< 詩篇 108 >

1 【我要在萬民中讚美上主】達味的詩歌。 天主,我的心已準備妥當,我的心已準備妥當,我歌彈詠唱。
Nzembo ya Davidi. Nzambe, motema na ngai ezali na kimia! Nakoyembela Yo, nakosanzola Yo na mindule; ezali mpe lokumu na ngai.
2 我的心靈要醒起來!七絃和豎琴要奏起來!我要喚起曙光。
Lindanda mpe nzenze, bolamuka! Nalingi kolamusa tongo.
3 上主,我要在萬民中讚美您;上主,我要在列邦中歌頌您。
Nkolo, nakosanzola Yo kati na bato, nakoyembela Yo kati na bikolo.
4 上主,您的慈愛高越諸天;上主,您的忠信直達霄漢。
Pamba te bolingo na Yo ezali monene koleka Lola, mpe bosembo na Yo ekenda kino na mapata.
5 上主,您在天上備受舉揚;上主,您在地上彰顯榮光。
Oh Nzambe, tika ete otombolama na likolo ya Lola, mpe nkembo na Yo ezala awa na mokili mobimba!
6 上主,您給我們獲得救恩;上主,您以右手協助我們。
Bikisa biso na nguya ya loboko na Yo mpe yanola biso, mpo ete balingami na Yo bakangolama!
7 天主在自己的聖所說:我要凱旋,將舍根分離,將穌苛特的平原測量。
Nzambe alobaki kati na Esika na Ye ya bule: « Nakolonga! Nakokabola Sishemi mpe nakotia bandelo ya lubwaku ya Sukoti.
8 基勒阿得地屬於我,默納協地也屬於我,我的頭盔就是厄法辣因,猶大成為我手中的權棍。
Galadi ezali ya ngai, Manase mpe ezali ya ngai; Efrayimi ezali ekoti na ngai ya ebende, mpe Yuda ezali lingenda na ngai ya bokonzi.
9 摩阿布是我的沐浴池,我向厄東投我的鞋隻,我還要戰勝培勒舍特。
Moabi ezali sani monene oyo nasukolelaka, Edomi ezali esika oyo nabwakaka sandale na ngai. Nazali kobeta milolo ya bitumba mpo na kobundisa mokili ya Filisitia. »
10 誰引領我進入堅城,誰領導我走進厄東?
Nani akomema ngai na engumba batonga makasi? Nani akotambolisa ngai kino na Edomi?
11 天主,莫非您已將我們拋棄,天主,難道不率領我們出擊?
Ezali Yo te, Nzambe oyo obwakaki biso, Nzambe oyo ozalaki lisusu te kokende bitumba elongo na mampinga na biso!
12 求您援助我們抵抗仇敵,因為人的援助盡屬虛無。
Yaka kosunga biso, kangola biso liboso ya moyini! Pamba te lisungi ya bato ezali pamba.
13 我們倚靠天主,奮勇行事。祂必要踏踐我們的仇敵。
Elongo na Nzambe, tokosala makambo minene mpe ya kokamwa; ezali Ye nde akonyata banguna na biso.

< 詩篇 108 >