< 历代志上 29 >

1 大卫王对会众说:“我儿子所罗门是 神特选的,还年幼娇嫩;这工程甚大,因这殿不是为人,乃是为耶和华 神建造的。
Mokonzi Davidi alobaki na lisanga mobimba: — Salomo, mwana na ngai ya mobali, moko kaka oyo Nzambe aponi, azali nanu elenge mpe ayebi penza makambo malamu te. Nzokande, mosala ezali monene, pamba te Ndako oyo ezali mpo na moto te kasi mpo na Yawe Nzambe.
2 我为我 神的殿已经尽力,预备金子做金器,银子做银器,铜做铜器,铁做铁器,木做木器,还有红玛瑙可镶嵌的宝石,彩石和一切的宝石,并许多汉白玉。
Na bozwi na ngai nyonso, nabongisaki mpo na Ndako ya Nzambe na ngai: wolo mpo na misala ya wolo, palata mpo na misala ya palata, ebende mpo na misala ya bibende, mabaya mpo na misala ya mabaya, mabanga ya onikisi mpe mabanga ya kobamba, mabanga oyo engengaka mpe ya balangi ebele, mabanga ya talo ya lolenge nyonso mpe mabanga ya marbre. Biloko oyo nyonso ezalaki penza ebele.
3 且因我心中爱慕我 神的殿,就在预备建造圣殿的材料之外,又将我自己积蓄的金银献上,建造我 神的殿,
Mpe lisusu, na tina na bolingo na ngai mpo na Ndako ya Nzambe na ngai, napesi sik’oyo wuta na bozwi na ngai moko: wolo mpe palata mpo na Ndako ya Nzambe na ngai likolo ya nyonso oyo nabongisaki mpo na Ndako oyo ya bule:
4 就是俄斐金三千他连得、精炼的银子七千他连得,以贴殿墙。
kilo nkoto nkama moko ya wolo ya peto ya Ofiri, kilo nkoto nkama mibale na tuku mitano ya palata ya peto mpo na kolatisa bamir ya Ndako.
5 金子做金器,银子做银器,并借匠人的手制造一切。今日有谁乐意将自己献给耶和华呢?”
Wolo mpe palata yango ebongisami mpo na misala ya wolo mpe ya palata, mpe mpo na misala nyonso oyo bato ya misala ya maboko basengeli kosala. Sik’oyo, nani alingi kopesa na esengo mpe na motema moko epai na Yawe?
6 于是,众族长和以色列各支派的首领、千夫长、百夫长,并监管王工的官长,都乐意献上。
Boye, bakambi ya mabota, bakonzi ya mabota ya Isalaele, bakonzi ya bankoto mpe ya bankama mpe bakambi ya misala ya mokonzi bapesaki makabo wuta na mitema na bango moko.
7 他们为 神殿的使用献上金子五千他连得零一万达利克,银子一万他连得,铜一万八千他连得,铁十万他连得。
Mbala moko, bapesaki mpo na mosala ya Ndako ya Nzambe: bakilo nkama tuku sambo ya wolo, biloko ya wolo nkoto zomi, bakilo koleka minkoko nkama misato ya palata, bakilo nkoto nkama motoba ya bronze, mpe bakilo koleka minkoko misato ya bibende.
8 凡有宝石的都交给革顺人耶歇,送入耶和华殿的府库。
Bato nyonso oyo bazalaki na mabanga ya talo bapesaki yango na ebombelo ya bozwi ya Tempelo ya Yawe epai ya Yeyeli, moto ya libota ya Gerishoni.
9 因这些人诚心乐意献给耶和华,百姓就欢喜,大卫王也大大欢喜。
Bato basepelaki mingi na makabo oyo bango moko bapesaki wuta na mokano ya mitema na bango, pamba te bazalaki kopesa yango epai ya Yawe, na motema mobimba. Mokonzi Davidi mpe asepelaki na yango mingi.
10 所以,大卫在会众面前称颂耶和华说:“耶和华—我们的父,以色列的 神是应当称颂,直到永永远远的!
Davidi akumisaki Yawe liboso ya lisanga mobimba na maloba oyo: « Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, tata na biso, tika ete ozwa lokumu mpo na libela!
11 耶和华啊,尊大、能力、荣耀、强胜、威严都是你的;凡天上地下的都是你的;国度也是你的,并且你为至高,为万有之首。
Oh Yawe, monene, nguya, kongenga, nkembo mpe bokonzi ezali ya Yo; pamba te biloko nyonso oyo ezali na likolo mpe na se ezali ya Yo. Yawe, bokonzi ezali ya Yo, osalaka nyonso oyo olingi na ekelamu nyonso.
12 丰富尊荣都从你而来,你也治理万物。在你手里有大能大力,使人尊大强盛都出于你。
Bozwi mpe lokumu ewutaka epai na Yo; ozali na bokonzi likolo na nyonso, makasi mpe nguya ezali na maboko na Yo mpo na kotombola mpe kopesa makasi na moto nyonso.
13 我们的 神啊,现在我们称谢你,赞美你荣耀之名!
Nzambe na biso, tozali sik’oyo kosanzola Yo mpe kokumisa Kombo na Yo.
14 “我算什么,我的民算什么,竟能如此乐意奉献?因为万物都从你而来,我们把从你而得的献给你。
Nazali nani, mpe bato na ngai bazali banani, mpo ete tozwa makoki ya kopesa makabo oyo, wuta na mokano ya mitema na biso moko? Nyonso ewutaka epai na Yo, mpe topesi Yo kaka oyo ewuti na loboko na Yo.
15 我们在你面前是客旅,是寄居的,与我们列祖一样。我们在世的日子如影儿,不能长存。
Liboso na Yo, tozali bapaya mpe baleki nzela, ndenge ezalaki batata na biso. Mikolo na biso awa na mokili ezali koleka lokola elili oyo ezangi elikya.
16 耶和华—我们的 神啊,我们预备这许多材料,要为你的圣名建造殿宇,都是从你而来,都是属你的。
Oh Yawe, Nzambe na biso, bomengo nyonso oyo tobongisi mpo na kotonga Tempelo mpo na lokumu ya Kombo na Yo ya Bule ewuti na loboko na Yo mpe ezali ya Yo.
17 我的 神啊,我知道你察验人心,喜悦正直;我以正直的心乐意献上这一切物。现在我喜欢见你的民在这里都乐意奉献与你。
Oh Nzambe na ngai, nayebi ete oyebi bozindo ya mitema na biso, osepelaka na bosembo. Napesi nyonso oyo wuta na mokano ya motema na ngai moko mpe na makanisi ya lokuta te. Sik’oyo, namoni ndenge nini bato na Yo, oyo bazali awa, bapesi Yo makabo oyo na motema malamu.
18 耶和华—我们列祖亚伯拉罕、以撒、以色列的 神啊,求你使你的民常存这样的心思意念,坚定他们的心归向你,
Oh Yawe, Nzambe ya Abrayami, Izaki mpe Isalaele, batata na biso, batela makanisi oyo kati na mitema ya bato na Yo mpo na libela mpe sala ete mitema na bango ekangama na Yo.
19 又求你赐我儿子所罗门诚实的心,遵守你的命令、法度、律例,成就这一切的事,用我所预备的建造殿宇。”
Pesa na mwana na ngai ya mobali, Salomo, motema ya boyengebene mpo na kobatela mitindo na Yo, malako na Yo mpe bikateli na Yo; mpo na kosala nyonso mpe kotonga Ndako oyo nasaleli mabongisi oyo nyonso. »
20 大卫对全会众说:“你们应当称颂耶和华—你们的 神。”于是会众称颂耶和华—他们列祖的 神,低头拜耶和华与王。
Davidi alobaki na bato nyonso: — Bopambola Yawe, Nzambe na bino! Boye, bato nyonso bakumisaki Yawe, Nzambe ya bakoko na bango, bagumbamaki mpe bafukamaki liboso ya Yawe mpe ya mokonzi.
21 次日,他们向耶和华献平安祭和燔祭,就是献公牛一千只,公绵羊一千只,羊羔一千只,并同献的奠祭;又为以色列众人献许多的祭。那日,他们在耶和华面前吃喝,大大欢乐。
Mokolo oyo elandaki, babonzaki bambeka mpe bambeka ya kotumba epai na Yawe: bangombe ya mibali nkoto moko, bameme ya mibali nkoto moko mpe bana meme nkoto moko elongo na makabo ya masanga ya vino mpe makabo mosusu ebele, mpo na Isalaele mobimba.
22 他们奉耶和华的命再膏大卫的儿子所罗门作王,又膏撒督作祭司。
Baliaki mpe bamelaki liboso ya Yawe na esengo na mokolo wana, mpe batatolaki mpo na mbala ya mibale ete Salomo, mwana mobali ya Davidi, azali mokonzi. Bapakolaki ye mafuta mpo ete azala mokonzi; mpe Tsadoki, mpo ete azala Nganga-Nzambe.
23 于是所罗门坐在耶和华所赐的位上,接续他父亲大卫作王,万事亨通;以色列众人也都听从他。
Salomo avandaki na Kiti ya Bokonzi ya Yawe lokola mokonzi na esika ya Davidi, tata na ye. Apambolamaki mpe Isalaele mobimba etosaki ye.
24 众首领和勇士,并大卫王的众子,都顺服所罗门王。
Bakonzi nyonso, basoda ya mpiko mpe bana nyonso ya mibali ya mokonzi Davidi batosaki mokonzi Salomo.
25 耶和华使所罗门在以色列众人眼前甚为尊大,极其威严,胜过在他以前的以色列王。
Yawe atombolaki Salomo makasi liboso ya Isalaele mobimba, mpe apesaki ye lokumu ya bokonzi koleka bakonzi nyonso ya Isalaele oyo balekaki liboso na ye.
26 耶西的儿子大卫作以色列众人的王,
Davidi, mwana mobali ya Izayi, azalaki mokonzi ya Isalaele mobimba.
27 作王共四十年:在希伯 作王七年,在耶路撒冷作王三十三年。
Davidi akonzaki Isalaele mibu tuku minei: mibu sambo na Ebron mpe mibu tuku misato na misato na Yelusalemi.
28 他年纪老迈,日子满足,享受丰富、尊荣,就死了。他儿子所罗门接续他作王。
Akufaki na kimobange ya esengo. Atondisamaki na mibu ebele, na bozwi mpe na lokumu; bongo Salomo, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.
29 大卫王始终的事都写在先见撒母耳的书上和先知拿单并先见迦得的书上。
Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Davidi, wuta na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya misala ya mosakoli Samuele, na buku ya misala ya mosakoli Natan mpe na buku ya misala ya mosakoli Gadi.
30 他的国事和他的勇力,以及他和以色列并列国所经过的事都写在这书上。
Kati na babuku ya misala yango, balobelaki mpe makambo nyonso ya bokonzi mpe ya makasi na ye, makambo nyonso oyo ekomelaki ye, Isalaele mpe mikili nyonso ya zingazinga.

< 历代志上 29 >