< 民數記 32 >
1 勒烏本的子孫和加得的子孫,擁有很多的家畜;他們一見雅則爾地方和基肋阿得地方,是適於畜牧的區域,
Bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi bazalaki na bibwele mingi penza. Bamonaki ete mokili ya Yaezeri mpe ya Galadi ezali malamu mingi mpo na kobokola bibwele.
2 便前來對梅瑟和厄肋阿匝爾大司祭及會眾的首領說:「
Bongo bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi bayaki koloba na Moyize, na Nganga-Nzambe Eleazari mpe na bakambi ya lisanga:
3 阿塔洛特、狄朋、雅則爾、尼默辣、赫市朋、厄肋阿肋、色班、乃波和貝紅,
« Bingumba ya Ataroti, ya Diboni, ya Yaezeri, ya Nimira, ya Eshiboni, ya Eleale, ya Sebami, ya Nebo mpe ya Beoni;
4 這些地方是上主為以色列會眾所征服的,是適於畜牧的地方,而你的僕人們正有牛羊。」
bituka oyo Yawe akweyisaki liboso ya bato ya Isalaele, ezali malamu mpo na kobokola bibwele; nzokande, basali na yo bazali mpe na bibwele. »
5 他們又說:「若是我們在你眼中獲得寵幸,希望你將這地方賜給你的僕人們作產業,不必叫我們過約但河。」
Balobaki lisusu: « Soki tozwi ngolu na miso na yo, tika ete mokili oyo epesamela basali na yo lokola libula na biso mpe okatisa biso na ngambo ya Yordani te. »
6 梅瑟回答加得的子孫和勒烏本的子孫說:「怎麼! 你們的兄弟去打仗,你們卻要住在這裡﹖
Moyize alobaki na bakitani ya Gadi mpe ya Ribeni: — Boni, bandeko na bino bakende na bitumba, bongo bino botikala awa?
7 為什麼你們要叫以色列的子民喪氣,使他們不敢進入上主賜給他們的土地﹖
Mpo na nini bolingi lisusu kolembisa mitema ya bana ya Isalaele oyo bazali kokende na mokili oyo Yawe apesaki bango?
8 當我由卡德士巴爾乃亞派遣你們的祖先去窺探這地時,他們也這樣做過。
Oyo ezali penza makambo oyo batata na bino basalaki tango natindaki bango wuta na Kadeshi-Barinea mpo na kokende kononga mokili.
9 他們上到厄市苛耳山谷,窺探了那地方,回來就使以色列子民喪了氣,致使他們再不願進入上主賜給他們的土地。
Sima na bango komata na lubwaku ya Eshikoli mpe komona mokili yango, balembisaki mitema ya bana ya Isalaele oyo balingaki kokota na mokili oyo Yawe apesaki bango.
Na mokolo wana, kanda ya Yawe epelaki mpe alapaki ndayi oyo:
11 凡由埃及出來過了二十歲的人,不得看見我誓許給亞巴郎、依撒格和雅各伯的土地,因為他們沒有一心一意地隨從我;
« Lokola batosaki Ngai te na motema mobimba, moko te kati na bato oyo bazali na mibu tuku mibale mpe komata, ba-oyo babimaki na Ejipito, akomona mokili oyo nalakaki, na nzela ya ndayi, epai ya Abrayami, Izaki mpe Jakobi
12 只有刻納次人耶孚乃的兒子加肋布和農的兒子若蘇厄除外,因為他們一心一意地隨從了上主。』
longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune, moto ya libota ya Kenizi, mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni, pamba te batosaki Ngai Yawe na mitema na bango mobimba. »
13 因為上主對以色列發了怒,遂使他們在曠野中漂泊了四十年,直到在上主眼前作惡的那一世代完全死盡。
Yawe atombokelaki Isalaele mpe asalaki ete bayengayenga na esobe mibu tuku minei kino tango molongo nyonso ya bato oyo basalaki mabe na miso na Ye basilaki kokufa.
14 現在,看,你們這些罪人的苗裔,竟起來替代你們先人,再增加上主對以色列的忿怒!
Bino mpe bozali kaka ndenge moko, libota ya bato ya masumu, bozali kaka kosala makambo ndenge moko na batata na bino mpe bozali kopelisa lisusu koleka kanda ya Yawe likolo ya Isalaele.
15 如果你們背離了他,他再把民眾拋在曠野裡;這樣,你們就要使這整個民族毀滅了。」
Soki boboyi kolanda nzela na Ye, akotika lisusu bato oyo nyonso na esobe mpe bato oyo bakobebisama likolo na bino.
16 他們遂上前來,對他說:「我們願在這裡為我們的牛羊築圈,為我們的家眷建城。
Babelemaki pene na Moyize mpe balobaki: — Te, tolingi nde kotonga mapango mpo na bibwele na biso mpe bingumba mpo na basi mpe bana na biso awa.
17 但我們必武裝起來,在以色列子民前頭上陣,直到我們領他們進入了自己的地方;至於我們的家眷,為預防本地的居民,應叫他們安居在堅固的城內。
Kasi tozali kolata na lombangu bibundeli na biso mpe kokende na liboso ya bana ya Isalaele kino tango tokokomisa bango na esika na bango. Bongo, na tango yango, basi mpe bana na biso bakotikala awa, kati na bingumba batonga makasi, mpo na komibatela liboso ya bavandi ya mokili oyo.
18 不到以色列子民各個都佔有了產業,我們決不回家。
Tokotikala kozonga na bandako na biso te soki moto moko na moko ya Isalaele azwi libula na ye te;
19 我們既然在約但河東得到了產業,在約但河西,就不再同他們分產業了。」
mpe tokotikala kozwa libula moko te elongo na bango na ngambo mosusu ya Yordani, pamba te libula oyo esengeli kopesamela biso ezali na ngambo ya este ya Yordani.
20 梅瑟答覆他們說:「若是你們這樣做,若是你們武裝起來,在上主面前作戰;
Moyize alobaki na bango: — Soki bosali bongo, soki bolati bibundeli mpo na kokende na bitumba liboso ya Yawe,
21 若是你們個個都武裝著在上主面前過約但河,直到他將自己的敵人驅散,
mpe soki bino nyonso oyo bosimbi bibundeli bokeyi na ngambo mosusu ya Yordani liboso ya Yawe, kino abengana banguna na Ye
22 直到上主把那地征服以後,你們纔回家,你們對上主,對以色列就算無罪。那麼,這地照上主的允許,歸你們作為產業。
mpe mokili ekoma na se ya bokonzi ya Yawe, nde bokoki kozonga. Ezali na nzela wana nde bokolongwa na ngambo na miso ya Yawe mpe na miso ya bana ya Isalaele, mpe mokili oyo ekokoma libula na bino na miso ya Yawe.
23 但是,如果你們不這樣去做,你們必獲罪於上主,要知道你們必自招罪罰。
Kasi soki bosali bongo te, bokosala nde lisumu na miso ya Yawe mpe boyeba ete, lisumu na bino ekolanda bino.
24 你們可為家眷建城,為牛羊築圈;但是你們口頭所許的,卻必要實踐。」
Botonga bingumba makasi mpo na basi mpe bana na bino, botonga mapango mpo na bibwele na bino, kasi bokokisa mpe elaka oyo bopesi.
25 加得的子孫和勒烏本的子孫回答梅瑟說:「你僕人們必照我主所吩咐的去做。
Bakitani ya Gadi mpe ya Ribeni balobaki na Moyize: — Basali na yo bakotosa mitindo ya nkolo na biso.
26 我們的孩童、婦女、牛羊和一切牲畜,都留在這裡,留在基肋阿得的城裡;
Bana mpe basi na biso elongo na banyama mpe bibwele na biso bakotikala awa, na bingumba ya Galadi.
27 至於你的僕人們,凡武裝起來的,都要過河,在上主面前上陣作戰,如我主所吩咐的。」
Kasi mpo na biso basali na yo, mobali nyonso akosimba bibundeli mpo na kokende na bitumba; tokokatisa na ngambo mpo na kobunda liboso ya Yawe ndenge kaka nkolo na biso asili koloba.
28 梅瑟遂為他們向大司祭厄肋阿匝爾、農的兒子若蘇厄,以及以色列子民各支派的家長下了指示,
Boye, Moyize apesaki mitindo na tina na bango epai ya Nganga-Nzambe Eleazari, epai ya Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe epai ya bakambi ya mabota ya Isalaele.
29 向他們說:「若是加得子孫和勒烏本子孫,都武裝起來與你們同過約但河,在上主面前作戰,在你們征服那地以後,就把基肋阿得地方給他們作為產業。
Moyize alobaki na bango: — Soki bakitani ya Gadi mpe ya Ribeni, bango nyonso basimbi bibundeli mpo na kokende na bitumba, bakatisi ngambo ya Yordani elongo na bino liboso ya Yawe, mpe tango mokili ekokoma na se ya bokonzi na bino, bopesa bango mokili ya Galadi lokola libula na bango.
30 但是,如果他們不武裝起來同你們一起過河,就應在客納罕地與你們同分產業。」
Kasi soki bakatisi elongo na bino te mpo na kokende na bitumba, bakozwa libula elongo na bino, na mokili ya Kanana.
31 加得子孫和勒烏本子孫回答說:「凡上主關於你僕人所說的,我們必照做。
Bakitani ya Gadi mpe ya Ribeni bazongisaki: — Basali na yo bakosala makambo oyo Yawe alobaki na biso.
32 我們必武裝起來在上主面前過河,往客納罕地去;但約但河東的地方應給我們作產業。」
Tokokatisa na ngambo mosusu liboso ya Yawe kino na mokili ya Kanana mpo na bitumba. Kasi mabele oyo biso tosengeli kozwa lokola libula ekozala na ngambo oyo ya Yordani.
33 梅瑟遂將阿摩黎人王息紅的國土和巴商王敖格的國土,那地域及其境內的城池,以及那地域四周的城池,都給了他們;給了加得的子孫、勒烏本的子孫和若瑟的兒子默納協半支派。
Boye, Moyize apesaki epai ya bakitani ya Gadi, ya Ribeni mpe ya ndambo ya libota ya Manase, mwana mobali ya Jozefi mokili ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani: mokili mobimba elongo na bingumba na yango mpe mboka mike oyo ezingelaki yango.
Bakitani ya Gadi batongaki bingumba oyo: Diboni, Ataroti, Aroeri;
Aroti-Shofani, Yaezeri, Yogibeka;
36 貝特尼默辣和貝特哈蘭:這些都是堅固的城邑,並築有羊圈。
Beti-Nimira mpe Beti-Arani lokola bingumba ya makasi; mpe batongaki lisusu mapango mpo na bibwele na bango.
37 勒烏本的子孫重建了赫市朋、厄肋阿肋、克黎雅塔因、
Bakitani ya libota ya Ribeni batongaki bingumba oyo: Eshiboni, Eleale mpe Kiriatayimi
38 乃波、巴爾默紅──有些名字已改──和息貝瑪;他們給重建的城邑另取了別名。
elongo na Nebo mpe Bala-Meoni, kombo oyo babongola na Sibima. Bapesaki bakombo na bingumba oyo batongaki.
39 默納協的兒子瑪基爾的子孫去了基肋阿得,佔據了那地方,驅逐了那裡的阿摩黎人。
Bakitani ya Makiri, mwana mobali ya Manase bakendeki kino na Galadi, babotolaki yango mpe babenganaki bato ya Amori oyo bazalaki kovanda kuna.
40 梅瑟遂將基肋阿得給了默納協的兒子瑪基爾;他就在那裡住下了。
Boye, Moyize apesaki mokili ya Galadi epai ya bakitani ya Makiri, mwana mobali ya Manase, mpe bakomaki kovanda kuna.
41 默納協的兒子雅依爾去佔據了阿摩黎人的村落遂稱這些村落為哈沃特雅依爾。
Yairi, moko kati na bakitani ya Manase, abotolaki bamboka na yango ya mike mpe abengaki yango Avoti Yairi.
42 諾巴黑去佔據了刻納特及其屬鎮,給那地方起了自己的名字,叫諾巴黑。
Mpe Noba abotolaki Kenati mpe bamboka na yango ya mike oyo ya zingazinga mpe abengaki yango Noba, ndenge ezalaki kombo na ye.