< 詩篇 109 >
1 達味的聖詠,交於樂官。我所讚美的天主,求您別緘口不語!
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Nzambe, Yo oyo ngai nakumisaka, kovanda kimia te!
2 因為邪惡欺詐的口,已經張開攻擊我,騙人說謊的舌頭,也已經出言陷害我,
Bato mabe bazali koloba lokuta mpo na kofunda ngai, bazali mpe kokosela ngai makambo.
3 以毒恨的言語四面評擊我,又無緣無故地興訟毀謗我。
Bazingeli ngai na maloba ya koyina mpe bazali kobundisa ngai kaka pamba.
4 他們誣告我,以報我的友愛;然而我卻為他們祈禱不懈;
Bato oyo ngai nalingaka bafundi ngai, kasi ngai namipesi na ngai kaka na mabondeli.
5 他們以惡心回報我的善心,他們用恨情還報我的愛情。
Bazali kozongisela ngai mabe na bolamu, mpe koyina na bolingo.
6 求您派一惡人向他們攻訐,叫控告者站在他的右邊。
Kaba ye na maboko ya moto mabe! Bimisela ye monguna, na ngambo ya loboko na ye ya mobali!
7 使他受審時,被判為罪,使他的辯護,仍構成罪案。
Tika ete bazwa ye lokola moto mabe na tango ya kosamba, mpe libondeli na ye etangama lokola masumu!
Tika ete mikolo ya bomoi na ye ekoma moke, tika ete moto mosusu azwa mokumba na ye!
Tika ete bana na ye bakoma bana bitike, mpe tika ete mwasi na ye akoma mwasi akufisa mobali!
10 使他的子孫流離失所,沿門乞食,使他由殘破的家室裏,被人逐離。
Tika ete bana na ye batelengana mpe bakoma bisengasenga, tika ete bakende kosenga mosika ya ndako na bango oyo ebukana-bukana!
11 使債主搜括他所有的家產,仗外人劫掠他勞力的所賺。
Tika ete moto oyo adefisaki ye mbongo akanga ye biloko nyonso, mpe tika ete bapaya babotola ye bambuma ya mosala na ye!
12 誰也不要向他施行仁慈,誰也不要憐憫他的孤兒;
Tika ete moko te atalisa ye bolingo, tika ete moko te ayokela bana bitike na ye mawa!
13 願他的後肓裔全被斬盡滅絕,他們的姓名被塗抹於後代。
Tika ete bakitani na ye basila na kokufa, mpe bakombo na bango elongwa na ekeke oyo ezali kolanda!
14 願上主記念他父親的罪愆,總不要赦免他母親的過犯;
Tika ete Yawe alandela masumu ya batata na ye mpe alimbisa te masumu ya mama na ye!
15 叫那些罪永留在上主前,從地上除去他們的記念。
Tika ete Yawe akanisaka masumu yango tango nyonso mpe asala ete babosana bango libela na mokili!
16 因為他們總不想施恩行善,但知道迫害弱釔和貧賤,連人靈破碎的人也摧殘。
Lokola atikalaki te kotambola na boboto, mpe lokola anyokolaki mobola mpe moto na mawa kino kobomisa moto oyo azoka na motema;
17 他既喜愛詛咒,願詛咒臨於他!他既不愛祝福,願祝福遠離他!
lokola azalaki kolinga mingi kolakela bato mabe, tika ete bilakeli mabe ekweyela ye! Lokola azalaki kosepela te kopambola bato, tika ete mapamboli ezala mosika na ye!
18 他以詛咒為他的衣帶,詛咒如水浸入他的五內,更像脂油滲透他的骨骸,
Tika ete alata elakeli mabe lokola kazaka, tika ete ekota kati na ye lokola mayi, mpe kati na mikuwa na ye lokola mafuta!
Tika ete elakeli mabe yango elata ye lokola elamba oyo alati, mpe ekangama ye na loketo lokola mokaba mpo na tango nyonso!
20 凡控告我並惡言誹謗我的人,願他們由主獲得這些報應。
Tala ndenge Yawe akofuta banguna na ngai mpe bato oyo balobaka mabe na tina na ngai.
21 然而上主,為了您的名,求您善等我,天主,按焄您的仁慈和善良,拯救我!
Kasi Yo Nkolo Yawe, salela ngai bolamu mpo na lokumu ya Kombo na Yo, kangola ngai kolanda boboto ya bolingo na Yo.
Solo, nazali mobola mpe moto na mawa, mpe motema na ngai ezali ya kozoka kati na ngai.
23 我像夕陽殘影漸漸消逝,我被人驅除又與蝗蟲相似。
Nazali kokende lokola elili oyo ezali kolimwa; bazali kobengana ngai lokola mabanki.
24 我的雙膝因齋戒而酸軟,我的肉體已經消瘦不堪。
Mabolongo na ngai elembi mpo na kokila mingi bilei, nzoto na ngai mpe ebukani mpo ete nakondi makasi.
Mpo na bango, nakomi eloko ya nkele; soki kaka bamoni ngai, baningisi mito.
26 上主,我的天主,求您扶助我,求您按著您的慈愛拯救我,
Yawe, Nzambe na ngai, sunga ngai; bikisa ngai kolanda bolingo na Yo!
27 讓人知道這是您手的工程,上主,的確這是您的所作所行。
Tika ete banguna na ngai bayeba ete Yo Yawe nde osalaki bongo.
28 任憑他們詛咒,惟願您予以祝福,叫您的僕人喜歡,使我的仇敵蒙羞。
Ata balakeli ngai mabe, Yo okopambola ngai; soki mpe bameki kotelema mpo na kobundisa ngai, bakokufa soni. Nzokande ngai mosali na Yo, nakozala moto ya esengo.
29 叫誣告我的人滿被淩辱,他們蒙受恥辱,如被氅裘。
Tika ete bayini na ngai bazanga lokumu mpe bamizipa na soni lokola kazaka.
Nakosanzola Yawe na mongongo makasi, nakokumisa Ye kati na ebele ya bato.
31 因祂站在窮苦人的右邊,拯救他脫離定罪的裁判。
Pamba te atelemaka na ngambo ya loboko ya mobali ya mobola mpo na kokangola ye wuta na maboko ya bato oyo bakatela ye etumbu.