< 雅歌 6 >

1 ◆耶京女郎: 妳這女中極美麗的啊! 妳的愛人往那裏去了﹖妳的愛人轉向何處去了﹖妳讓我們同妳一起去尋找﹖◆新娘:
Oh mwasi oyo aleki basi nyonso na kitoko, mobali na yo akei wapi? Akoti nzela nini mpo ete tosunga yo mpo na koluka ye?
2 我的愛人到自己的花園,到香畦去了,好在花園中牧羊,採百合花。
Mobali na ngai akei na elanga na ye, na mikala ya banzete ya solo kitoko mpo na koleisa bibwele na ye mpe kobuka fololo oyo babengaka lisi.
3 我屬於我的愛人,我的愛人屬於我,他在百合花間,牧放他的羊群。◆新郎:
Nazali mpo na mobali na ngai, mpe mobali na ngai azali mpo ngai. Azali koleisa bibwele na ye na bilanga ya bafololo oyo babengaka lisi.
4 我的愛卿! 妳美麗有如提爾匝,可愛有如耶路撒冷,莊嚴有如整齊的軍旅。
Oh mwasi na ngai ya motema, ozali kitoko lokola engumba ya Tiritsa; elongi na yo ezali kitoko lokola engumba Yelusalemi; obangisaka lokola mampinga ya basoda na se ya bendele na bango.
5 轉過妳的眼去,不要看我,因為妳的眼使我迷亂;妳的頭髮猶如由基肋阿得山下來的一群山羊。
Tika kotala ngai, pamba te miso na yo ezali kokweyisa ngai mayanga. Suki na yo ezali lokola etonga ya bantaba ya basi oyo ewutaka na Galadi.
6 妳的牙齒像一群浴後上來的母綿羊,都懷有雙胎,沒有不生育的。
Minu na yo ezali lokola etonga ya bameme oyo bawuti kosukola. Meme moko na moko ezali na lipasa na yango, moko te ezangi mwana.
7 妳隱在面紗後的兩頰,有如分裂兩半的石榴。
Matama na yo, na se ya vwale, ezali lokola liboke ya bambuma ya grenade.
8 皇后六十,嬪妃八十,少女無數:
Mokonzi akoki kozala na basi tuku motoba, bamakangu tuku mwambe mpe bilenge basi ebele penza.
9 但是,我的鴿子,我的完人,只有一個,她是生養她者的愛女;少女見了她,都稱她有福;皇后與嬪妃,也都讚揚她。◆耶京女郎:
Kasi ebenga na ngai, mwasi na ngai oyo akoka na nyonso, azali kaka ye moko; azali kaka ye moko mwana mwasi ya mama na ye, oyo aleki kitoko na libumu ya mama oyo abota ye. Tango bilenge basi bamonaka ye, balulaka ye mpe batatolaka ete azali mwasi na esengo. Basi ya bakonzi mpe bamakangu bakumisaka ye soki bamoni ye.
10 「那上升如晨曦,美麗如月亮,光耀如太陽,莊嚴如整齊軍旅的,是誰﹖」[第五幕:愛情的享受]◆新娘:
Nani oyo azali komonana lokola moyi ya tongo, kitoko lokola sanza, azali kongenga lokola moyi, abangisaka lokola mampinga ya basoda na se ya bendele na bango?
11 我下到核桃園中,要欣賞谷中的新綠,看看葡萄樹是否發了芽,石榴樹是否開了花﹖
Nakendeki na elanga ya bakokoti mpo na koluka milona kati na lubwaku, mpo na kotala soki banzete ya vino ebandi kobimisa mito to banzete ya grenade ebandi kobimisa bafololo.
12 我的熱誠摧促我登上了我民主上的御駕。
Nasosolaki te ndenge nini molimo na ngai ememaki ngai kino na bashar ya mokonzi ya bato na ngai.
13 耶京女郎:1. 歸來,歸來! 叔拉米特! 歸來,歸來! 讓我看看妳! 妳們要看叔拉米特什麼﹖看她在兩隊中舞蹈。◆甲:
Zonga, zonga, oh mwasi ya Sulami! Zonga, zonga mpo ete tokoka kotala yo malamu! Mpo na nini bolingi kotala malamu mwasi ya Sulami ndenge batalaka mabina ya mindule ya masanga mibale?

< 雅歌 6 >