< 路得記 2 >
1 納敖米的丈夫厄里默肋客家族中有個親人,是有錢有勢的人,名叫波阿次。
Naomi azalaki na ndeko moko kati na libota ya mobali na ye; ndeko yango azalaki ya etuka ya Elimeleki, azalaki penza na bozwi mingi; kombo na ye ezalaki « Boazi. »
2 摩阿布女子盧德對納敖米說:「讓我到田裏去,我在誰眼中蒙恩,就在誰後面拾麥穗。」納敖米答應她說:「我女,你去罷! 」
Rite, moto ya Moabi, alobaki na Naomi: — Okoki kopesa ngai nzela ya kokende na bilanga mpo na kolokota mito ya ble, oyo bato oyo bakataka ble batiki. Nakozala na sima ya moto oyo akosalela ngai ngolu. Naomi alobaki na ye: — Mwana na ngai, kende.
3 她就去了,來到田間,在收割人的後面拾麥穗。可巧,她正來到了厄里默肋客家族人波阿次的田地裏。
Rite akendeki mpe abandaki kolokota ble na bilanga, na sima ya bato oyo bakataka ble. Akutanaki na libaku ya malamu, pamba te ayaki kososola ete azali kosala kati na elanga ya Boazi, moto ya etuka ya Elimeleki.
4 當時波阿次也正從白冷來到,向收割的人說:「願上主與你們同在! 」他們回答他說:「願上主祝福你! 」
Sima na mwa tango, Boazi awutaki na Beteleemi; ayaki ye moko, apesaki mbote na bato oyo bakataka ble na koloba: — Tika ete Yawe azala elongo na bino! Bazongiselaki ye: — Tika ete Yawe apambola yo!
5 波阿次問監督收割的僕人說:「這是誰家的女子﹖」
Boazi atunaki mokambi ya bato oyo bakataka ble: — Elenge mwasi wana azali ya nani?
6 監督收割的僕人答說:「是那由摩阿布鄉間與納敖米歸來的摩阿布女子。
Mokambi ya bato oyo bakataka ble azongisaki: — Azali elenge mwasi ya Moabi; ayaki elongo na Naomi wuta na mboka Moabi.
7 她事先請求過:請讓我在收割的人後面拾取麥穗。她來到這裏,從早晨到現在,從未休息片刻。」波阿次厚待盧德
Asengaki biso nzela ya kolokota mito ya ble, oyo etikalaka tango bakangaka maboke, na sima ya bato oyo bakataka ble. Na tongo ya lelo, akotaki na bilanga mpe azali kosala na molende nyonso; kino sik’oyo, apemi kaka tango moke.
8 波阿次對盧德說:「我女,你聽我的話,你不要到別人的田裏去拾取,也不要離開這裏,要常同我的使女在一起。
Boazi alobaki na Rite: — Yoka ngai malamu, mwana na ngai ya mwasi: « Kokende kolokota ble na bilanga mosusu te mpe kokende mosika ya elanga oyo te, kasi vanda awa elongo na basali na ngai ya basi.
9 你看僕人們在那塊田裏收割,你就跟著去,我已吩咐了僕人們不要難為你。你渴了,可到水罐那裏去喝僕人打來的水。」
Tala malamu bilanga oyo epai wapi bato bazali kokata ble mpe zala na sima ya bana basi oyo bazali kolokota ble. Nalobi na mibali ete basimba yo te. Tango nyonso ozali na posa ya mayi, kende mpe mela na bambeki oyo mibali batondisi. »
10 盧德遂俯首至地,向他下拜說:「我怎樣竟蒙你如此垂青,眷顧我這外方的女子﹖」
Tango Rite ayokaki bongo, agumbamaki, elongi kino na mabele. Alobaki: — Mpo na nini nazwi ngolu ya boye na miso na yo? Mpo na nini ozali kopesa ngai lokumu ya boye, ngai oyo nazali mopaya?
11 波阿次答覆她說:「自你丈夫死後,你怎樣待了你的婆婆,以及你怎樣離開了你的父母和故鄉,來到這素不相識的民族中;這一切事,人家都一一告訴了我。
Boazi azongisaki: — Bayebisaki ngai makambo nyonso oyo osalaki mpo na mama-bokilo na yo wuta tango mobali na ye akufaki, ndenge otikaki tata mpe mama na yo, mboka epai wapi obotama, mpe oyaki kovanda elongo na bato oyo oyebaki liboso te.
12 願上主報答你的功德,願你投奔於他翼下的上主,以色列的天主,賜與你的報答是豐富的! 」
Tika ete Yawe afuta yo mpo na makambo oyo osalaki. Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, afuta yo koleka, lokola oyaki kobombama na se ya mapapu na Ye!
13 盧德答說:「我主,我連你的一個婢女都不如,竟在你眼裏蒙恩,你竟安慰我,對你的婢女說出這樣動心的話! 」
Rite alobaki: — Tika ete nakoba kozwa ngolu na miso na yo, nkolo na ngai. Obondisi motema na ngai, osololi na mwasi mosali na yo na boboto nyonso. Nzokande, nakokani te ata na moko ya basali na yo ya basi.
14 到了吃飯的時候,波阿次對她說:「你上前來吃餅,將你的餅浸在酸酒裏。」她就坐在收割的人旁,波阿次遞給了她烘焙的麥遂;她吃了,也吃飽了,還有剩下的。
Na tango ya kolia, Boazi alobaki na ye: « Pusana awa mpe kamata eteni ya lipa, zindisa yango na vino. » Tango avandaki elongo na bato oyo bakataka ble, Boazi apesaki ye ndambo ya bambuma bakalinga. Aliaki ndenge alingaki mpe atikaki mosusu.
15 當她起來再拾取麥穗的時候,波阿次吩咐他的僕人說:「就連她在麥捆中拾取,你們有不要為難她;
Tango atelemaki mpo na kolokota lisusu ble, Boazi apesaki mitindo epai ya basali na ye: « Botika ye kolokota ata oyo ezali na kati-kati ya maboke, botungisa ye te.
16 並且要從麥梱中,為她抽出些來,留下讓她拾取,不要叱責她。」
Bokoki mpe kokweyisa bambuma mpo na ye, mpo ete alokota na ye, mpe bozomela ye te. »
17 她在田間拾取麥穗,直到晚上,將所拾的打了約有「一厄法」大麥。盧德回家
Boye Rite alokotaki ble na elanga kino na pokwa, aningisaki oyo alokotaki mpe azwaki bakilo pene tuku minei ya bambuma ya orje.
18 她就背著回城去,教她婆婆看看她的收獲;又將吃飽後剩下的東西,拿出來給了她。
Amemaki yango na engumba, mpe mama-bokilo na ye amonaki bambuma oyo alokotaki. Rite abimisaki lisusu biloko oyo atikaki tango atondaki mpe apesaki yango epai ya mama-bokilo na ye.
19 她的婆婆問她說:「你今天在那裏拾麥穗,在那裏工作﹖願那眷顧你的人家蒙受祝福! 」她就告訴她婆婆,她在誰那裏工作,並且說:「我今天在他那裏工作的人,名叫波阿次。」
Naomi atunaki Rite: — Lelo, olokotaki ble na esika nini? Osalaki na esika nini? Tika ete moto oyo apesi yo lokumu ya boye apambolama! Bongo Rite ayebisaki mama-bokilo na ye makambo oyo etali nkolo ya esika epai wapi asalaki. Alobaki: « Kombo ya moto yango ezali Boazi. »
20 納敖米對她的兒媳說:「願那位從未忘卻對生者死者施慈愛的上主祝福這人! 」納敖米又向她說:「這人是我們的親人,且是有至親義務的人。」
Naomi alobaki na bokilo na ye ya mwasi: « Tika ete Yawe apambolama, Ye oyo atiki te kotalisa bolamu na Ye epai na biso bato ya bomoi mpe epai na bakufi. Mobali wana azali ndeko na biso ya pembeni, azali kati na molongo ya bato oyo bakoki kosikola biso. »
21 摩阿布女子盧德接著說:「並且他還對我說過:你要常同我的僕人在一起,直到收完我的莊稼。」
Rite, moto ya Moabi, alobaki: — Alobaki na ngai kutu: « Vanda elongo na basali na ngai kino bakosilisa kobuka bambuma na ngai nyonso. »
22 納敖米向自己的兒媳盧德說:「我女,你更好跟著他的使女去罷! 免得在別人的田裏受難為。」
Naomi azongiselaki Rite, bokilo na ye ya mwasi: — Ekozala malamu mpo na yo kotambolaka elongo na basali na ye ya basi; pamba te soki okeyi na elanga ya moto mosusu, okoki komona pasi.
23 盧德就緊隨著波阿次的使女拾麥穗,直到收完了大麥和小麥。盧德時常與自己的婆婆住在一起。
Boye Rite avandaki pembeni ya basali ya Boazi mpo na kolokota mito ya ble, kino tango ya kobuka bambuma ya orje mpe ya ble, esilaki. Awumelaki kovanda elongo na mama-bokilo na ye.