< 瑪拉基書 2 >

1 司祭們! 這是向你們提出的警告:
« Sik’oyo, bino Banganga-Nzambe, likebisi oyo epesami epai na bino:
2 如果你們不聽從,不把光榮我名的事放在心上──萬軍的上主說──我必使詛咒臨到你們身上,使你們的祝福變為詛咒。我已詛咒了,因為中誰也沒有把這事放在心上。
Soki boyoki te, soki boboyi kozwa mokano ya kopesa Kombo na Ngai lokumu, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « nakotindela bino elakeli mabe mpe nakolakela lipamboli na bino mabe. Solo, nasili kolakela yango mabe, pamba te bozwaki mokano te ya kopesa Kombo na Ngai lokumu.
3 看,我必要砍斷你們的手臂,把糞污,即你們祭牲的糞污,撒在你們的臉上,使你們滿面慚愧。
Likolo na bino, nakopamela bakitani na bino, nakobwakela bino basalite ya banyama na bino na bilongi, salite ya banyama oyo bobonzaka na mikolo ya bafeti na bino, mpe bakomema bino nzela moko na basalite yango.
4 這樣你們便知道,我為你們提出了這警告,是為保存我與肋未所訂立的盟約,──萬軍的上主說。
Bokoyeba solo ete napesi bino likebisi oyo mpo ete boyokani na Ngai elongo na Levi esuka te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
5 我與他訂立的盟約,是有關生命及平安的盟,所以我賜給了他生命和平安;同時又是敬畏的盟約,所以他敬畏我,對我的名有所尊敬;
« Boyokani na Ngai elongo na ye ezali boyokani ya bomoi mpe ya kimia, mpe nakopesa ye yango mpo ete atosa Ngai. Atosaki Ngai solo mpe azalaki kolenga liboso ya Kombo na Ngai.
6 在他口中有真實教訓,在他脣舌上從不見謊言;他心懷虔誠和正直與我來往,使多人遠離了罪惡。
Monoko na ye ezalaki kobimisa malakisi ya solo; lokuta etikalaki komonana na bibebu na ye te. Azalaki kotambola elongo na Ngai na kimia mpe na alima. Na nzela na ye, bato ebele batikaki kotambola na nzela ya masumu.
7 的確,司祭的脣應保衛智識,人也應該從他的口中得到教訓,因為他是萬軍上主的使者。
Pamba te bibebu ya Nganga-Nzambe esengeli kobatela boyebi, mpe bato basengeli kozwa boyebi na monoko na ye mpo ete azali ntoma ya Yawe, Mokonzi ya mampinga.
8 但是你們卻離棄正道,使許多人在法律上跌倒;你們破壞了我和肋未所立的盟約──萬軍的上主說。
Kasi bino, bopengwi na nzela mpe bobetisi bato ebele mabaku na malakisi na bino; bobebisi boyokani elongo na Balevi, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
9 為,此我也使你們受全體人民的輕視,因為你們沒有遵行我的道,在施教訓上觀情顧面。
« Boye, nasalaki ete botiolama mpe bosambwa liboso ya bato nyonso, pamba te bolandaki banzela na Ngai te, kasi bozalaki kopona bilongi na makambo oyo etali mibeko. »
10 我們是共有一個父親嗎﹖不是一個天主造生了我們嗎﹖為什麼我們彼此欺騙褻瀆我們祖先的盟約﹖
Boni, biso nyonso tozali bana ya tata moko te? Boni, tokelama na Nzambe moko te? Bongo mpo na nini tozali kobebisa boyokani ya batata na biso na ndenge tozali kosalana mabe biso na biso?
11 猶大不守信義,在以色列和耶路撒冷行了醜惡的事,因為猶大褻瀆了上主所愛的聖所,娶了供奉邦神祗的女子。
Bato ya Yuda batamboli na boyengebene te, bakotisi likambo ya nkele kati na Isalaele mpe na Yelusalemi, pamba te bato ya Yuda babebisi bosantu ya Esika ya bule ya Yawe, Esika ya bule oyo Yawe alingaka makasi: babali basi oyo basambelaka nzambe mopaya.
12 惟願上主將行這事的人,連証證的人和監誓人,從雅各伯的會幕中剷除,由向萬軍的上主奉獻祭物的集會中剷除。
Mpo na mobali nyonso oyo akosala bongo, azala nani, tika ete Yawe alongola ye na bandako ya kapo ya Jakobi, ata amemi makabo epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga.
13 其次,你們還行了這件事:你們向上主的祭壇灑盡了眼淚,哭泣呻吟,
Tala makambo mosusu oyo bosalaka: bozali kotondisa etumbelo ya Yawe na mayi ya miso, bozali kolelalela mpo ete Yawe azali kotala lisusu makabo na bino te mpe aboyi koyamba yango na maboko na bino.
14 你們還問:「這是為什麼﹖」是因為上主是你與你青年時所娶的妻子之間的証人。她雖是你的伴侶,是你結盟的髮妻,你道對她不守信義。
Bozali kotuna: « Mpo na nini boye? » Ezali mpo ete Yawe azali Motatoli kati na yo mpe mwasi na yo ya bolenge, kasi yo okosaki ye. Nzokande, azali mwasi oyo okangani na ye na nzela ya boyokani.
15 上主不是造了他們成為一體,一個肉身,一個性命嗎﹖為什麼要結為一體﹖是為求得天主的子女;所以應關心你們的性命,對你青年結髮的妻子不要背信。
Boni, Yawe akomisaki bango te moto moko? Bazali ya Yawe na mosuni mpe na molimo. Moto yango alukaka nini? Alukaka bana kowuta epai na Nzambe. Boye, bosala keba mpo na bomoi na bino. Tika ete moto moko te akosa mwasi na ye ya bolenge!
16 上主以色列的天主說:我憎恨休妻,休妻使人在自己的衣服上沾滿了不義,萬軍的上主聲明說。所以你們當關心你們的性命,不要不守信莪。
Pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Nayinaka likambo ya koboma libala; ekokani na moto oyo elamba na ye ezwi makila tango abomi moto, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. Yango wana, bosala keba mpo na bomoi na bino mpe botikala sembo.
17 你們的言談使上主生厭,你們還問:「我們在什麼事上使衪生厭﹖」即在你們說:「凡作惡的,在天主眼裏都是善的,而且衪還喜悅他們,」或說:「公義的天主在哪裏﹖」的時候。
Bolembisi Yawe na maloba na bino mpe bozali lisusu kotuna: « Tolembisi Yo na likambo nini? » Ezali tango bozali koloba: « Moto oyo asalaka mabe azali malamu na miso ya Yawe, mpe Yawe asepelaka na ye » to mpe « Wapi Nzambe ya bosembo? »

< 瑪拉基書 2 >