< 詩篇 102 >

1 受壓迫者在憂心悲愁時,向上主訴苦訴。 上主,求您允許我的祈求,願我的呼聲上達於您!
Libondeli ya moto na pasi, oyo abungisi elikya mpe azali kolela liboso ya Yawe. Yawe, yoka libondeli na ngai! Tika ete koganga na ngai ekoma kino epai na Yo!
2 在我蒙難時日,求您不要掩面迴避我,我呼號您時,求您側耳聽我,迅速俯允我。
Kobombela ngai elongi na Yo te, wana nazali na pasi. Yoka libondeli na ngai na mokolo oyo nazali kobelela Yo; yanola ngai noki!
3 因為我的日月消散如雲煙,我的骨骸枯焦如火煎。
Pamba te mikolo ya bomoi na ngai ezali kolimwa lokola molinga, mikuwa na ngai ezali kozika lokola makala ya moto.
4 我的心憔悴得枯草一般,因此我也忘記了吃我的飯。
Motema na ngai ebungisi elikya mpe ezali komitungisa lokola matiti oyo bakati; mpo na yango, nakomi ata kobosana kolia bilei na ngai.
5 因為我哀傷得過度,我已僅是皮包骨頭。
Mpo ete naleli makasi, natikali kaka na poso ya nzoto likolo ya mikuwa.
6 我好像成了曠野中的淘河,我又像成了廢墟中的鴟鶚;
Nakomi lokola esulungutu ya esobe, lokola esulungutu ya bisika oyo ebeba.
7 整夜不眠,獨自哀號,像屋頂的孤零小鳥。
Pongi ekimi ngai; nakomi lokola ndeke oyo etikali yango moko na likolo ya ndako.
8 我的仇敵常不停地辱罵我,對我猖狂的人,指名詛咒我;
Banguna na ngai batombokeli ngai, bazali kofinga ngai tango nyonso mpe bazali kosalela kombo na ngai mpo na kolakela bato mabe.
9 我吃灰塵當食糧,我喝眼淚當水湯;
Nakomi kolia putulu na esika ya bilei, mpe komela mayi esangana na mpinzoli na ngai.
10 為了您的義憤與震怒,您把我舉起,將我撲拋去。
Mpo na kanda monene na Yo, otombokeli ngai mpe obwaki ngai mosika.
11 我的日月像傾斜的陰影,我的本身好像禾草枯零。
Mikolo ya bomoi na ngai ezali kokima lokola elili, mpe nakawuki lokola matiti.
12 然而上主,您卻永遠常在,您的名號萬也代不衰。
Kasi Yo Yawe, ozali Mokonzi mpo na libela, ozali Nzambe seko na seko.
13 求您起來,願您寬赦熙雍,因憐憫她的時日已來臨。
Okotelema solo mpo na Siona, pamba te ekomi tango ya koyokela yango mawa; tango oyo ekatama ekoki.
14 因您的眾僕愛惜她的石頭,他們也念念不忘她的廢壚。
Pamba te biso basali na Yo, tosepelaka na mabanga na yango, mpe toyokelaka putulu na yango mawa.
15 上主,萬民必敬愛您的聖名,普世列王必敬愛您的光榮。
Bikolo ekotosa Yawe, mpe bakonzi nyonso ya mokili bakondima nkembo na Yo.
16 因為上主必定要重建熙雍,且要顯現於自己的光榮中。
Pamba te Yawe akotonga lisusu Siona mpe akomonana kati na nkembo na Ye.
17 祂必垂顧窮苦人的祈禱,也決不拒絕他們的哀號。
Akoyanola libondeli ya bato oyo babungisaki biloko, mpe akondima mabondeli na bango.
18 將此事寫出流給後世,叫新生的人民讚美上主。
Tika ete bakoma yango mpo na ekeke oyo ekolanda, mpo ete bikelamu ya sika ekumisa Yawe.
19 因上主由至高聖所俯視,由高天之上垂顧人間世,
Wuta na Esika na Ye ya bule, wuta na likolo, Yawe atalaki biso awa na mokili
20 為傾聽俘虜的哀嘆,為釋放待斃的囚犯,
mpo na koyoka kolela ya bakangami kati na boloko mpe kokangola bato oyo bazwaki etumbu ya kufa.
21 為在熙雍傳述上主的聖名,在耶路撒冷宣揚祂的光榮。
Kombo ya Yawe ekokende sango kati na Siona, mpe masanzoli na Ye, kati na Yelusalemi
22 那時萬民都要聚集在一處,諸邦列國也要來朝拜上主。
tango bato mpe bikolo bakosangana mpo na kogumbamela Yawe.
23 祂在中途將我的力量消滅,將我的歲月縮短;
Na bomoi na ngai, abukaki lolendo ya makasi na ngai, mpe akitisaki motango ya mikolo ya bomoi na ngai.
24 我說:我天主,莫我中年夭折,但願您的歲月永留萬代。
Nalobaki: « Nzambe na ngai, Yo oyo ozali na bomoi seko na seko, koboma ngai te na kati-kati ya mikolo ya bomoi na ngai!
25 在起初您奠定了下地,上天也是您手的功績。
Na kala, otiaki miboko ya mokili, mpe maboko na Yo esalaki Likolo.
26 天地必要毀滅,而您永遠存在,萬物必要如同衣裳一樣衰敗,有如衣服更換,都要新存化代謝;
Bango, bakokufa; kasi Yo, okotikala seko na seko. Nzoto na bango ekolemba lokola elamba; okobongola bango lokola kazaka, mpe bakolimwa.
27 但是您卻永存不變,您的壽命無盡無限。
Kasi Yo, ozali ndenge moko, mibu na Yo ekotikala kosuka te.
28 願您僕人的子女居家安康,願他們的子孫在您前永昌。
Bana ya basali na Yo bakozwa esika ya kovanda, mpe bakitani na bango bakowumela liboso na Yo. »

< 詩篇 102 >