< 詩篇 48 >

1 科辣黑後裔的詩歌。 在我們天主的城池中,上主至大,應受到讚頌。
Nzembo ya bana ya Kore. Yawe azali monene mpe abongi na lokumu, kati na engumba ya Nzambe na biso, ngomba na Ye ya bule.
2 祂的聖山巍峨高聳,是普世的歡喜,北方中心熙雍聖山,是大王的城邑。
Ezali kitoko, ngomba moke oyo esalaka esengo ya mokili mobimba, ngomba Siona! Ngambo na yango ya Nor nde ezali engumba ya Mokonzi Monene.
3 天主居於堡壘的中央,顯自己為穩固的保障。
Nzambe azali kati na bandako na yango ya bokonzi, amimonisi lokola ndako batonga makasi.
4 請看,眾王紛紛相聚,他們蜂擁走向前去,
Pamba te bakonzi basanganaki, batambolaki nzela moko.
5 他們一見,驚魂喪膽,張惶失措,抱頭鼠竄。
Kasi tango kaka bamonaki yango, bakamwaki mpe bakimaki na somo.
6 他們在那裡惶懼恐怖,苦痛有如臨盆的孕婦;
Mbala moko, bakomaki kolenga wana lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota
7 好像塔爾史士的船隻,為強烈的東風所襲擊。
to lokola mopepe ya Este oyo apanzaka masuwa ya Tarsisi.
8 在萬軍上主的城裏,即我們天主的城堡,我們所見正如所聞:天主必使城堡永固。
Ndenge kaka bayebisaki biso, ndenge mpe tomonaki kati na engumba ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, kati na engumba ya Nzambe na biso; Nzambe alendisaka yango seko na seko.
9 天主,我們在你的殿裏,沉思默念著你的仁慈。
Nzambe, kati na Tempelo na Yo, tokanisaka bolingo na Yo.
10 天主,你的名號遠達地極,你受的讚美亦應該如此。你的右手全充滿了正義,
Nzambe, lokumu na Yo epanzani kino na suka ya mokili, ndenge moko na Kombo na Yo; loboko na Yo ya mobali etondi na bosembo.
11 願熙雍山因你的公正而喜樂;猶大女子也要因此歡欣踴躍。
Ngomba ya Siona ezali kosepela, bamboka ya Yuda etondi na esengo mpo na mikano na Yo.
12 你們環繞熙雍巡遊,你們數點她的城樓,
Botambola pembeni ya Siona, bokende zingazinga na yango, botanga bandako na yango ya milayi.
13 觀察她的城廓,巡視她的碉堡,是為叫你們向後代子孫陳述:
Botala lopango na yango, botala malamu bandako na yango mpo ete bopesa sango epai ya bato oyo bakoya na sima.
14 天主的確是偉大的天主,也永遠是我們的天主,始終領導我們的天主。
Pamba te Nzambe wana azali Nzambe na biso seko na seko mpe libela na libela; akotambolisa biso, ezala kino na kufa.

< 詩篇 48 >