< 民數記 5 >

1 上主訓示梅瑟說:「
Yawe alobaki na Moyize:
2 你命以色列子民把患任何癩病、任何淋病及所有為死屍沾染不潔的人送出營外,
« Pesa mitindo epai na bana ya Isalaele ete babimisa libanda ya molako moto nyonso oyo azali na bokono ya poso ya nzoto, moto nyonso oyo atangaka makila, mpe moto nyonso oyo akomi mbindo mpo ete asimbi ebembe.
3 不論男女,都應送到營外去,免得我住在他們中的營幕沾染不潔。」
Azala mobali to mwasi, bobengana ye, bobimisa ye libanda ya molako mpo ete bakomisa molako na bango mbindo te, pamba te Ngai nazali kowumela elongo na bango. »
4 以色列子民就如此做了,將他們送到營外;上主怎樣吩咐了梅瑟,以色列子民就怎樣做了。
Bana ya Isalaele basalaki bongo; babimisaki bango libanda ya molako. Basalaki ndenge kaka Yawe atindaki na nzela ya Moyize.
5 上主訓示梅瑟說:
Yawe alobaki na Moyize:
6 「你訓令以色列子民:不論男女,對近人作了什麼不義的事,因此得罪上主而自覺有罪,
« Loba na bana ya Isalaele: ‹ Soki moto, azala mobali to mwasi, atamboli na boyengebene te liboso ya Yawe wana asali moninga na ye mabe, azali na ngambo.
7 他該承認自己所作的不義,除賠償全部損失外,還應另加五分之一給他所害的人。
Boye asengeli koyambola lisumu oyo asalaki. Asengeli kozongisa epai ya moto oyo ye asali mabe: nyonso oyo azwaki mpe akobakisa likolo na yango, ndambo moko kati na mitano.
8 若此人沒有近親可向他賠償,這賠償就歸上主,屬於司祭。此外尚應獻一贖罪的公綿羊,為自己贖罪。
Kasi soki moto yango azali na ndeko te oyo akoki kozwa eloko oyo bakozongisa mpo na mabe oyo basalaki ye, bakopesa eloko oyo basengelaki kozongisela ye epai na Yawe na nzela ya Nganga-Nzambe, bakisa meme moko ya mobali oyo Nganga-Nzambe akosala na yango mosala ya bolimbisi masumu mpo na moto oyo asalaki mabe.
9 以色列子民在奉獻的各種聖物中,凡是給司祭的獻儀,即歸於司祭。
Biloko nyonso kati na makabo ya bule oyo bana ya Isalaele bakomema epai ya Nzambe ekozala ya Nganga-Nzambe.
10 每人所奉獻的聖物,應歸自己;但人給與司祭的,應歸於司祭。」
Biloko oyo moto nyonso akotia pembeni mpo na Yawe ekopesama epai ya Nganga-Nzambe; kasi eloko nyonso oyo moto akokabela Nganga-Nzambe ekokoma ya Nganga-Nzambe. › »
11 上主訓示梅瑟說:「
Bongo Yawe alobaki na Moyize:
12 你告訴以色列子民說:若某人的妻子背離丈夫,
« Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango: ‹ Soki mwasi akosi mobali na ye, wana abimi na mobali mosusu
13 對他不忠,瞞著丈夫讓人與她同睡交媾,在暗中玷污了自己,又沒有見證,也沒有被捉住,
mpe asangisi na ye nzoto, amikomisi mbindo atako esalemi na nkuku mpe moto moko te amoni ye; mpe ezala mobali na ye ayebi eloko te.
14 若丈夫心生疑忌,疑忌他的妻子受了玷污;或者心生疑忌疑忌他的妻子,但她實在沒有受玷污;
Soki mobali asali zuwa mpe akomi kokanisa ete mwasi na ye akomi mbindo, azala mbindo to mbindo te,
15 丈夫就應帶他的妻子到司祭前,為她獻祭,獻十分之一「厄法」的大麥粉,其上不可倒油,也不可加乳香,因為這是因疑忌所獻的素祭,是一回憶罪過的素祭。
mobali asengeli komema mwasi na ye epai ya Nganga-Nzambe mpe kopesa mpo na ye likabo ya bakilo misato ya farine ya orje; akosopela yango mafuta te mpe akotia yango ansa te, pamba te ezali likabo oyo epesami mpo na zuwa, likabo mpo na kokanisa mbeba.
16 司祭令她前來,站在上主面前;
Nganga-Nzambe akobenga mwasi mpe akomema ye liboso ya Yawe.
17 然後用陶器取些聖水,再由會幕地上取些塵土,放入水內。
Nganga-Nzambe akotoka mayi ya bule, na mbeki basala na mabele batumba mpe akozwa putulu ya mabele ya Mongombo mpo na kotia yango kati na mayi yango.
18 司祭叫這女人站在上主面前,鬆開她的頭髮,將回憶的素祭品,即為疑忌所獻的素祭品,放在她的掌上,司祭手內拿著給人招致咒罵的苦水,
Nganga-Nzambe akotia mwasi ya kotelema liboso ya Yawe, akofungola ye suki mpe akotia na maboko na ye likabo ya zuwa, wana ye moko Nganga-Nzambe akobatela na maboko na ye mayi ya bololo oyo ememaka elakeli mabe.
19 然後司祭命那女人起誓,對她說:「若沒有人與你同睡,若你沒有背離丈夫受玷污,願這招致咒罵的苦水於你無害。
Nganga-Nzambe akolapisa mwasi yango ndayi, akoloba na ye: ‘Soki mobali mosusu asangisaki na yo nzoto te, mpe soki omikomisaki mbindo te na kokosa mobali na yo wuta bobalana, wana tika ete mayi oyo ya bololo mpe ememaka elakeli mabe esala yo eloko moko te!
20 但是,如果你背離了丈夫受了玷污,讓丈夫以外的男人與你同睡,──
Kasi soki, wana ozali ya kobala, okosaki mobali na yo mpe omikomisaki mbindo na kosangisa nzoto na mobali mosusu,’
21 在此司祭叫那女人以詛咒的誓辭起誓,然後對她說:──願上主使你在你民族中成為可咒罵和詛咒的人,使你大腿萎縮,使你肚腹腫脹,
Nganga-Nzambe asengeli awa kolapisa mwasi yango ndayi ya kondima kokweyela bilakeli mabe kowuta na maloba oyo: ‘tika ete Yawe akomisa yo elakeli mabe mpe eloko ya nkele kati na bato na yo! Tika ete akomisa yo ekomba mpe avimbisa yo libumu!
22 願這招致咒罵的水進入你的五臟,使你肚腹腫脹,使你大腿萎縮! 」女人答說:「阿們、阿們。」
Tika ete mayi oyo ezali komema elakeli mabe ekota kati na yo mpo ete libumu na yo evimba mpe okoma ekomba.’ Mwasi akozongisa: ‘Amen! Tika ete esalema bongo!’
23 隨後司祭將這些咒文寫在紙上,用苦水洗去,
Nganga-Nzambe akokoma maloba yango ya bilakeli mabe kati na buku mpe akokotisa yango kati na mayi ya bololo mpo na kolongola makomi yango.
24 令女人喝這招致咒罵的苦水。這招致咒罵的水一進入她內,就給她帶來苦楚。
Bongo akomelisa mwasi mayi oyo ya bololo, oyo ezali komema elakeli mabe mpo ete ekokota kati na ye.
25 司祭再由這女人的手內,接過為疑忌所獻的素祭祭品,在上主面前行過搖禮後,放在祭壇上;
Nganga-Nzambe akozwa wuta na maboko ya mwasi likabo ya zuwa, akotombola yango liboso ya Yawe mpe akomema yango na etumbelo.
26 再由這素祭祭品內取出一把來作為紀念,放在祭壇上焚燒;以後,纔令女人喝這水。
Nganga-Nzambe akotondisa na loboko na ye, bambuma oyo akozwa kati na likabo yango ya zuwa lokola ekaniseli, mpe akotumba yango na likolo ya etumbelo; sima na yango, akomelisa mwasi mayi.
27 司祭命她喝水以後,事必靈驗:如果她受了玷污,對丈夫不忠,這招致咒罵的水一進入她內,就給她帶來苦楚;她的肚腹必腫脹,大腿必萎縮;這女人在她的民族中,必成為可咒罵的人。
Soki penza amikomisaki mbindo na kosangisa nzoto na mobali mosusu, mayi oyo ememaka elakeli mabe ekokota kati na ye, ekovimbisa libumu na ye, akokoma ekomba mpe akolakelama mabe kati na bato na ye.
28 但是,如果這女人沒有受玷污,而是貞潔的,就不致受害,反要生育子女。
Kasi soki mwasi amikomisaki mbindo te, soki azali penza peto, akomona pasi ata moko te mpe akoki kobota bana.
29 這是關於疑忌事的法律:幾時一個婦人,背離丈夫,受了玷污;
Wana nde ezali mobeko na tina na zuwa; ekokanga mwasi ya libala oyo akosi mobali na ye mpe amikomisi mbindo.
30 或是一個男人心生疑忌,疑忌自己的妻子,他應帶妻子站在上主面前,司祭應對她執行這法律所規定的一切。
Bakosalela yango mpe soki mobali asali zuwa mpe akanisi penza ete mwasi na ye abimi na mobali mosusu: mobali akomema mwasi mpe akotelemisa ye liboso ya Yawe; bongo Nganga-Nzambe akosalela mobeko oyo na mobimba na yango epai ya mwasi.
31 如此,男人可免無罪,女人應自負罪債。」
Mobali akomema ngambo ata moke te kasi mwasi akozwa etumbu ya lisumu na ye. › »

< 民數記 5 >