< 詩篇 106 >

1 阿肋路亞。請您們向木讚頌,因為祂是美善寬仁,祂的仁慈永遠常存。
Bokumisa Yawe! Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu, bolingo na Ye ewumelaka seko na seko!
2 誰能說完上主的大能化工。誰能述盡上主的一切光榮?
Nani akoloba misala minene ya Yawe? Nani akopanza sango ya lokumu na Ye nyonso?
3 遵守誡命的人真是有福!時時行義的人,真是有福!
Esengo na bato oyo babatelaka mibeko mpe batambolaka na bosembo!
4 上主,求您為了您對百姓的仁慈,記念我,又求您按照您施救的扶助,看顧我,
Yawe, kanisa ngai tango okotalisa ngolu na Yo epai ya bato na Yo! Salela ngai bolamu na nzela ya lobiko na Yo,
5 使我享見您選民的福樂,因您百姓的歡笑而歡笑;使我因您的產業而自豪。
mpo ete namona esengo ya baponami na Yo, nasepela na bolamu ya ekolo na Yo mpe nasepela elongo na libula na Yo!
6 我們和我們的祖先都犯過罪;都曾為非作歹而無惡不為;
Solo, tosalaki masumu lokola batata na biso, tosalaki mabe mpe tomemaki ngambo.
7 我們祖先在埃及的時期,對您奇蹟的意義總不領會,也總不懷念您眾多的恩惠,且在紅海畔將至高者違背。
Tango batata na biso bazalaki na Ejipito, basosolaki eloko moko te kati na bikamwa na Yo; babosanaki noki misala malamu na Yo, batombokaki pembeni ya ebale monene, ebale monene ya Barozo.
8 但祂為了自己的名,仍然救了他們。這是為了彰顯祂自己的神威大能。
Kasi abikisaki bango mpo na lokumu ya Kombo na Ye, mpo na kotalisa nguya na Ye.
9 祂一呵斥紅海,紅海立即乾涸,領他們走過海底,像走過沙漠。
Agangelaki ebale monene ya Barozo, mpe ekawuki; atambolisaki bango kati na mozindo lokola na esobe.
10 救他們擺脫仇恨者的壓迫,從敵人的手中將他們救回。
Abikisaki bango wuta na maboko ya bayini na bango, akangolaki bango wuta na maboko ya monguna.
11 海水卻淹沒了他們的敵人,敵人連一酤也沒有留存。
Mayi ezipaki banguna na bango, moko te atikalaki na bomoi.
12 他們才相信了祂的諾言,高聲歌頌了對祂的頌讚。
Bato na Ye bandimelaki maloba na Ye mpe bayembaki masanzoli na Ye.
13 他們很快就忘了上主的作為,他們不再堅持順從祂的旨意,
Kasi babosanaki noki misala na Ye, bazelaki te kokokisama ya mabongisi na Ye.
14 遂在曠野中放縱貪慾,在荒蕪之地試探天主。
Kati na esobe, bamipesaki na bilulela, bamekaki Nzambe kati na mabele oyo ezali na bato te.
15 上主雖滿足了他們的貪求,卻使他們的肚腹發生毒瘤。
Apesaki bango biloko oyo bazalaki kosenga, kasi atindelaki bango lisusu pasi.
16 他們在營中竟對梅瑟起了嫉妒。
Kati na molako, basalaki zuwa, batelemelaki Moyize mpe Aron, mosantu ya Yawe.
17 地裂開口吞下了達堂,掩蓋了阿彼蘭的同黨。
Mabele efungwamaki mpe emelaki Datani, ezipaki lisanga ya Abirami.
18 有烈火在他們集會中燃起,火焰就把切所有的惡徒焚毀。
Moto ezikisaki lisanga na bango mpe etumbaki bato mabe wana nyonso.
19 在曷勒布製造了牛犢,竟崇拜了一個金鑄的一個神偶;
Na Orebi, basalaki mwana ngombe, bafukamelaki nzambe ya ekeko basala na ebende oyo banyangwisa na moto.
20 將自己的光榮天主,變成了吃草的牛犢;
Babongolaki Nzambe na bango ya nkembo elilingi ya ngombe oyo eliaka matiti.
21 竟將拯救自己的天主忘記:祂曾在埃及地顯示了奇事,
Babosanaki Nzambe, Mobikisi na bango, oyo asalaki makambo minene kati na Ejipito,
22 祂也曾在含邦施行過靈蹟,祂也曾在紅海發顯過奇異。
bikamwa kati na mokili ya Cham mpe misala ya somo na ebale monene ya Barozo.
23 若非祂揀選的梅瑟出場,站立在當地的前方,挽回祂存心滅絕的怒浪,祂早就下令全部將他們滅亡。
Azwaki mokano ya koboma bango nyonso. Kasi Moyize, moponami na Ye, atelemaki liboso na Ye mpo na kobondela ete akitisa kanda na Ye mpe aboma te.
24 他們還輕視了福地樂土,對上主的諾言不肯信取;
Batiolaki mboka kitoko mpo ete bandimelaki maloba na Ye te.
25 在自己帳幕內抱怨懷恨,不願意聽從上主的聲音。
Bayimaki-yimaki kati na bandako na bango ya kapo, batosaki mongongo ya Yawe te.
26 上主於是向他們舉手起誓,要在曠野使他們喪身倒斃;
Asembolaki loboko, alapaki ndayi ya koboma bango kati na esobe,
27 要將他們伙的子孫分散異邦,要使他們在大地各處流亡。
ya kopanza bakitani na bango kati na bikolo mosusu mpe ya koboma bango kati na mikili nyonso.
28 此後,他們歸依巴耳培敖耳,還分食祭祀過死神的祭品。
Bamitiaki na se ya ekangiseli ya Bala ya Peori, baliaki bambeka oyo epesamaki epai ya banzambe oyo ekufa.
29 又作惡犯罪觸怒了上主,祂忽降災禍將他們懲處;
Batumbolaki kanda ya Yawe na nzela ya misala na bango ya mabe, mpe pasi makasi ekotaki kati na bongo.
30 丕乃哈斯奮起調定停,這災禍才止息平定。
Kasi Pineasi atelemaki, akataki makambo, mpe pasi yango esilaki.
31 這確實算是他的功勳,世世代代感念不盡。
Mpo na yango, Pineasi atangamaki lokola moto ya sembo mpo na bikeke nyonso, seko na seko.
32 此後他們在默黎巴激怒上主,為了他們的理由,梅瑟也連累受苦;
Bapesaki Nzambe kanda pene ya mayi ya Meriba mpe bamemisaki Moyize ngambo.
33 因他們使他精神苦悶,他脣舌說話未加謹慎。
Mpo ete batombokelaki Molimo ya Nzambe, Moyize akomaki koloba maloba oyo esengeli te.
34 上主命他們消滅異民,他們卻沒有聽命履行,
Babebisaki te bikolo oyo Yawe ayebisaki bango,
35 反而同異民混雜來往,學會他們的不良習尚,
kasi basanganaki elongo na bapagano mpe bayekolaki bokoko ya bikolo na bango.
36 竟崇拜了他們的偶像,偶像成了他們的羅網。
Bagumbamelaki banzambe na bango ya bikeko oyo ekomaki motambo mpo na bango.
37 他們竟殺自己的兒女,把他們獻給邪魔惡鬼,
Bapesaki bana na bango lokola bambeka epai ya milimo mabe.
38 傾流了無罪者的血,奉獻給客納罕的木偶,那地就疲流血所玷污。
Basopaki makila ya bato oyo basalaki mabe te, makila ya bana na bango, oyo bapesaki lokola mbeka epai ya banzambe ya bikeko ya Kanana. Boye mboka ekomaki mbindo mpo na makila ya bato.
39 他們因自己的作為,毫無廉恥,他們因自己的惡行,行同娼妓。
Bamikomisaki mbindo mpe babebisaki lokumu na bango na nzela ya misala na bango.
40 為此,上主向百姓大發憤怒,並對自己的人民憎恨厭惡;
Yawe asilikelaki bato na Ye, ayinaki libula na Ye.
41 把他們交在異民的手內,讓惱恨他們的人來主宰,
Akabaki bango na maboko ya bikolo ya bapaya, mpe banguna na bango bakomaki kokonza bango;
42 為他們的仇人所虐待,在他們的手下受迫害。
banguna na bango banyokolaki bango mpe batiaki bango na se ya bokonzi na bango.
43 上主曾多次拯救他們但他們仍是抗不從命,陷於自己罪惡的深坑。
Akangolaki bango bambala ebele, kasi bazalaki kaka kosala mabongisi ya kotomboka mpe ya komipesa na bambeba na bango.
44 上主聽到了他們的哀鳴,又垂顧了他們受的災情,
Yawe amonaki pasi na bango, tango ayokaki koganga na bango.
45 憶起了祂自己恩待他們的盟約,憐憫了他們,只因祂的慈愛太多。
Akanisaki Boyokani oyo asalaki elongo na bango; mpe mpo na bolingo monene na Ye, abongolaki mokano na Ye ya komonisa bango pasi.
46 使他們在俘擄他們的人前,成為自己憐憫的因緣。
Asalaki ete bato nyonso oyo bakomisaki bango bawumbu bayokela bango mawa.
47 上主,我們的天主,求您拯救我們,由異民召回我們重逢,為讚美您的聖名,並以讚美您為光榮。
Yawe, Nzambe na biso, bikisa biso! Sangisa biso wuta na bikolo mosusu mpo ete tosanzola Kombo na Yo ya bule mpe tosepela na mosala ya kokumisa Yo.
48 上主以色列的天主,從永遠到永遠受讚美!願全體百姓齊聲說:阿們,亞肋路亞。
Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama seko na seko! Tika ete bato nyonso baloba: « Amen! » Bokumisa Yawe!

< 詩篇 106 >