< 列王纪上 16 >

1 耶和华的话临到哈拿尼的儿子耶户,责备巴沙说:
Yawe alobaki na Jewu, mwana mobali ya Anani, na tina na Baesha:
2 “我既从尘埃中提拔你,立你作我民以色列的君,你竟行耶罗波安所行的道,使我民以色列陷在罪里,惹我发怒,
« Mpo ete nazwaki yo kati na putulu mpe nakomisi yo mokambi ya bato na Ngai, Isalaele, kasi otambolaki na banzela ya Jeroboami mpe okweyisi bato na Ngai, Isalaele, na masumu oyo epelisi kanda na Ngai,
3 我必除尽你和你的家,使你的家像尼八的儿子耶罗波安的家一样。
nakokombola Baesha mpe libota na ye nyonso, mpe nakokomisa ndako na ye lokola ndako ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati.
4 凡属巴沙的人,死在城中的必被狗吃,死在田野的必被空中的鸟吃。”
Bambwa ekolia bato ya Baesha oyo bakokufa kati na engumba mpe bandeke ya likolo ekolia bato oyo bakokufa na bilanga. »
5 巴沙其余的事,凡他所行的和他的勇力,都写在以色列诸王记上。
Makambo mosusu oyo etali mokonzi Baesha mpe misala minene oyo asalaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
6 巴沙与他列祖同睡,葬在得撒。他儿子以拉接续他作王。
Baesha akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na Tiritsa; mpe Ela, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
7 耶和华的话临到哈拿尼的儿子先知耶户,责备巴沙和他的家,因他行耶和华眼中看为恶的一切事,以他手所做的惹耶和华发怒,像耶罗波安的家一样,又因他杀了耶罗波安的全家。
Yawe alobaki lisusu na nzela ya mosakoli Jewu, mwana mobali ya Anani, na tina na Baesha mpe ndako na ye, mpo na makambo mibale oyo: ya liboso, mpo na mabe nyonso oyo asalaki na miso ya Yawe, na kopelisa kanda ya Yawe na nzela ya misala na ye kino kokoma ndenge moko na libota ya Jeroboami; ya mibale, mpo ete asilisaki koboma bato nyonso ya libota ya Jeroboami.
8 犹大王亚撒二十六年,巴沙的儿子以拉在得撒登基作以色列王共二年。
Tango Asa, mokonzi ya Yuda, asalaki mibu tuku mibale na motoba na bokonzi; Ela, mwana mobali ya Baesha, akomaki mokonzi ya Isalaele mpe akonzaki Isalaele mibu mibale na Tiritsa.
9 有管理他一半战车的臣子心利背叛他。当他在得撒家宰亚杂家里喝醉的时候,
Zimiri, mokonzi ya mampinga oyo azalaki kokamba ndambo ya bashar na ye, asalelaki ye likita. Na tango wana, mokonzi Ela azalaki na Tiritsa komela mpe kolangwa masanga na ndako ya Aritsa, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, kuna na Tiritsa.
10 心利就进去杀了他,篡了他的位。这是犹大王亚撒二十七年的事。
Zimiri akotaki, abetaki mpe abomaki ye na tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mibale na sambo na bokonzi. Boye, Zimiri akitanaki na Ela na bokonzi.
11 心利一坐王位就杀了巴沙的全家,连他的亲属、朋友也没有留下一个男丁。
Na tango kaka azwaki bokonzi mpe avandaki na kiti ya bokonzi, asilisaki koboma libota mobimba ya Baesha; atikaki ata mobali moko te na bomoi, ezala ndeko to molingami na ye.
12 心利这样灭绝巴沙的全家,正如耶和华借先知耶户责备巴沙的话。
Boye, Zimiri asilisaki koboma libota nyonso ya Baesha kolanda Liloba na Yawe, oyo elobamaki mpo na kotelemela Baesha na nzela ya mosakoli Jewu;
13 这是因巴沙和他儿子以拉的一切罪,就是他们使以色列人陷在罪里的那罪,以虚无的神惹耶和华—以色列 神的怒气。
likolo ya masumu nyonso oyo Baesha elongo na mwana na ye ya mobali Ela basalaki mpe oyo ememaki Isalaele mobimba na libebi; masumu oyo epelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, na nzela ya banzambe na bango ya bikeko oyo ezanga tina.
14 以拉其余的事,凡他所行的,都写在以色列诸王记上。
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Ela, misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
15 犹大王亚撒二十七年,心利在得撒作王七日。那时民正安营围攻非利士的基比顿。
Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mibale na sambo na bokonzi; Zimiri akonzaki na Tiritsa, mikolo sambo. Mampinga ya basoda ya Isalaele batongaki molako na bango pembeni ya Gibetoni, engumba ya bato ya Filisitia, mpo na kobundisa yango.
16 民在营中听说心利背叛,又杀了王,故此以色列众人当日在营中立元帅暗利作以色列王。
Tango bato ya Isalaele oyo bazalaki kati na molako bayokaki ete Zimiri asali likita mpo na kotelemela mokonzi Asa mpe abomaki ye, bakomisaki kaka na mokolo wana Omiri oyo azalaki mokonzi ya mampinga, mokonzi ya Isalaele kati na molako.
17 暗利率领以色列众人,从基比顿上去,围困得撒。
Bongo Omiri elongo na bato nyonso ya Isalaele balongwaki na Gibetoni mpe bakendeki kozingela Tiritsa.
18 心利见城破失,就进了王宫的卫所,放火焚烧宫殿,自焚而死。
Tango Zimiri amonaki ete mampinga ya Isalaele esili kobotola engumba, akotaki na ndako ya bokonzi, amitumbaki na ndako mpe akufaki na moto.
19 这是因他犯罪,行耶和华眼中看为恶的事,行耶罗波安所行的,犯他使以色列人陷在罪里的那罪。
Akufaki likolo ya masumu oyo asalaki, na kosala mabe na miso ya Yawe mpe na kotambola na banzela ya Jeroboami oyo asalaki masumu oyo ememaki Isalaele na libebi.
20 心利其余的事和他背叛的情形都写在以色列诸王记上。
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Zimiri mpe botomboki na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
21 那时,以色列民分为两半:一半随从基纳的儿子提比尼,要立他作 王;一半随从暗利。
Sima na kufa ya Zimiri, bana ya Isalaele bakabwanaki na bandambo mibale: ndambo moko elandaki Tibini, mwana mobali ya Ginati lokola mokonzi; mpe ndambo mosusu elandaki Omiri.
22 但随从暗利的民胜过随从基纳的儿子提比尼的民。提比尼死了,暗利就作了王。
Kasi bato oyo bazalaki kolanda Omiri bamonanaki makasi koleka bato oyo bazalaki kolanda Tibini, mwana mobali ya Ginati. Boye, Tibini akufaki mpe Omiri akitanaki na ye na bokonzi.
23 犹大王亚撒三十一年,暗利登基作以色列王共十二年;在得撒作王六年。
Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na moko, Omiri akomaki mokonzi ya Isalaele. Asalaki mibu zomi na mibale na bokonzi, mpe kati na mibu zomi na mibale wana, akonzaki mpe engumba Tiritsa mibu motoba.
24 暗利用二他连得银子向撒玛买了撒马利亚山,在山上造城,就按着山的原主撒玛的名,给所造的城起名叫撒马利亚。
Asombaki ngomba Samari epai ya Shemeri na motuya ya palata nkoto motoba mpe atongaki engumba likolo na yango. Abengaki engumba yango Samari kolanda kombo ya Shemeri, mokolo na yango ya liboso.
25 暗利行耶和华眼中看为恶的事,比他以前的列王作恶更甚。
Kasi Omiri asalaki makambo mabe na miso ya Yawe mpe asalaki masumu koleka bakonzi nyonso oyo bakonzaki liboso na ye.
26 因他行了尼八的儿子耶罗波安所行的,犯他使以色列人陷在罪里的那罪,以虚无的神惹耶和华—以色列 神的怒气。
Atambolaki na banzela nyonso ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo asalaki masumu oyo epelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, na nzela ya banzambe na bango ya bikeko oyo ezanga tina.
27 暗利其余的事和他所显出的勇力都写在以色列诸王记上。
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Omiri: misala oyo asalaki mpe nguya oyo alakisaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele.
28 暗利与他列祖同睡,葬在撒马利亚。他儿子亚哈接续他作王。
Omiri, akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na Samari. Akabi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
29 犹大王亚撒三十八年,暗利的儿子亚哈登基作了以色列王。暗利的儿子亚哈在撒马利亚作以色列王二十二年。
Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na mwambe na bokonzi, Akabi, mwana mobali ya Omiri, akomaki mokonzi ya Isalaele. Akonzaki Isalaele na engumba Samari mibu tuku mibale na mibale.
30 暗利的儿子亚哈行耶和华眼中看为恶的事,比他以前的列王更甚,
Akabi, mwana mobali ya Omiri, asalaki makambo mabe mingi na miso ya Yawe koleka bakonzi nyonso oyo bakonzaki liboso na ye.
31 犯了尼八的儿子耶罗波安所犯的罪;他还以为轻,又娶了西顿王谒巴力的女儿耶洗别为妻,去事奉敬拜巴力,
Lokola amonaki ete kolanda masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, ekokaki te, abalaki Jezabeli, mwana mwasi ya Etibala, mokonzi ya Sidoni, mpe akomaki kosalela nzambe Bala mpe kogumbamela yango.
32 在撒马利亚建造巴力的庙,在庙里为巴力筑坛。
Akabi atongaki etumbelo mpo na nzambe Bala kati na ndako oyo atongaki mpo na yango, na Samari.
33 亚哈又做亚舍拉,他所行的惹耶和华—以色列 神的怒气,比他以前的以色列诸王更甚。
Akabi atongaki lisusu likonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera; asalaki makambo mabe koleka bakonzi nyonso ya Isalaele oyo bakonzaki liboso na ye, makambo oyo epelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
34 亚哈在位的时候,有伯特利人希伊勒重修耶利哥城;立根基的时候,丧了长子亚比兰;安门的时候,丧了幼子西割,正如耶和华借嫩的儿子约书亚所说的话。
Na tango Akabi azalaki mokonzi, Iyeli, moto ya Beteli, atongaki lisusu engumba Jeriko. Tango atongaki miboko na yango, Abirami, mwana na ye ya liboso ya mobali, akufaki; mpe tango batiaki bikuke na yango, Segubi, mwana na ye ya mobali ya suka, akufaki. Yango esalemaki kolanda liloba oyo Yawe alobaki na nzela na Jozue, mwana mobali ya Nuni.

< 列王纪上 16 >