< 箴言 2 >

1 我兒,你若接受我的話,把我的誡命存在心中,
Mwana na ngai, soki ondimi maloba na ngai mpe obateli kati na motema na yo mibeko na ngai;
2 側耳細聽智慧,專心尋求睿智;
soki opesi litoyi na yo na maloba ya bwanya mpe okabi motema na yo na makambo ya mayele;
3 你若呼求明哲,揚聲召尋睿智;
soki obeleli mayele mpe ogangi epai ya bososoli;
4 你若尋求她如尋求銀子,搜索她如搜索寶藏,
soki oluki yango penza ndenge balukaka palata to bomengo oyo ebombama,
5 你必能領悟什麼是敬畏上主,也能明白什麼是認識天主。
okososola solo soki kotosa Yawe elakisi nini mpe okozwa boyebi ya Nzambe.
6 因為,恩賜智慧的是上主,知識和睿智都出自他的口。
Pamba te Yawe nde apesaka bwanya, mpe maloba ya monoko na Ye epesaka mayele mpe bososoli.
7 他給正直人保留了救援,又是行止成全者的護盾。
Abongiselaka bato ya sembo elonga mpe azali nguba ya bato oyo batambolaka na bosembo.
8 他護守正直人的行徑,他保衛虔誠者的道路;
Pamba te abatelaka bayengebene mpe nzela ya bato oyo batosaka Ye.
9 這樣,你必能明瞭仁義和公平,明瞭正直和一切向善的道路。
Boye, okososola likambo nini ezali solo, alima, sembo: nzela nyonso oyo ememaka na bolamu.
10 如果智慧進入了你的心,智識成了你的喜樂,
Pamba te bwanya ekokota kati na motema na yo mpe boyebi ekosepelisa molimo na yo.
11 慎思就必監護你,睿智也必防守你,
Bososoli ekobatela yo, mpe mayele ekobomba yo
12 使你遠離邪道,遠離言詞荒謬的人:
mpo na kobikisa yo na nzela mabe, na moto oyo alobaka makambo ezanga tina,
13 即那些離棄正道,走上黑暗之途,
na bato oyo batikaka nzela ya sembo mpo na kolanda nzela ya molili,
14 喜愛行惡,在邪惡中喜樂的人。
na bato oyo basepelaka kosala mabe, na bato oyo bazalaka na esengo ya kokota na bozindo ya mabe,
15 他們的道路彎曲不直,他們的行徑邪僻不正。
na bato oyo nzela na bango etengama-tengama mpe etamboli na bango etonda na mobulu.
16 智慧將救你脫離淫婦,脫離甘言蜜語的娼妓。
Bwanya ekobikisa yo lisusu liboso ya mwasi mopaya, liboso ya mwasi oyo atonda na maloba ya sukali,
17 她離棄了少年時的良友,忘記了她的天主的盟約;
oyo akima mobali na ye ya bolenge mpe abosana boyokani oyo asalaki elongo na Nzambe na ye;
18 為此,她的家屬趨向死亡,她的行徑通往黃泉;
pamba te ndako na ye ememaka na kufa, mpe nzela na ye ememaka na mboka ya bakufi.
19 凡行近她的人,沒有一個返回,再不會走上生路。
Moto moko te oyo akotaka epai na ye azongaka mpe amonaka lisusu nzela ya bomoi.
20 為此,你應走善人的道路,持守義人的行徑,
Boye, okotambola na nzela ya bato malamu mpe okolanda nzela ya bato ya sembo.
21 因為只有正直的人纔能住在地上,只有成全的人方得在那裏居留。
Pamba te bato ya sembo bakovanda na mokili, mpe bato oyo bazangi pamela bakotikala kati na yango;
22 但是,作惡的人必由地上剷除,違法的人必由其中拔除。
kasi bato mabe bakokufa na mokili mpe bakolongola bango kati na mokili ya bato ya songisongi.

< 箴言 2 >