< 撒迦利亞書 11 >

1 黎巴嫩! 打開你的門,讓火來吞滅你的香柏!
Mokili ya Libani, fungola bikuke na yo mpo ete moto ezikisa banzete na yo ya sedele!
2 松樹,哀號吧! 因為香柏已被伐倒,高大者已被摧毀;巴商的橡樹,哀號吧! 因為不可深入的樹林全已倒下。
Nzete ya sipele, lela, pamba te nzete ya sedele esili kokweya! Banzete milayi esili kokatama. Banzete ya sheni ya Bashani, bolela; pamba te basili kokata zamba monene!
3 聽,牧人在哀號,因為他們的的光榮己被破壞;聽,幼獅在咆哮,因為約旦的豪華已遭摧毀。
Boyoka ndenge babateli bibwele bazali kolela, pamba te bitando epai wapi baleisaka bibwele ebebisami. Boyoka ndenge bankosi ezali koganga, pamba te zamba ya Yordani, oyo etonda na banzete, esili kobebisama.
4 上主,我的天主這樣說:「你要牧放這待宰的羊群!
Tala liloba oyo Yawe, Nzambe na ngai, alobi: — Batela malamu bameme oyo babongisi mpo na koboma!
5 那些購買牠們來宰殺的,以為無過;那賣出他們的的還說;上主應受讚美,因為我成了富翁! 那牧放牠們的,毫不憐惜牠們。
Bato oyo basombaka bibwele yango babomaka yango, bazalaka na somo ya etumbu ata moko te. Bato oyo batekaka yango balobaka: « Tika ete Yawe apambolama, pamba te nakomi mozwi! » Mpe bango moko babateli na yango bayokelaka yango mawa ata moke te.
6 我也決不再憐恤這地上的居民──上主的斷語;看,我要將每個人交在他的的牧人手中.和他的君王手中,讓他們毀滅這地, 決不由他們手中搶救。
Yango wana Ngai mpe nakoyokela lisusu bato ya mokili mawa te, nakokaba moto na moto na maboko ya moninga na ye mpe ya mokonzi na ye. Bakonzi bakobebisa mokili, kasi nakokangola ata moto moko te wuta na maboko ya bakonzi yango, elobi Yawe.
7 這樣我就代替賣羊人牧放待宰的羊群。我取了兩根棍杖:一根我稱它為「愛護」,一根我叫它作「聯合」;我這樣牧放了羊群。
Boye, nabatelaki malamu bameme oyo babongisaki mpo na koboma; mpe mingi penza bameme oyo ezalaki na pasi makasi. Nakamataki mangenda mibale: nabengaki moko Ngolu, mpe mosusu, Bomoko. Bongo, nakomaki kobatela bameme.
8 在一個月內,我竟廢除了三個牧人;終於我的人神也厭煩了羊群,而他們的心也厭惡我。
Na sanza moko kaka, nabomaki babateli bibwele misato; nakokaki lisusu kokanga motema te, mpe etonga eyinaki ngai.
9 我於是說:我不願再失放你們:那要死的,就讓他死去;那要喪亡的,就讓他喪亡;那劓剩下的,就讓他們彼此吞食。
Nalobaki na etonga ya bibwele: — Nakozala lisusu mobateli na bino te. Tika ete oyo ekokufa ekufa na yango, oyo ekobunga ebunga na yango; mpe tika ete oyo ekotikala ebomana yango na yango!
10 以後,我就拿起我的棍杖「愛護」,把它折斷,藉以廢除我與眾百姓所結的盟約。
Nakamataki lingenda oyo nabengaki Ngolu, nabukaki yango mpo na kotalisa ete boyokani oyo nasalaki elongo na bikolo nyonso esili.
11 盟約便在那一天廢除了;於是那些注視我的羊販子,便知道這是上主的話。
Boyokani esilaki nde na mokolo wana; bongo, etonga oyo ezalaki na pasi makasi mpe ezalaki kotala ngai esosolaki ete ezalaki solo Liloba na Yawe.
12 以後,我對他們說:如果你們看著好,就給我工資,不然,就算了。他們於是衡量了二十兩銀子作我的工資。
Nalobaki na bango: — Soki bomoni ete ezali malamu, bopesa ngai lifuti na ngai; soki te, botika na bino. Bafutaki ngai mbongo ya bibende ya palata tuku misato lokola lifuti na ngai.
13 那時上主對我說:「你把他們對我所佔計的高價投入寶內! 我就是拿了那三十兩銀子,投入上主殿內寶庫裏
Mpe Yawe alobaki na ngai: — Bwaka yango epai ya mosali mbeki; yango nde motuya ya malonga oyo bamoni ete ekoki na Ngai! Nakamataki mbongo yango ya bibende tuku misato mpe nabwakaki yango kati na Tempelo ya Yawe, epai ya mosali mbeki.
14 我又折斷我的另一根棍杖「聯合」,藉以廢除與以色列間的手足情誼。
Bongo nabukaki lisusu lingenda ya mibale oyo nabengaki Bomoko, mpo na kotalisa ete bondeko kati na libota ya Yuda mpe ya Isalaele ekufi.
15 上主又對我說:「你再取一套愚昧收入的服裝,
Yawe alobaki na ngai: — Kamata lisusu bisalelo ya mobateli bibwele ya zoba!
16 因為.看,我將在地上興起一個牧人:那喪失的,他不去尋找;那迷途的,他不去搜索;那受傷的,他不去醫治;那病弱的,他不去扶持;卻要擇肥而食,並且剝去牠們的蹄子。
Pamba te nakobimisa kati na mokili mobateli bibwele ya sika oyo akobanda koluka te bibwele oyo ebungi, akolandela te bana bibwele, akosalisa te bapota ya bibwele oyo ezoki, akoleisa te oyo ezali na nzoto kolongono, kasi akobanda koliaka misuni ya bibwele ya mafuta mpe kobuka yango makolo.
17 禍哉! 那拋棄羊群的愚昧牧人! 願刀劍落在他的臂膊和他的右眼上! 願他的臂膊枯槁! 願他的右眼完全失明!
Mawa na mobateli bibwele ya zoba oyo asundolaka etonga na ye! Tika ete mopanga ekata ye loboko mpe etobola ye liso oyo ezali na ngambo ya loboko ya mobali! Tika ete loboko na ye ekawuka, solo, ekawuka penza! Tika ete liso na ye, oyo ezali na ngambo ya loboko ya mobali ekufa, ekufa solo!

< 撒迦利亞書 11 >