloba na Ye ya kitoko, oyo alobaki na nzela ya Moyize, mowumbu na Ye, moko te ezangi kokokisama.
57 愿耶和华—我们的 神与我们同在,像与我们列祖同在一样,不撇下我们,不丢弃我们,
Tika ete Yawe, Nzambe na biso, azala elongo na biso ndenge azalaki elongo na batata na biso; atika biso te mpe abwaka biso te;
58 使我们的心归向他,遵行他的道,谨守他吩咐我们列祖的诫命、律例、典章。
kasi abongola mitema na biso epai na Ye mpo ete tokoka kotambola na nzela na Ye, kobatela mibeko na Ye, malako na Ye mpe mitindo na Ye oyo apesaki na batata na biso.
59 我在耶和华面前祈求的这些话,愿耶和华—我们的 神昼夜垂念,每日为他仆人与他民以色列伸冤,
Tika ete mabondeli na ngai oyo nawuti kotombola epai na Yawe, Nzambe na biso, ezala liboso na Ye butu mpe moyi; mpe tika ete alongisa mowumbu na Ye mpe Isalaele, bato na Ye, ndenge bosenga na bango ya mokolo na mokolo ezali;
60 使地上的万民都知道惟独耶和华是 神,并无别神。
mpo ete bato nyonso kati na mokili bayeba solo ete Yawe azali Nzambe, mosusu lokola Ye azali te.
61 所以你们当向耶和华—我们的 神存诚实的心,遵行他的律例,谨守他的诫命,至终如今日一样。”
Tika ete mitema na bino ezala sembo epai na Yawe, Nzambe na biso, mpo ete botambola kolanda mibeko na Ye mpe bobatela malako na Ye ndenge bosali yango na mokolo ya lelo. »
Mokonzi mpe bana nyonso ya Isalaele babonzaki bambeka liboso ya Yawe.
63 所罗门向耶和华献平安祭,用牛二万二千,羊十二万。这样,王和以色列众民为耶和华的殿行奉献之礼。
Salomo abonzaki lokola mbeka ya boyokani bangombe nkoto tuku mibale na mibale mpe bampate nkoto nkama moko na tuku mibale. Ezalaki ndenge wana nde mokonzi mpe bato nyonso ya Isalaele babulisaki Tempelo ya Yawe.
64 当日,王因耶和华殿前的铜坛太小,容不下燔祭、素祭,和平安祭牲的脂油,便将耶和华殿前院子当中分别为圣,在那里献燔祭、素祭,和平安祭牲的脂油。
Na mokolo yango, mokonzi abulisaki lopango ya kati oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe mpe abonzaki wana mbeka ya kotumba, makabo ya gato mpe mafuta ya bambeka ya boyokani; pamba te etumbelo ya bronze oyo ezalaki liboso ya Yawe elekaki moke mpo na koyamba bambeka ya kotumba, makabo ya gato mpe mafuta ya bambeka ya boyokani.
65 那时,所罗门和以色列众人,就是从哈马口直到埃及小河所有的以色列人,都聚集成为大会,在耶和华—我们的 神面前守节七日又七日,共十四日。
Na tango wana, Salomo elongo na Isalaele mobimba basalaki feti monene; mpe lisanga monene ya bato oyo bawutaki na Lebo-Amati kino na moluka ya Ejipito batelemaki liboso ya Yawe, Nzambe na biso, mikolo sambo mpe mikolo sambo mosusu, elingi koloba mikolo zomi na minei.
66 第八日,王遣散众民;他们都为王祝福。因见耶和华向他仆人大卫和他民以色列所施的一切恩惠,就都心中喜乐,各归各家去了。
Na mokolo ya mwambe, Salomo azongisaki bato. Bongo bato bapambolaki ye mpe bazongaki na bandako na bango ya kapo na esengo mpe na nsayi na mitema mpo na bolamu nyonso oyo Yawe asalelaki Davidi, mowumbu na Ye, mpe Isalaele, bato na Ye.