< 詩篇 99 >

1 上主為王,萬民戰慄驚恐,祂坐於革魯賓之上,大地震動;
Yawe azali kokonza; tika ete bato balenga! Avandi na Kiti ya Bokonzi kati na basheribe; tika ete mabele eningana!
2 熙雍的上主,偉大當皇,崇高尊貴,而超越萬邦。
Yawe azali monene kati na Siona, mpe Bokonzi na Ye ezali likolo ya bikolo nyonso.
3 願他們讚美您的大名,它可敬可畏,至尊神聖。
Tika ete Kombo na Yo ya monene mpe ya somo esanzolama; ezali bule!
4 您是愛正義的大能君王,是您制定了法律的正綱,對雅各伯彿的合理合章。
Mokonzi azali na nguya, alingaka bosolo. Olendisaka bosembo. Osalaki bosembo mpe bosolo kati na Jakobi.
5 請您們尊崇上主,我們的天主,還要向著祂的腳凳伏地叩首。因為祂的腳凳也是神聖無偶。
Bonetola Yawe, Nzambe na biso, mpe bogumbama liboso ya enyatelo makolo na Ye; azali Mosantu.
6 梅瑟和亞郎列於上主的司祭中,撒慕爾屬於呼號上主聖名的人中,他們呼號上主,上主即俯聽他們。
Moyize mpe Aron kati na Banganga-Nzambe na Ye, mpe Samuele kati na bato oyo bazalaki kobelela Kombo na Ye, bazalaki kobelela Yawe, mpe Ye azalaki koyanola bango.
7 祂從前曾在雲柱中訓示了他們,他們就守了祂吩咐的誡命章程。
Azalaki koloba na bango kati na likonzi ya lipata. Babatelaki malako na Ye mpe mibeko oyo apesaki bango.
8 上主,您原是我們的天主,您曾俯聽他們;天主,您寬赦宥他們,但也報復他們的惡行。
Yawe, Nzambe na biso, oyanolaki bango. Mpo na bango, ozalaki Nzambe oyo alimbisaka atako opesaki bango etumbu mpo na misala na bango ya mabe.
9 請您們尊崇上主,我們的天主,還要向著祂的聖山伏地叩首,因我們的天主,上主神聖無偶。
Bonetola Yawe, Nzambe na biso, mpe bogumbama na kotala na ngambo ya ngomba na Ye ya bule. Pamba te Yawe, Nzambe na biso, azali bule.

< 詩篇 99 >