< 箴言 18 >

1 與眾寡合的,只求私意;對任何指教,都表忿恨。
Moyimi alukaka kaka kosepelisa baposa na ye, atelemelaka bososoli nyonso.
2 愚昧的人不喜愛受教,只愛顯露自己的心意。
Moto oyo azangi mayele asepelaka te kozwa tango ya kokanisa, kasi asepelaka kaka kotalisa makanisi ya motema na ye.
3 邪惡一來,輕視隨到;侮辱也隨無恥而至。
Soki moto mabe ayei, kotiola mpe eyaka; soki soni eyei, kofinga mpe eyaka.
4 哲人口中的言語有如深水,又如洶湧的溪流,生命的泉源。
Maloba ya monoko ya moto ezalaka lokola mayi ya mozindo; etima ya bwanya ezalaka lokola mayi ya ebale oyo etondi makasi.
5 在判案時,徇惡人之私,加害於義人,實屬不公。
Ezali malamu te kolongisa moto mabe mpe kokweyisa moyengebene, kati na kosambisama.
6 愚人的唇舌,常引起爭端;愚人的口舌,常自招責打。
Bibebu ya moto oyo azangi mayele eyeisaka koswana, mpe monoko na ye eyeisaka fimbu.
7 愚人的舌,使自己喪亡;他的嘴唇,是害己的陷阱。
Monoko ya moto oyo azangi mayele ememelaka ye kufa, mpe bibebu na ye ezalaka motambo mpo na molimo na ye moko.
8 進讒者的話,如可口美味,能深深透入肺腑的深處。
Maloba ya moto ya songisongi ezalaka lokola bilei ya kitoko, ekitaka na esengo kino na libumu.
9 懶於操勞的人,是敗子的弟兄。
Moto oyo azongaka sima na mosala na ye azali ndeko ya mobebisi.
10 上主的名號,是堅固保壘;義人投入內,必得享安全。
Kombo ya Yawe ezali lokola ndako molayi batonga makasi; moyengebene akimelaka kuna mpe azwaka ebombamelo ya makasi.
11 富人的財產,是他的堅城;在他意想中,像座高牆垣。
Bomengo ya mozwi ezali engumba na ye, oyo batonga makasi; akanisaka ete ezali lokola mir ya molayi.
12 心傲是滅亡的前導,心謙是光榮的前驅。
Liboso ete moto akweya, motema na ye ekomaka na lolendo; kasi komikitisa eyaka liboso ya nkembo.
13 未聽而先答,實愚昧可恥。
Kopesa eyano liboso ya koyoka ezali liboma mpe bozoba.
14 剛毅的精神,能忍受病苦;精神萎靡,有誰能支持﹖
Kimia kati na motema elendisaka moto na tango ya bokono, kasi nani akokoka kolendisa motema oyo etutami?
15 明智人的心,必獲得學問;智慧人的耳,必探求知識。
Motema ya moto ya mayele ezwaka mayele, mpe litoyi ya moto ya bwanya elukaka boyebi.
16 禮物能給人大開門路,引人晉謁權貴。
Kado efungolelaka moto oyo apesi yango nzela mpe ekotisaka ye liboso ya bato minene.
17 先訴理者似有理,對手來時再審斷。
Moto ya liboso na kosamba amonanaka lokola nde alongi; kasi soki moto oyo azali kosamba na ye ayei, akotelemela ye.
18 抽籤可以使爭端平息,也能調解權貴的糾紛。
Zeke esilisaka koswana mpe ekataka makambo kati na bato ya makasi.
19 兄弟若不和,比堅城還難攻克;他們的爭辯,有如碉堡的門閂。
Kokota lisusu na motema ya ndeko oyo osali mabe ezalaka pasi koleka kokota na engumba batonga makasi; mpe koswana na moto ezali lokola kokanga bikuke ya ndako batonga makasi na bibende ya minene.
20 人必以口中果實充滿肚腹,必飽嘗自己唇舌的出產。
Moto atondisaka libumu na ye na nzela ya mbuma ya monoko na ye mpe akotonda na lifuti ya bibebu na ye.
21 死亡和生命,全在乎唇舌;放縱唇舌的,必自食其果。
Kufa mpe bomoi ezali na se ya nguya ya lolemo; moto oyo alingaka lolemo akolia mbuma na yango.
22 誰覓得了賢妻,便覓得了幸福,得了上主恩眷。
Mobali oyo azwi mwasi ya malamu azwi bomengo, azwi ngolu kowuta epai na Yawe.
23 貧窮的人哀懇乞憐;富貴的人厲聲以對。
Mobola alobaka na mongongo ya kobondela, kasi mozwi azongisaka eyano na lolendo.
24 交朋友過多,必會有損害;但有些朋友,遠勝親兄弟。
Moto oyo azalaka na balingami ebele amitiaka na pasi, kasi ezali na molingami moko ya motema, oyo aleki ata ndeko.

< 箴言 18 >