< 尼希米記 1 >

1 哈加里亞的兒子乃赫米雅的言行錄:在第二十年「基斯婁」月,我在穌撒禁城時,
Maloba ya Neyemi, mwana mobali ya Akalia. Na mobu ya tuku mibale ya bokonzi ya Aritakizerisesi, na sanza ya kisilevi, wana nazalaki nanu na Size, mboka mokonzi,
2 有我的一個兄弟哈納尼,和幾個人由猶大上來,我問及他們,關於那些由充軍回國的猶太遺民,和耶路撒冷的情形;
Anani, moko kati na bandeko na ngai, ayaki elongo na bato mosusu wuta na Yuda. Natunaki bango sango ya Bayuda oyo babikaki mpe batikalaki wuta na bowumbu, mpe sango ya Yelusalemi.
3 他們回答我說:「充軍回國的那些遺民,在省裏遭大難,受污辱;耶路撒冷城垣坍塌,城門為火焚毀。」
Balobaki na ngai: « Bayuda oyo babikaki mpe batikalaki wuta na bowumbu bazali kovanda kati na etuka ya Yuda mpe bazali na pasi mingi mpe na soni makasi; mir ya Yelusalemi etondi na madusu, mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto. »
4 我一聽說這些事,就坐下涕哭,悲痛了幾天,同時也在上主天主前,禁食祈禱,
Tango kaka nayokaki makambo oyo nyonso, namivandisaki na mabele mpe nakomaki kolela. Nasalaki mikolo mwa mingi ya matanga, na kokila bilei mpe na kosambela Nzambe ya Likolo.
5 說:「唉! 上主,天上的天主! 偉大可畏的天主! 那對愛你和守你誡命的人,履行信約,施行慈愛的,
Nabondelaki: « Oh Yawe, Nzambe ya Likolo, Nzambe monene mpe Nzambe ya somo! Yo oyo obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo epai ya bato oyo balingaka Yo mpe batosaka mibeko na Yo,
6 求你側耳,求你睜眼,俯聽你僕人的祈禱即我,現今在你面前,日夜為你的僕人以色列子民所行的祈禱。我承認以色列子民對你所犯的罪過,因為我和我父家都犯了罪。
tika ete litoyi na Yo eyoka na bokebi mpe miso na Yo ezala ya kofungwama mpo na koyoka libondeli oyo mowumbu na Yo azali kosala liboso na Yo, butu mpe moyi, na tina na basali na Yo, bana ya Isalaele. Nazali kotubela masumu oyo biso bana ya Isalaele, ezala ngai mpe libota ya tata na ngai, tosalaki liboso na Yo.
7 我們的確作惡得罪了你,沒有遵守你吩咐你的僕人梅瑟,所立定的誡命、律令和典章。
Tosalaki solo mabe makasi liboso na Yo; totosaki te mitindo, bikateli mpe mibeko oyo opesaki na nzela ya Moyize, mosali na Yo.
8 求你記憶你向你的僕人梅瑟所吩咐的話說:如果你們不忠實,我要將你們分散在萬民之中;
Nabondeli Yo, kanisa maloba oyo otindaki Moyize, mosali na Yo, koloba: ‹ Soki botamboli na bosembo te, nakopanza bino kati na bikolo ya bapaya.
9 但如果你們又回心歸向我,遵守履行我的誡命,即便你們分散到天涯地角,我也要從那裏,將你們聚集起來,領你們到我所選,為作我名居所的地方去。──
Kasi soki bozongeli Ngai mpe botosi mibeko na Ngai, wana, ezala soki bato na bino bakenda mosika na bowumbu kino na suka ya mokili, nakosangisa bango wuta kuna mpe nakomema bango na esika oyo naponaki mpo na kovandisa Kombo na Ngai. ›
10 他們都是你的僕人,你的人民,是你用強力和大能的手,所拯救出來的。
Bazali basali na Yo mpe bato na Yo, oyo osilaki kokangola na nguya monene na Yo mpe na makasi ya loboko na Yo!
11 我主,求你側耳俯聽你僕人的祈禱,傾聽這些喜愛敬畏你名的僕人的祈禱! 求你今天使你的僕人順利,使他在那人前獲得寵遇。」我當時是君王的酒政。
Oh Nkolo, nabondeli Yo, tika ete litoyi na Yo eyoka na bokebi libondeli ya mowumbu na Yo mpe libondeli ya bawumbu na Yo mosusu oyo bazali kosepela kopesa lokumu na Kombo na Yo! Na mokolo ya lelo, longisa mowumbu na Yo mpe salela ye ngolu na miso ya moto oyo! » Nzokande, na tango wana, nazalaki kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi.

< 尼希米記 1 >