< 尼希米記 2 >

1 在阿塔薛西斯王二十年「尼散」月,輪到我掌酒時,我拿起酒來,獻給國王。我不願在王面前現出憂愁,
Na sanza ya Nisani, na mobu ya tuku mibale ya bokonzi ya Aritakizerisesi, lokola vino ezalaki liboso ya mokonzi, nazwaki vino mpe napesaki ye mpo ete amela. Ezalaki mbala na ngai ya liboso ya kozala mawa-mawa liboso ya mokonzi.
2 王卻問我說:「你不像有病,為什麼面帶愁容﹖沒有別的,你心中一定有愁事! 」我很是驚慌,
Boye mokonzi atunaki ngai: — Mpo na nini elongi na yo ezali mawa-mawa lokola nde ozali kobela, nzokande ozali kobela te? Boni, ozali na mawa na motema? Nabangaki makasi;
3 便向君王說:「大王萬歲! 我祖先墳墓所在的城池,成了廢墟,城門為火焚毀,我怎能不面帶愁容呢﹖」
kasi nazongiselaki mokonzi: — Tika ete mokonzi awumela na bomoi! Ndenge nini elongi na ngai ezala mawa-mawa te tango engumba epai wapi bakunda batata na ngai ebebi mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto?
4 王問我說:「你要求什麼﹖」我向天上的天主祈禱之後,
Mokonzi atunaki ngai: — Olingi nini? Nasambelaki Nzambe ya Likolo,
5 回答君王說:「大王若看著好,你僕人在你面前若獲得寵遇,就打發我回猶大去,到我祖先墳墓所在的城去,重修那城。」
mpe nazongiselaki mokonzi: — Soki esepelisi mokonzi mpe soki mowumbu na ye azwi ngolu na miso na ye, tika ete mokonzi atinda ngai na engumba Yuda epai wapi bakunda batata na ngai, mpo ete nakende kotonga yango lisusu.
6 那時,皇后也在旁坐著;王便向我說:「你旅行需要多久﹖你幾時能回來﹖」我向君王說了一個時期;王以為好,就准許我去。
Mokonzi, oyo mwasi na ye avandaki pembeni na ye, atunaki ngai: — Mobembo na yo ekosala mikolo boni mpe okozonga tango nini. Esepelisaki mokonzi kotinda ngai; mpe nakataki tango oyo mobembo yango ekokaki kosala.
7 我又向王說:「大王若看著好,請賜我一詔書,通知河西州長放我通行,直到猶大;
Nalobaki na ye lisusu: — Soki esepelisi mokonzi, tika ete mokonzi apesa ngai mikanda mpo na bayangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, mpo ete batika ngai koleka kino nakokoma kati na Yuda;
8 另一詔書,通知護守王家園林的阿撒夫,令他給我木料,為做聖殿堡壘的門戶、城牆和我要住的房舍之用。」賴我的天主慈善的手扶助我,君王都賜給了我。
mpe tika ete nazwa mokanda mpo na Azafi, mokengeli ya zamba ya mokonzi, mpo ete apesa ngai mabaya ya motondo mpo na bikuke ya engumba batonga makasi pene ya Tempelo, mpo na mir ya engumba mpe mpo na ndako oyo nakovanda. Lokola loboko ya ngolu ya Nzambe na ngai ezalaki likolo na ngai, mokonzi apesaki ngai mikanda yango.
9 我一來到河西州長那裏,便向他們呈上君王的詔書。同時君王還派了隊長和馬兵協助我。
Nakendeki epai ya bayangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate mpe napesaki bango mikanda ya mokonzi. Mokonzi atindaki lisusu bakonzi ya basoda mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda mpo ete bazala elongo na ngai.
10 曷龍人桑巴拉特和作臣僕的阿孟人托彼雅,聽說此事,很不高興有人來為以色列子民謀圖福利。
Tango kaka Sanibala, moto ya Oroni, mpe Tobiya, kalaka ya mboka Amoni, bayokaki ete nazali koya, basepelaki ata moke te komona moto moko koya mpo na bolamu ya bana ya Isalaele.
11 我到了耶路撒冷,在那裏停留了三天之後,
Nakomaki na Yelusalemi mpe, sima na ngai kosala kuna mikolo misato,
12 夜間,我和跟隨我的幾個人起來;當時我並沒有告訴任何人,有關我的天主激發我的心,要為耶路撒冷所作的事;除了我騎的一頭牲口外,也沒有別的牲口。
nabimaki na butu elongo na ndambo ya bato. Nalobaki na moto ata moko te makambo oyo Nzambe na ngai atiaki kati na motema na ngai, makambo oyo nasengeli kokokisa mpo na bolamu ya Yelusalemi. Ezalaki na nyama mosusu te elongo na ngai longola kaka nyama oyo nazalaki kotambola likolo na yango.
13 夜間我出來,經過谷門到了龍泉前,又到了糞門,觀察耶路撒冷城牆那裏有缺口,並見城門已被火焚毀。
Na butu, nabimelaki na ekuke oyo ememaka na Lubwaku, nakendeki na nzela oyo ekenda na etima ya Dalagona mpe na Ekuke ya Fulu, mpo na kotala malamu-malamu bamir ya Yelusalemi, oyo etondaki na madusu mpe bikuke na yango esilaki kobebisama na moto.
14 以後,又到了泉門,到了王池,但那地方不能騎我的牲口過去,
Nalekaki pembeni ya Ekuke ya Etima mpe pembeni ya Liziba ya mokonzi, kasi nzela ezalaki penza te mpo ete nyama oyo nazalaki kotambola likolo na yango ekoka koleka.
15 遂在夜間,由山澗攀登而上,視察了城垣,然後轉身,由谷門進來,回了家。
Namataki wuta na lubwaku, kaka na butu, mpo na kokoba kotala malamu-malamu mir. Nabalukaki mpe nazongelaki na nzela ya Ekuke ya Lubwaku.
16 我到過那裏,或作什麼,官員都不知道;直到此時,我也沒有告訴過猶太人、司祭、權貴、官員和其他工作人員。
Bakalaka bayebaki te esika oyo nakendeki to likambo oyo nazalaki kosala; pamba te kino na ngonga wana, nalobaki nanu ata likambo moko te, ezala epai ya Bayuda, epai ya Banganga-Nzambe, epai ya bankumu, epai ya bayangeli to mpe epai ya bakambi mosusu oyo bazalaki kosala mosala.
17 於是我向他們說:「你們都清楚我們所處的苦境:耶路撒冷成了廢墟,城門為火焚毀。來,讓我們重修耶路撒冷的城垣,免得再受人恥笑! 」
Bongo nalobaki na bango: — Bozali komona pasi oyo tozali na yango! Yelusalemi ebebi, mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto! Boya, totonga lisusu mir ya Yelusalemi mpo ete tolongwa kati na soni oyo!
18 隨後,我又向他們報告:我的天主慈善的手怎樣扶助了我,以及君王向我說過什麼話。他們遂說道:「起來,大家一同修建! 」眾人勇氣倍增,遂著手進行。
Nayebisaki bango lisusu ndenge nini loboko ya ngolu ya Nzambe na ngai ezalaki likolo na ngai mpe makambo oyo mokonzi alobaki na ngai. Mbala moko, bazongisaki: — Totelema mpe totonga! Boye bazwaki mpiko mpe babandaki mbala moko mosala kitoko yango.
19 當曷龍人桑巴拉特、作臣僕的阿孟人托彼雅,和阿剌伯人革笙聽說這事,就譏笑我們,侮辱我們說:「你們在那裏幹什麼﹖要背叛君王嗎﹖」
Kasi tango Sanibala, moto ya Oroni; Tobiya, kalaka ya mboka Amoni; mpe Geshemi, moto ya mboka Arabi, bayokaki sango na yango, basekaki mpe batiolaki biso. Balobaki: — Eloko nini oyo bozali kosala? Bozali kotombokela mokonzi?
20 我答覆他們說:「天上的天主必要使我們成功;我們是他的僕役,要動工興建;至於你們,在耶路撒冷無分無權,也無可留念的事物。」
Nazongiselaki bango: — Nzambe ya Likolo akolongisa biso solo. Biso bawumbu na Ye, tokotelema mpe tokotonga. Kasi bino, bozali ata na eteni moko te ya mabele to na bokonzi moko te kati na Yelusalemi, mpe moto moko te akozala kuna na ekaniseli malamu mpo na bino!

< 尼希米記 2 >