< 尼希米記 6 >

1 當桑巴拉特、托彼雅、阿剌伯人革笙和我們其他的仇敵,一聽說我重修了城牆,已沒有破口的地方,──雖然到那時,我還沒有在門上按裝門扇,──
Tango Sanibala, Tobiya, Geshemi, moto ya mokili ya Arabi, mpe banguna na biso mosusu bayokaki ete nasilisi kotonga lisusu mir mpe etikali na lidusu ata moko te, atako na tango wana namitielaki nanu bizipelo ya bikuke te,
2 桑巴拉特和革笙,便派人到我這裏說:「請來,我們在敖諾平原的一個村鎮中會晤。」其實他們是企圖謀害我。
Sanibala mpe Geshemi batindelaki ngai maloba oyo: — Yaka, tokutana na Kefirimi, kati na lubwaku ya Ono. Bazalaki na likanisi ya kosala ngai mabe.
3 我遂派使者去答覆他們說:「我作的工程浩大,不能前去。我怎能離開工作,到你們那裡去,而使工程停頓呢﹖」
Natindelaki bango bamemi sango koyebisa bango eyano oyo: — Nazali na mosala monene ya kosala, nakokoka te koya kuna. Mpo na nini mosala etelema tango nakotika yango mpo na koya kokutana na bino?
4 他們如此連續四次,遣使者到我這裏,我也同樣答覆了他們。
Mbala minei, batindelaki ngai sango kaka moko; mpe tango nyonso, ngai mpe nazalaki kozongisela bango eyano kaka moko.
5 隨後,桑巴拉特第五次,又同樣打發他的臣僕來,手中拿著一封未封的信,
Na mbala ya mitano, Sanibala atindelaki ngai sango moko kaka wana na nzela ya mosali na ye, oyo asimbaki mokanda ya kofungwama na loboko na ye.
6 信上寫著說:「在各民族中傳說,而且革笙也證實此說:你和猶太人圖謀造反,為此你纔重修城牆;據說你還要為王。
Kati na mokanda yango, bakomaki: « Sango ezali kopanzana kati na bikolo, Geshemi abeti kutu sete mpo na koloba na ngai ete ezali penza solo, ete yo mpe Bayuda bozali komibongisa mpo na kotomboka, mpe ezali mpo na yango nde bozali kotonga lisusu mir oyo. Kolanda sango yango, ozali na posa ya kokoma mokonzi na bango;
7 並且你派定了先知,在耶路撒冷為你宣傳說:猶大有了王! 現今這些話勢必傳到君王那裏,所以請你來,我們互相商議商議。」
mpe osili kutu kopona basakoli mpo ete bapanza sango kati na Yelusalemi ete okomi mokonzi ya Yuda! Sik’oyo, yeba ete sango oyo ekokoma kino penza na matoyi ya mokonzi. Boye, yaka mpo ete tosolola na tina na yango! »
8 我遂派遣使者向他說:「決沒有像你所說的那些事,是你心中虛構的。」
Natindelaki ye eyano oyo: — Kati na nyonso oyo olobi, moko te ezali solo. Ezali makambo oyo yo moko ozali kokanisa na moto na yo!
9 其實,他們是企圖恐嚇我們,心想:「如此他們必放棄那工程,不在工作下去。」但我的力量更堅強了。
Bato wana nyonso bazalaki koluka kobangisa biso; bazalaki komilobela: — Maboko na bango ekolemba makasi, ekokoka lisusu kosala te; mpe mosala ekosila te, ekotelema! Bakolemba nzoto mpe bakosundola mosala! Kasi ngai nasambelaki: — Sik’oyo, oh Yawe, lendisa maboko na ngai!
10 有一天,我來到默塔貝耳的孫子,德拉雅的兒子舍瑪雅的家裏,他正閉門在家,對我說:「我們上天主的殿,到聖所裏去會晤,關好聖所的門戶,因為他們要來殺你,且今夜要來殺你。」
Mokolo moko, nakendeki na ndako ya Shemaya, mwana mobali ya Delaya, koko ya Metabeyeli, oyo amikangelaki na ndako na ye. Alobaki: — Tokutana kati na Ndako ya Nzambe, na kati-kati ya Esika ya bule, mpe tokanga bikuke na yango, pamba te bato bazali koya mpo na koboma yo; bakoya na butu mpo na koboma yo.
11 我答說:「像我這樣的人,能逃避到聖所中,保全生命嗎﹖我決不進去! 」
Kasi nazongiselaki na ye: — Boni, moto lokola ngai akoki penza kokima! Kutu, moto nani lokola ngai akoki kokimela kati na Ndako ya Nzambe mpe abikisa bomoi na ye? Nakokende te!
12 我覺察出來,不是天主打發他向我講這預言,而是托彼雅和桑巴拉特賄賂了他,
Nasosolaki mbala moko ete ezali Nzambe te nde atindi ye. Kasi apesaki lisakoli wana na tina na ngai, pamba te Tobiya mpe Sanibala bapesaki ye kanyaka.
13 要他恐嚇我,使我那樣去作犯罪的事,如此給他們留下一種壞名譽,好藉以辱罵我。
Bapesaki ye kanyaka mpo na kobangisa ngai, mpo ete nasala masumu tango nakolanda toli na ye; mpe mpo ete babebisa lokumu ya kombo na ngai mpe bayokisa ngai soni.
14 我的天主! 請你按照托彼雅和桑巴拉特之所行,記憶他們! 也不要忘卻諾阿狄雅女先知和其餘的先知,因為他們企圖使我恐懼。
Oh Nzambe na ngai, kanisa Tobiya mpe Sanibala mpo na misala na bango! Kanisa lisusu Noadia, mwasi mosakoli, elongo na basakoli mosusu oyo bazalaki komeka kobangisa ngai!
15 「厄路耳」月二十五日,城垣完成,共計為時五十二日。
Boye, misala ya kotonga mir esilaki na mokolo ya tuku mibale na mitano ya sanza ya Eluli; esalaki mikolo tuku mitano na mibale.
16 我們所有的仇敵一聽說這事,我們四周的人民一看見這事,都十分驚異,並承認這工程,是賴我們的天主而完成的。
Tango banguna na biso bayokaki sango yango, bato ya bikolo nyonso ya zingazinga bakomaki kobanga mpe koyoka soni na miso na bango moko, mpo ete basosolaki ete ezali kaka na lisungi ya Nzambe na biso nde mosala ya ndenge wana esalemaki.
17 在此期間,猶大有些有權勢的人,給托彼雅寄了許多函件,托彼雅也有覆函寄回。
Na mikolo wana, bankumu ya Yuda bazalaki kotinda mikanda ebele epai ya Tobiya, mpe biyano ya Tobiya ezalaki kokomela bango.
18 因為猶大有許多人,與他宣示為盟,因他原是阿辣黑的兒子,舍加尼亞的女婿,他的兒子約哈南,又取了貝勒革雅的兒子默叔藍的女而為妻。
Pamba te bato ebele ya Yuda basalaki boyokani elongo na ye, na nzela ya ndayi, mpo ete azalaki bokilo ya Shekania, mwana mobali ya Ara, mpe mpo ete Yoanani, mwana na ye ya mobali, abalaki mwana mwasi ya Meshulami, mwana mobali ya Berekia.
19 他們常在我面前稱道他的善行,也將我的事向他報告,托彼雅遂來信恐嚇我。
Bazalaki kutu kokumisa misala na ye na miso na ngai mpe koyebisa ye maloba na ngai. Ezalaki Tobiya wana moto azalaki kotinda mikanda mpo na kobangisa ngai.

< 尼希米記 6 >