< 箴言 30 >
1 瑪薩人雅刻之子阿古爾的格言,即他給依提耳、給依提耳和烏加耳的斷語:
Tala maloba ya Aguri, mwana mobali ya Yake. Ezali ye nde alobaki yango epai ya Itieli, epai ya Itieli mpe Ukali:
Solo, nazali zoba koleka bato nyonso, nazali ata na mayele ya bomoto te;
nayekolaki bwanya te, mpe nazali na boyebi ya Mosantu te.
4 誰曾上升過天而又降下﹖誰能將風收集在手中﹖誰能將水聚集在大衣內﹖誰為這大地立定了邊界﹖他叫什麼名字﹖其子姓甚名誰﹖你知道嗎﹖
Nani amata na Lola to mpe akita wuta kuna? Nani asangisa mopepe kati na maboko na ye? Nani akanga mayi na kazaka na ye? Nani akata bandelo nyonso ya mabele? Kombo na ye nani? Mpe kombo ya mwana na ye ezali nani? Yebisa ngai soki oyebi!
5 天主的每一句話,都是經火精煉的;凡托庇於他的人,他必要作其護盾。
Liloba nyonso ya Nzambe ezalaka na libunga te, ezali nguba mpo na bato oyo bazwaka yango lokola ebombamelo na bango.
6 對他所說的話,不可加添什麼;免得他指責你,證明你在說謊。
Kobakisa eloko moko te na maloba na Ye, noki te apamela yo mpe abimisa yo mokosi.
Oh Yawe, nasengi Yo biloko mibale, kopimela ngai yango te liboso ete nakufa:
8 令虛偽和欺詐遠離我,貧乏或富裕勿賜與我,只供予我必需的食糧,
longola mosika na ngai makambo ya pamba mpe ya lokuta, kopesa ngai te bobola to bozwi, kasi pesa ngai kaka, mokolo na mokolo, lipa oyo ekoki na ngai,
9 免得我吃飽了,背叛你說:「誰是上主﹖」或是過於貧乏,因而行竊,加辱我天主的名。
pamba te soki natondi makasi, nakoki kowangana Yo mpe koloba: « Yawe nde nani? » To soki nazali na bobola, nakoki koyiba mpe koyokisa Kombo ya Nzambe na ngai soni.
10 別在主人前,誹謗他的奴僕,怕他咒罵你,你就不免受罰。
Kotonga mowumbu te liboso ya nkolo na ye, noki te alakela yo mabe, mpe omona pasi.
Ezali na bato oyo balakelaka batata na bango mabe mpe bapambolaka te bamama na bango.
Ezali na bato oyo bamimonaka peto na miso na bango moko, nzokande bamipetoli na mbindo na bango te.
Ezali na bato oyo batonda na lolendo mpe bamonaka bato mosusu pamba.
14 有一種人,牙如利劍,齒如快刀,地上弱小,人間貧民,吞食一空。
Ezali na bato oyo minu na bango ezali lokola mipanga, lokola mbeli mpo na koboma babola kati na mokili mpe bato bakelela kati na bato.
15 水蛭有兩個女兒,常說「給我! 給我! 」不知足的東西,共有三樣,總不說「夠了」的,共有四樣:
Sonzo ezalaka na bana basi mibale, egangaka kaka: « Pesa! Pesa! » Ezali na biloko misato oyo etondaka te, minei oyo elobaka te: « Ekoki! »
16 即陰府、荒胎、總飲不足水的地,和總不說「夠了」的火。 (Sheol )
Mboka ya bakufi, libumu ya mwasi oyo abotaka te, mabele oyo etondaka mayi te, mpe moto oyo elobaka te: « Ekoki! » (Sheol )
17 誰嘲笑父親,或輕視年老的母親,願他的眼睛,被谷中的烏鴉啄去,為小鷹所食。
Liso oyo etiolaka tata mpe ezanga botosi epai ya mama, ekotobolama na bayanganga ya lubwaku, mpe bana ya mpongo ekolia yango.
18 令我稱奇的事,共有三樣,連我不明瞭的,共有四樣:
Ezali na biloko misato oyo nasosolaka te, ata kutu minei oyo nayebaka te:
19 即鷹在天空飛翔的道,蛇在岩石爬行的道,船在海中航行的道,以及男女交合之道。
Nzela ya mpongo na likolo, nzela ya nyoka na likolo ya libanga, nzela ya masuwa kati na ebale, mpe nzela ya elenge mobali epai ya elenge mwasi.
20 淫婦的作風是這樣:她吃了後,抹抹口說:「我並沒有為非作歹。」
Tala ndenge mwasi ya ndumba asalaka: Soki alie, apangusaka monoko; mpe na sima, akoloba: « Nasali na ngai mabe te! »
21 使地戰慄的事,共有三樣,連不可容忍的,共有四樣:
Ezali na makambo misato oyo eningisaka mokili, ata kutu minei oyo mokili ekokaka kondima te:
Mowumbu oyo akomi mokonzi, zoba oyo atondi na bomengo,
mwasi oyo balingaka te, kasi abali; mpe mwasi mosali oyo azwi bomengo ya nkolo na ye ya mwasi.
Ezali na banyama mike minei na mokili, oyo, nzokande, ezalaka na bwanya mingi:
Bafurmi: ezali bikelamu oyo ezanga makasi, kasi ebongisaka bilei na yango na tango ya elanga;
bampanya ya zamba: ezali bikelamu oyo ezanga nguya, kasi etongaka bandako na yango kati na mabanga;
mabanki: ezalaka na mokonzi te, kasi nyonso etambolaka nzela moko na molongo;
moselekete: loboko ekoki kokanga yango, kasi ezalaka kati na bandako ya bakonzi.
29 舉止昂然之物,共有三樣,連威儀赫赫的,共有四樣:
Ezali na banyama misato oyo etambolaka malamu, ata kutu minei oyo edendaka soki ezali kotambola:
Nkosi: nyama ya makasi kati na banyama, ezongaka sima te ata liboso ya nani;
31 獨步雞群中的雄雞,開頭領隊的公山羊,和檢閱人民的君王。
soso ya mobali, ntaba mobali, mpe mokonzi oyo azali kotambola liboso ya mampinga na ye.
32 你一時糊塗,高舉了自己,當你反省時,應以手掩口;
Soki osali bozoba mpo na komikumisa, mpe soki ozali na makanisi mabe, tia loboko na monoko na yo,
33 因為攪動乳汁,可出奶油;用力扭鼻,可流鮮血;激起憤怒,必生爭端。
pamba te kobeta-beta mabele ebimisaka manteka, kobeta zolo ebimisaka makila, mpe kotumbola kanda eyeisaka koswana.