< 詩篇 111 >

1 阿肋路亞。在義人的集會和團聚中,我要全心讚頌上主。
Bokumisa Yawe! Nakokumisa Yawe na motema na ngai mobimba kati na likita ya bato ya sembo mpe kati na mayangani.
2 上主的化工確實偉大,凡喜愛祂的必須究察。
Yawe asalaka makambo minene; bato nyonso oyo balingaka yango bakanisaka yango.
3 上主的作為輝煌,上主的正義常存。
Misala na Ye emonisaka nkembo mpe lokumu na Ye, mpe bosembo na Ye ewumelaka libela na libela.
4 上主的奇蹟不可遺忘;上主實在是慈愛而溫良。
Alingaka ete bakanisa bikamwa na Ye. Yawe atondi na mawa mpe atalisaka ngolu na Ye.
5 上主賜給敬愛祂的人食物,上主永遠懷念自己的盟約。
Apesaka bato oyo batosaka Ye bilei; akanisaka Boyokani na Ye tango nyonso.
6 祂將偉業的異能啟示給選民,把外邦人的產業賞賜給他們。
Amonisaki nguya na Ye epai ya bato na Ye na nzela ya misala na Ye tango apesaki bango libula ya bato ya bikolo mosusu.
7 上主所行的是真誠正義;上主的一切規誡堅定不移。
Misala na Ye nyonso elakisaka boyengebene mpe bosembo na Ye; mibeko na Ye nyonso ebongi na kondima yango.
8 為萬世萬代永遠立定,全是基於真理和公正。
Epesama mpo na libela, mpe esengeli kotosa yango na bosembo mpe na bosolo.
9 祂速來救贖祂的百姓,永遠立定了祂的約盟;祂的名是神聖而可敬。
Akangolaki bato na Ye, mpe asalaki Boyokani ya libela elongo na bango. Azali Nzambe Mosantu mpe Nzambe ya somo.
10 敬愛上主,是智慧的開始:實行敬愛的人,算有智慧;他的榮譽,必定存留永世。
Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya; bato nyonso oyo batosaka Yawe bazali na mayele ya peto. Lokumu ya Yawe ezali ya libela na libela.

< 詩篇 111 >