< 詩篇 116 >

1 我對上主愛慕傾心,因祂俯聽我的禱聲;
Nalingaka Yawe, pamba te ayokaka mongongo mpe mabondeli na ngai.
2 在我呼籲祂的那日,祂向我側祂的聖耳。
Ayokaki ngai; boye nakobelela Ye bomoi na ngai mobimba.
3 死亡的圈套纏住了我,陰府的羅網縛住了我, (Sheol h7585)
Minyololo ya kufa ezingelaki ngai, somo ya mboka ya bakufi ekangaki ngai; nakomaki moto ya pasi mpe ya mawa. (Sheol h7585)
4 我呼求了上主的聖名,上主,求您救我的性命。
Kasi nabelelaki Kombo ya Yawe: « Yawe, nabondeli Yo, bikisa ngai! »
5 上主富有憐憫和正義,我們的天主仁愛無比;
Yawe asalaka ngolu mpe azali sembo, Nzambe na biso ayokelaka bato mawa.
6 上主,保護誠樸的人,我若軟弱,祂必救助。
Yawe abatelaka bato oyo bazangi mayele. Nalembaki nzoto, kasi abikisi ngai.
7 我的靈魂,您回到您的安息,因為上主實在是厚待了您。
Molimo na ngai, zongela kimia na yo, pamba te Yawe asaleli yo bolamu.
8 因為祂救拔我的靈魂脫免死亡,不使我的眼睛流淚,不使我的腳跌傷。
Solo, okangoli ngai na kufa, okawusi mpinzoli na ngai mpe obateli makolo na ngai ete ekweya te.
9 我要在人的地域,在上主的面前行走。
Nakotambola liboso ya Yawe kati na mokili ya bato ya bomoi.
10 雖然說我已痛苦萬分,但是我仍然抱有信心。
Solo, nazalaka na elikya, ezala soki nalobaka: « Nazali moto na pasi makasi. »
11 我在彷徨中曾說:眾人都虛詐不誠。
Kati na mitungisi na ngai, nazalaki komilobela: « Bato nyonso bazali bakosi. »
12 我要怎樣報謝上主,謝祂賜給我的一切恩佑?
Nini nakoki kozongisela Yawe mpo na bolamu na Ye nyonso epai na ngai?
13 我要舉起救恩的杯,我要呼顅上主的名,
Nakotombola kopo ya elonga mpe nakobelela Kombo ya Yawe.
14 我要在眾百姓面前,向上主還我的誓願。
Nakokokisa bandayi na ngai epai na Yawe na miso ya bato na Ye nyonso.
15 上主的聖者的去世,在上主的眼中十分珍貴。
Kufa ya bayengebene ya Yawe ezali na motuya makasi na miso na Ye.
16 我的上主!我是您的僕役,您僕役是您婢女的兒子;您將我的鎖鏈給我開釋,
Yawe, yoka ngai, nazali mosali na Yo. Nazali mosali na Yo, mwana mobali ya mwasi mosali na Yo. Ofungoli minyololo oyo ekangaki ngai.
17 我要給您奉獻讚頌之祭,我要呼號上主的名字。
Nakobonzela Yo mbeka mpo na kozongisa matondi, mpe nakobelela Kombo ya Yawe.
18 我要在眾百姓面前,向上主還我的誓願,
Nakokokisa bandayi na ngai epai na Yawe na miso ya bato na Ye nyonso,
19 要在上主聖殿的庭院,耶路撒冷! 即在您中間。
kati na lopango ya Tempelo ya Yawe; kati na yo, Yelusalemi. Bokumisa Yawe!

< 詩篇 116 >