< 馬太福音 17 >
1 天以後,耶穌帶著伯多祿,雅各伯和他的兄弟若望,單獨帶領他們上了一座高山,
Sima na mikolo motoba, Yesu azwaki Petelo, Jake mpe Yoane, ndeko mobali ya Jake; amemaki bango na pembeni, na likolo ya ngomba moko ya molayi.
2 在他們面前變了容貌發光有如太陽,他的衣服潔白如光。
Yesu abongolamaki na miso na bango: elongi na Ye ekomaki kongenga lokola moyi, bilamba na Ye ekomaki pembe makasi lokola pole.
3 忽然,梅瑟和厄里亞也顯現給他們,正在同耶穌談論。
Mbala moko, bamonaki Moyize mpe Eliya bazali kosolola na Yesu.
4 伯多祿就開口對耶穌說:「主啊! 我們在這裏真好!你若願意,我就在這裏搭三個帳棚:一個為你,一個為梅瑟,一個為厄里亞。」
Petelo alobaki na Yesu: — Nkolo, eleki malamu mpo na biso kotikala awa! Soki ondimi, nakotonga bandako misato ya kapo: moko mpo na Yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya!
5 他還在說話的時候,忽然有一片光耀的雲彩遮敝了他們,並且雲中有聲因說:「這是我的愛子,我所喜悅的,你們要聽從他!」
Wana azalaki nanu koloba, lipata moko ezalaki kongenga lokola moyi, ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango: « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi; boyoka Ye! »
Tango bayekoli bayokaki mongongo yango, bakweyaki bilongi kino na mabele mpo ete somo makasi ekangaki bango.
Kasi Yesu apusanaki pene na bango, asimbaki bango mpe alobaki: — Botelema, bobanga te!
8 他們舉目一看,任誰都不見了,只有耶穌獨自一人。
Batombolaki miso mpe bamonaki moto mosusu te, kaka Yesu.
9 他們從山上下來的時候,耶穌囑咐他們說:「非等人子由死者中復活,你們不要將所見告的告訴任何人」
Wana bazalaki kokita na ngomba, Yesu apesaki bango mitindo oyo: — Makambo oyo bowuti komona, boyebisa yango na moto moko te kino tango Mwana na Moto akosekwa kati na bakufi.
10 門徒便問耶穌說:「那麼,為什麼經師說:厄里亞應該先來呢?」
Bayekoli batunaki Yesu: — Mpo na nini balakisi ya Mobeko balobaka ete Eliya asengeli koya moto ya liboso?
11 耶穌回答說:「厄里亞的確要來,且要重整一切;
Yesu azongisaki: — Solo, Eliya asengeli koya mpe akozongisa makambo nyonso na molongo.
12 但我告訴你們:厄里亞已經來了,人們卻不認識他,反兒任意待了他;照樣,人子也要受他們的磨難。」
Kasi Ngai, nazali koloba na bino ete Eliya asilaki koya; kasi na esika ya koyeba ye, basalaki ye ndenge balingaki. Ezali mpe ndenge wana nde bakonyokola Mwana na Moto.
13 門徒這纔明白耶穌給他們所說的,是指的洗者若翰。
Bayekoli basosolaki ete azalaki kolobela bango na tina na Yoane Mobatisi.
14 當他們來到群眾那裏時,有一個人來到耶穌跟前,跪下說:
Tango bakomaki pene ya esika oyo ebele ya bato bazalaki, moto moko apusanaki pene na Yesu, afukamaki liboso na Ye mpe alobaki:
15 「主啊,可憐我的兒子罷!他患癲癇病很苦,屢次跌在火中,又屢次跌在水裏。
— Nkolo, yokela mwana na ngai ya mobali mawa! Azali na maladi ya ndeke mpe azali penza komona pasi: akweyaka mbala mingi na moto to na mayi.
16 我把他帶到你的們徒跟前,他們卻不能治好他。」
Namemaki ye epai ya bayekoli na Yo, kasi bakoki te kobikisa ye.
17 耶穌回答說:「哎!無信敗壞的世代,我同你們在一起要到幾時呢? 我容忍你們要到幾時呢?把他給我帶到這裏來!」
Yesu alobaki: — Ekeke ya bato mabe mpe bazanga kondima! Kino tango nini nakozala na bino elongo? Kino tango nini nakokanga motema mpo na bino? Bomemela Ngai mwana yango.
18 耶穌遂叱責魔鬼,魔鬼就從還子身上出去了;從那時刻,孩子就好了。
Yesu abenganaki molimo mabe, mpe molimo mabe yango ebimaki kati na mwana. Kaka na tango yango, mwana abikaki.
19 以後,門徒前來私下對耶穌說:「為什麼我們不能逐出這魔鬼呢?」
Bongo bayekoli bakendeki na nkuku epai ya Yesu mpe batunaki: — Mpo na nini, biso, tolongaki te kobengana molimo yango?
20 耶穌對他們說:「由於你們缺少信德;我實在告訴你們:假如你們有像芥子那麼大的信德,你們向這座山說:從這邊移到那邊去!它必會移過去的;為你們沒有不可能的事。
Yesu azongiselaki bango: — Ezali mpo ete bozali na kondima moke. Nazali koloba na bino penza ya solo: soki kondima na bino ezalaki lokola mbuma ya mutarde, bokokaki koloba na ngomba oyo: « Longwa awa, kende kuna; » mpe ekokende penza. Eloko moko te ekoki kozanga kosalemela bino. [
21 『但這類魔鬼非用祈禱和禁食,是不能趕出去的。』
Kasi lolenge oyo ya milimo mabe ebimaka kaka na nzela ya mabondeli mpe ya kokila bilei.]
22 當耶穌同門徒在加里肋亞周遊時,耶穌對他們說:「人子將被交於人們手中。
Mokolo moko, bayekoli basanganaki bango nyonso kati na Galile; Yesu alobaki na bango: — Bakokaba Mwana na Moto na maboko ya bato,
23 他們要殺害他,第三天他必要復活。門徒就非常憂鬱。
bakoboma Ye, mpe, na mokolo ya misato, akosekwa. Bayekoli bayokaki mawa mingi.
24 他們來到葛法翁時,收殿稅的人來到伯多祿跟前說:「你們的師傅不納殿稅嗎?」
Tango Yesu mpe bayekoli na Ye bakomaki na Kapernawumi, bafutisi mpako ya Ndako ya Nzambe bayaki epai ya Petelo mpe batunaki: — Boni, moteyi na bino afutaka mpako ya Ndako ya Nzambe te?
25 伯多碌說:「自然納的。」他一進到屋裏,耶穌就先對他說:「西滿!你以為怎樣?地上的君王向誰征收關稅或丁稅呢?向自己的兒子,或是向外人?
Petelo azongisaki: — Afutaka! Tango Petelo akotaki na ndako, Yesu azwaki maloba moto ya liboso mpe atunaki ye: — Simona, okanisi nini? Banani bafutaka mpako epai ya bakonzi ya mokili: bana na bango to bapaya?
26 伯多碌說:「向外人。」耶穌對他說:「所以兒子是免稅的了。
Petelo azongisaki: — Bapaya. Yesu alobaki na ye: — Lokola ezali bongo, bana mboka basengeli kofuta te.
27 但是,為避免使他們疑怪,你往海邊去垂釣,拿釣上來的第一條魚,開了它的口,就會找到一塊「斯塔特。」拿去交給他們,當作我和你的殿稅。」
Nzokande, mpo ete totia mobulu te kati na makanisi na bango, kende na ebale, bwaka ndobo na mayi mpe kamata mbisi oyo okozwa ya liboso; fungola monoko na yango mpe okomona mbongo moko ya bibende kati na yango; kamata mbongo yango mpe futa mpako na Ngai mpe mpako na yo, na maboko na bango.