< 詩篇 107 >
1 請您們向上主讚頌,因為祂是美善寬仁,祂的仁慈永遠常存。
Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, mpe bolingo na Ye ewumelaka seko na seko!
2 歌詠此曲的人們是:上主親身所救贖的,由敵人手中救出的,
Tika ete bato oyo Yawe asikolaki baloba bongo, ba-oyo akangolaki wuta na maboko ya monguna,
ba-oyo asangisaki wuta na bikolo nyonso, wuta na este, na weste, na nor mpe na sude.
4 他們在曠野和沙漠中漂流,找不到安居之城的道路。
Ndambo bazalaki koyengayenga na esobe, na esika oyo ezanga bato, bamonaki te nzela ya engumba epai wapi bakoki kovanda.
Likolo ya nzala mpe ya posa ya mayi, bakomaki pene ya kokufa.
6 他們於急難中一哀救上主,上主即拯救他們脫離困苦,
Bongo kati na pasi na bango, babelelaki Yawe, mpe akangolaki bango na mitungisi na bango.
Atambolisaki bango na nzela ya alima mpo ete bakende kovanda kati na engumba.
Tika ete basanzola Yawe mpo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato!
9 因為祂使饑渴的人得到飽飫,祂使肚餓人享盡美物。
Apesaki mayi epai ya bato oyo bazalaki na posa ya mayi mpe bilei epai ya bato oyo bazalaki na nzala.
10 他們坐在黑暗與死影裏,盡為痛苦與鐵鍊所縛繫,
Bato oyo bazalaki kovanda na bisika ya molili makasi mpe ya molili ya kufa bazalaki ya kokangama na minyoko mpe na minyololo ya bibende,
11 因為背棄了天主的命令,又輕視了至高者的叮嚀。
pamba te batombokelaki maloba na Nzambe mpe batiolaki mabongisi ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo.
12 因此,祂以苦難折磨了他們的心神,他們跌倒了,卻沒有人來扶持他們。
Abukaki lolendo ya mitema na bango na nzela ya misala makasi; bakweyaki, mpe moko te asungaki bango.
13 他們在急難中哀求上主,上主即救他們脫離困苦,
Kati na pasi na bango, babelelaki Yawe, mpe abikisaki bango na mitungisi na bango.
14 領他們擺脫死影與黑暗,把他們的銬鐐完全弄斷。
Abimisaki bango wuta na molili makasi mpe na molili ya kufa, mpe abukaki minyololo na bango.
15 願他們感謝上主的仁慈,稱頌祂給人子顯的奇蹟。
Tika ete basanzola Yawe mpo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato!
Pamba te abukaki bikuke ya bronze mpe akataki bikangelo ya mabende.
Bamosusu bakomaki bazoba mpo na etamboli mabe na bango, mpe bato na pasi, mpo na masumu na bango.
Minoko na bango eyinaki bilei nyonso, mpe bakomaki pene ya bikuke ya kufa.
19 他們於急難中一哀求主,上主即拯救他們脫離困苦。
Kati na pasi na bango, babelelaki Yawe, mpe abikisaki bango na mitungisi na bango.
20 主發一言就將他們病除,且拯救他們脫離了陰府。
Atindaki Liloba na Ye mpe abikisaki bango, akangolaki bango wuta na kunda.
21 願他們感謝上主[的仁慈,稱頌祂給人子顯的奇蹟。
Tika ete basanzola Yawe mpo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato!
22 願他們獻上感恩的祭獻,將祂的工程歡樂地宣傳。
Tika ete babonza bambeka ya kozongisa matondi mpe bapanza sango ya misala na Ye na koganga na esengo!
Bato oyo bakendaka mobembo na ebale monene kati na masuwa mpe basalaka mombongo na mayi minene
24 他們看見過上主的奇異作為,遇到過祂行於汪洋中的奇跡:
bamonaki misala ya Yawe, mpe bikamwa kati na ebale monene.
Alobaki, mpe mopepe makasi eyaki, etombolaki bambonge.
26 時而忽躍沖天,時而忽墜棎淵;此危急之中,他們膽戰心寒,
Bazalaki komata kino na likolo mpe kokita kino na se, bazalaki kolemba nzoto kati na pasi.
Bazwaki kizunguzungu mpe bakomaki kotenga-tenga lokola bato balangwe masanga, bwanya na bango nyonso elimwaki.
28 他們於急難中一哀求上主,上主即拯救他們脫離困苦。
Kati na pasi na bango, babelelaki Yawe mpe abimisaki bango na mitungisi na bango.
Akitisaki mopepe makasi, bambonge ya ebale monene evandaki kimia.
30 祂使風平浪靜,大家個個歡忭,祂領他們登上了渴薶的海岸。
Basepelaki na kimia oyo ezongaki, mpe Nzambe amemaki bango kino na libongo oyo balingaki.
Tika ete basanzola Yawe mpo na bolingo mpe bikamwa na Ye mpo na bato!
Tika ete banetola Ye kati na lisanga ya bato mpe bakumisa Ye kati na mayangani ya bakambi.
Akoki kobongola bibale esobe; kobongola bitima mabele ya kokawuka;
kobongola mabele oyo ebotaka bambuma mabele ya mungwa likolo ya mabe ya bavandi na yango.
Akoki kobongola esobe liziba; kobongola mabele ya kokawuka bitima.
36 把饑餓的人徒置在那地,使他們與興建者安居的城邑;
Akoki kosala ete bato na nzala bakoma kovanda kuna, batonga engumba oyo bato bakoki kovanda,
37 耕田種地,開懇了葡萄園,因此收穫果實,豐富出產。
babwaka bambuma na bilanga mpe balona banzete ya vino oyo ekobota bambuma ebele.
38 上主祝福了他們人口繁衍,賞賜他們的牲畜有增無減。
Apamboli bango, mpe bakomi ebele; mpe akitisi te motango ya bibwele na bango.
Motango ya bato mosusu ekiti mpe balembi nzoto mpo na minyoko mpe pasi.
40 但上主卻使權貴遭受恥辱,任他們徘徊歧途無路可走。
Nzambe asambwisaka bato minene, akotisaka bango na mobulu makasi kino bazanga nzela ya kobimela na pasi.
41 但拯救貧窮人脫離災難,使他們家屬多如羊群一般。
Kasi akangolaka babola wuta na pasi na bango, mpe asalaka ete babotana ebele kati na bituka na bango lokola etonga ya bameme.
42 正直的人見到必然歡忭,但邪惡的人卻啞口無言。
Tango bato ya sembo bamonaka bongo, basepelaka, kasi bato nyonso ya mabe bakangaka minoko na bango.
Tika ete moto ya bwanya asala keba na makambo wana nyonso mpe akanisa na tina na bolingo ya Yawe!