< 利未記 6 >

1 上主訓示梅瑟說:
Yawe alobaki na Moyize:
2 「若有人犯了罪,冒犯了上主,因為在寄託物上,或抵押品上,或劫略物上欺騙了自己的同胞,或剝削了自己的同胞,
« Soki moto asali masumu mpe abuki mobeko ya Yawe na kokosa moninga na ye mpo na eloko oyo babombisaki epai na ye to oyo adefaki to oyo ayibaki to oyo abotolaki na makasi
3 或對拾得的遺物,加以否認,或對常人慣犯的罪發了虛誓;
to atako amoni eloko oyo ebungaki, kasi akosi mpe alapi ndayi ya lokuta na tina na moko kati na masumu oyo moto akoki kosala;
4 如果他犯了這樣的罪,而自知有過,應歸還劫略所得,或撥削所得,或人寄存之物,或拾得的遺物,
moto oyo asali masumu ya boye mpe amemi ngambo, akozongisa eloko oyo ayibisaki to oyo abotolaki na makasi to oyo babombisaki epai na ye to oyo amonaki sima na kobungisa yango.
5 或以虛誓所佔奪的任何物件,應全部償還;此外還另加五分之一。他那一天認錯,那一天應歸還物主。
To lisusu, akozongisa eloko nyonso oyo na tina na yango ye alapaki ndayi ya lokuta mpe akobakisa eteni moko kati na biteni mitano. Akozongisa yango na nkolo eloko na mokolo oyo akobonza mbeka na ye mpo na masumu.
6 為賠補自己的過犯,應照你的估價,從羊群裡取出一隻無瑕的公綿羊,交給司祭獻與上主作贖過祭。
Mpe akomema epai ya Nganga-Nzambe mbeka na ye mpo na kozongisa boyokani elongo na Yawe. Akomema meme ya mobali oyo ezanga mbeba; akozwa yango kati na bameme mpe bantaba na ye kolanda ndenge okokata.
7 司祭應為他在上主面前為他行贖罪禮。不論他犯的是什麼過犯,他都可獲得罪赦。」
Nganga-Nzambe akosala mpo na moto wana, liboso ya Yawe, mosala ya bolimbisi masumu; mpe moto yango akolimbisama. »
8 上主訓示梅瑟說:
Yawe alobaki na Moyize:
9 「你吩咐亞郎和他的兒子們說:全燔祭的法律如下:全燔祭應社徹夜至早晨留在祭壇的火上,火應在祭壇上常燃不熄。
« Pesa mitindo oyo epai ya Aron mpe epai ya bana na ye ya mibali: ‹ Tala mobeko mpo na mbeka ya kotumba: mbeka ya kotumba ekowumela na likolo ya motalaka ya etumbelo butu mobimba kino na tongo, mpe moto ya etumbelo ekozikisa yango.
10 司祭應穿上亞麻衣,著亞麻褲遮蓋身體,除去祭壇上焚燒全燔祭的灰燼,倒在祭台旁邊;
Nganga-Nzambe akolata nzambala na ye ya lino mpe bakaputula na ye ya lino. Akolongola putulu ya mbeka ya kotumba oyo moto ezikisaki na etumbelo mpe akotia yango na mopanzi ya etumbelo.
11 然後脫去這些衣服,穿上別的衣服,將灰燼運到營外的清潔地方。
Sima, akolongola bilamba wana mpe akolata bilamba mosusu; bongo akomema putulu na libanda ya molako, na esika ya peto.
12 祭壇上的火應常燃不熄;司祭每天早晨應添柴,放上全燔祭祭品,焚燒和平祭犧牲的脂肪。
Moto ya etumbelo ekobanda kopela tango nyonso mpe ekoki kokufa te. Nganga-Nzambe akobanda kobakisa tongo nyonso bakoni mpe kotia mbeka ya kotumba na likolo ya bakoni; bongo akotumba biteni ya mafuta ya mbeka ya boyokani na likolo na yango.
13 祭倓上的火應常燃不熄。[司祭對素祭的權利]
Moto esengeli kopela tango nyonso na etumbelo, ekoki kokufa te. ›
14 素祭的法律如下:亞郎的兒子應將訴素祭帶到祭壇前,獻給上主;
‹ Tala mobeko mpo na likabo ya gato: ‘Bana mibali ya Aron bakomema yango liboso ya Yawe, liboso ya etumbelo.
15 然後由素祭祭品取出一把細麵和一些油,以及所有乳香,放在祭壇上焚燒,獻給上主作悅意的馨香,為獲得記念。
Nganga-Nzambe akozwa na loboko na ye ndambo ya farine, mafuta mpe ansa nyonso oyo ezali na likolo ya gato; akotumba yango na likolo ya etumbelo mpo ete solo kitoko na yango esepelisa Yawe mpe ezala ekaniseli mpo na Ye.
16 剩下的亞郎和他的兒子們應該吃,應吃死麵的,並且應在聖處,即在會幕庭院內吃。
Ndambo oyo ekotikala, Aron mpe bana na ye ya mibali bakolia yango. Kasi bakolia yango ezanga levire, na Esika ya bule, na libanda ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
17 烤時不可加酵。這是我由火祭祭品中,劃歸給他們的一份,是至聖之物,有如贖罪祭和贖過祭祭品。
Bakotumba yango te na levire: ezali eteni oyo napesi bango kati na bambeka na Ngai oyo etumbami na moto: ezali eloko ya bule penza lokola mbeka mpo na masumu mpe mpo na kozongisa boyokani.
18 亞郎的子孫中,凡是男人,都可以吃:這是他們在你們世世代代中,由上主的火祭中得享的永久權利。凡與這些祭品接觸的,即成為聖。」[祝聖司祭的祭獻]
Bana mibali nyonso kati na bakitani ya Aron bakolia yango. Ezali eteni na bango mpo na tango nyonso mpe na milongo nyonso kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Bato nyonso oyo bakosimba yango bakokoma bule.’ › »
19 上主訓示梅瑟說:
Yawe alobaki na Moyize:
20 「亞郎和他的兒子們在受傅之日,應給上主獻的祭品是:十分之一「厄法」細麵,當作日常的素祭:早上獻一半,晚上獻一半;
« Tala likabo oyo Aron mpe bana na ye ya mibali bakopesa epai na Yawe, na mokolo oyo bakozwa epakolami: eteni ya zomi ya efa ya farine lokola likabo ya tango nyonso. Na tongo, akopesa eteni moko kati na biteni mibale; mpe eteni mosusu, na pokwa.
21 應在鐵盤上用油調製;調好後,分成塊,將成塊的祭品,獻給上主作悅意的馨香。
Okosangisa yango liboso na mafuta, bongo okokalinga yango na kikalungu. Sima okobonza yango na biteni lokola mbeka oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
22 亞郎的子孫中,繼他位受傅為司祭的,都應奉獻此祭品:這是一條永久的法令。這祭品應全焚燒,獻給上主。
Mwana mobali ya Aron oyo bakopakola mafuta mpo na kokitana na Aron lokola Nganga-Nzambe akobonza mpe likabo yango: ezali likabo ya libela mpo na Yawe mpe bakotumba yango mobimba.
23 凡司祭自獻的素祭祭品應全焚燒,決不可吃。」司祭對贖罪祭的權利
Mbeka nyonso oyo Nganga-Nzambe akobonza na mobimba na yango ekoliama te, ezala ata ndambo na yango. »
24 上主訓示梅瑟說:
Yawe alobaki na Moyize:
25 「你告訴亞郎和他的兒子們說:關於贖罪祭的法律如下:贖罪激應在宰殺全燔祭犧牲的地方,在上主面前宰殺:這是至聖之物。
« Loba na Aron mpe na bana na ye ya mibali: ‹ Tala mobeko ya mbeka mpo na masumu: ‘Bakokata kingo ya mbeka mpo na masumu liboso ya Yawe, na esika oyo bakataka bakingo ya bambeka ya kotumba; ezali mbeka ya bule penza.
26 奉獻贖罪祭犧牲的司祭,應吃這犧牲,應在聖處,應在會幕庭院內吃。
Nganga-Nzambe oyo azali kobonza yango mpo na masumu akolia yango na Esika ya bule, na libanda ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
27 凡與這激肉接觸的,即成為聖;若血濺在衣服上,濺有血跡的衣服,該在聖處洗淨。
Moto nyonso oyo akosimba mosuni na yango akozala bule. Soki kaka makila ya mbeka yango ezwi elamba na ye, asengeli kosukola esika oyo ezwi makila, na esika moko ya bule.
28 用為煮祭肉的陶器應打破;但若是在銅器內煮,銅器該擦光,用水洗淨。
Bongo soki basaleli nzungu ya mabele mpo na kokalinga mosuni ya mbeka mpo na masumu, bakopanza nzungu yango. Soki bakalingi yango na nzungu ya bronze, bakopalola nzungu yango mpe bakosukola yango na mayi ebele.
29 司祭家中,凡是男人都可以吃:這是至聖之物。
Kaka mibali oyo bazali na libota ya Nganga-Nzambe nde bakoki kolia yango, pamba te ezali eloko ya bule penza.
30 但是,任何贖罪祭犧牲,如果牲血帶進了會幕,為在聖所內行贖罪禮,決不可吃,應在火裡燒。
Nzokande, mbeka moko te mpo na masumu ekoki koliama soki bamemi makila na yango na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu; esengeli kotumba yango na moto.’ › »

< 利未記 6 >