< 民數記 17 >

1 上主訓示梅瑟說:
Yawe alobaki na Moyize:
2 「你吩咐以色列子民,叫他們每一家族拿一根棍杖,就是每一個領袖為自己家族拿一根,共十二根棍杖,把各人的名字寫在自己的棍杖上;
« Yebisa bana ya Isalaele ete bapesa yo mangenda zomi na mibale, lingenda moko mpo na mokambi ya libota moko na moko kati ya bikolo na bango. Koma kombo ya moto moko na moko na lingenda na ye.
3 但在肋未的棍杖上,要寫亞郎的名字,因為為肋未的族長亦應有一根棍杖。
Koma kombo ya Aron mpo na lingenda ya libota ya Levi, mpo ete mokambi moko na moko ya libota akozala na lingenda moko.
4 你將這些棍放在會幕內,放在約證前,即在我與你常相會的地方。
Tia mangenda yango na Ndako ya kapo ya Bokutani, liboso ya Sanduku ya Litatoli, epai wapi nakutanaka na bino.
5 誰約證開花,誰就是我所選擇的人;這樣,我就平息了以色列子民在我面前抱怨你們的怨言」。
Lingenda ya moto oyo nakopona ekobimisa moto ya etape. Ezali na nzela wana nde nakosukisa Ngai moko koyimayima ya tango nyonso kati na bana ya Isalaele na tina na bino. »
6 梅瑟於是告訴了以色列子民;他們所有的領袖都交給了他一根棍杖,每一家族中,每個領袖一根,共十二根棍杖;在他們的棍杖中,也有亞郎的棍杖。
Moyize ayebisaki bana ya Isalaele, mpe bakambi na bango bapesaki ye mangenda zomi na mibale, lokola lingenda moko mpo na mokambi ya libota moko na moko, lingenda ya Aron mpe ezalaki kati na mangenda wana.
7 梅瑟就將棍杖放在約幕內,放在上主面前。
Moyize atiaki mangenda nyonso liboso ya Yawe, kati na Ndako ya kapo ya Litatoli.
8 次日,梅瑟進入約幕內,看,肋未家族的亞郎的棍杖發了芽;不但發了芽,並且也開了花,結了成熟的杏。
Mokolo oyo elandaki, Moyize akotaki na Ndako ya kapo ya Litatoli, bongo amonaki ete lingenda ya Aron, oyo ezalaki kolakisa ndako ya Levi, ebimisaki mito ya etape, ebotaki bafololo mpe ezalaki na bambuma ya amande ya kotela.
9 梅瑟就由上主面前取出所有的棍杖,給以色列子民觀看;以後各人取回了自己的棍杖。
Moyize abimisaki mangenda nyonso longwa na liboso ya Yawe mpe amemaki yango na miso ya bato nyonso ya Isalaele. Bamonaki yango mpe moto na moto azwaki lingenda na ye.
10 上主對梅瑟說:「收回亞郎的棍杖來,放在約證前;給叛逆之徒當作鑑戒,為平息他們對我發的怨言,免得他們死亡」。
Yawe alobaki na Moyize: « Zongisa lingenda ya Aron liboso ya Sanduku ya Litatoli mpo ete ebombama lokola elembo ya kotomboka na bango. Boye, okosukisa koyimayima na bango mpo na Ngai mpo ete bakufa te. »
11 梅瑟就這樣做了。
Moyize asalaki ndenge kaka Yawe atindaki ye.
12 以色列子民對梅瑟申訴說:「看,我們要死了,我們完了! 我們全完了!
Bana ya Isalaele balobaki na Moyize: « Tokufi na biso, tobebi na biso, biso nyonso, tobebi na biso!
13 凡接近上主會幕的都該死;我們豈不都該死﹖」
Moto nyonso oyo akopusana pembeni ya Mongombo na Yawe akokufa. Boni, biso nyonso tokufa? »

< 民數記 17 >