< 利未記 24 >

1 上主訓示梅瑟說:「
Yawe alobaki na Moyize:
2 你吩咐以色列子民給你拿由橄欖榨的青油來,為點燈用,好叫燈光長明不熄。
« Pesa mitindo na bana ya Isalaele ete bamemela yo mafuta ya olive ya peto mpo na minda, mpo ete minda ekoka kopela tango nyonso.
3 亞郎應將燈放在會幕內,約櫃帳幔外,自晚上到早上常點在上主面前:這位你們世世代代是永久的法令。
Ezali kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, libanda ya rido oyo ezali liboso ya Sanduku ya Litatoli, nde Aron akobanda kopelisa minda tango nyonso liboso ya Yawe, kobanda na pokwa kino na tongo. Ezali mobeko ya libela mpo na milongo na bino nyonso.
4 亞郎應把這些燈放在純金台上,在上主面前長燃不熄。
Minda ekozala likolo ya etelemiselo ya minda, esalema na wolo ya peto, liboso ya Yawe; bakobongisa yango tango nyonso.
5 你應拿細麵,烤成十二個餅,每個是十分之二」厄法」;
Okozwa farine mpe okolamba bagato zomi na mibale, okosalela biteni mibale kati na biteni zomi ya efa mpo na gato moko na moko.
6 將餅排成兩行,六個一行,供在上主面前的純金桌上。
Okotanda yango na milongo mibale, gato motoba na molongo moko, likolo ya mesa oyo esalema na wolo ya peto, liboso ya Yawe.
7 每行應撒上純乳香,作為食物當獻與上主的火祭,為獲得記念。
Na molongo moko na moko, okosopa ansa ya peto oyo ekotumbama na esika ya gato lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, mpe ekozala ekaniseli.
8 每安息日,應將餅不斷地供在上主面前,這是以色列子民因永久的盟約而當行的義務。
Mikolo nyonso ya Saba, bokobonza lipa yango liboso ya Yawe na kombo ya bana ya Isalaele lokola boyokani ya libela.
9 這些應歸亞郎和他的兒子;他們應在聖地方吃,因為這是上主火祭中致聖之物,是他永享的權利。[褻聖的處罰]
Gato yango ekozala mpo na Aron mpe bana na ye ya mibali; bana na ye ya mibali bakolia yango na Esika ya bule, pamba te ezali eteni ya bule koleka kati na biteni na bango oyo bazwaka na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Ezali mobeko mpo na libela. »
10 當時在以色列子民中有一個人,他的母親是以色列人,父親是埃及人。這以色列女人的兒子在營地內與一個以色列人爭吵;
Ezalaki na mwana mobali moko oyo mama na ye azalaki moto ya Isalaele mpe tata na ye, moto ya Ejipito; apusanaki kati na bana ya Isalaele mpe abundisaki moto ya Isalaele kati na molako.
11 以色列女人的兒子咒罵褻瀆了上主的名,人們就帶他去見梅瑟,---這人的母親叫舍羅米特,是丹支派狄貝黎的女兒,---
Mwana mobali ya mwana mwasi ya Isalaele atiolaki Kombo ya Yawe mpe alakelaki yango mabe, boye bamemaki ye epai ya Moyize. Kombo ya mama na ye ezalaki « Shelomiti. » Shelomiti azalaki mwana mwasi ya Dibiri, kati na libota ya Dani.
12 將他看守起來,等梅瑟依照上主得訓令給他們處理。
Batiaki ye na boloko kino kozela ete Yawe alakisa bango mokano na Ye.
13 於是上主訓示梅瑟說:」
Yawe alobaki na Moyize:
14 你帶這犯褻瀆罪的人營外去,凡聽見他說褻瀆話的人,都按手在他頭上,然後令全體會重用石頭砸死他。
« Mema na libanda ya molako moto oyo atioli Nzambe. Bato nyonso oyo bayokaki ye, bakotia maboko na bango na moto na ye, mpe bato nyonso ya lingomba bakobamba ye mabanga.
15 你應這樣告訴以色列子民說:凡褻瀆天主的,應負罪債;
Loba na bana ya Isalaele: ‹ Soki moto alakeli Nzambe na ye mabe, amemi ngambo;
16 那不避諱」雅威「之名的,應處死刑,全體會眾應用石頭砸死他;不論外方人或本地人,若不避諱」雅威「的名,應處死刑。[報復律]
soki moto atioli Kombo ya Yawe, basengeli koboma ye: bato nyonso ya lingomba basengeli kobamba ye mabanga. Azala mopaya to mwana mboka, soki atioli Kombo ya Yawe, basengeli koboma ye.
17 凡打死的人,應處死刑。
Soki moto abomi moto, basengeli koboma ye.
18 凡打死牲畜的,應該賠償:以命還命。
Soki moto abomi nyama ya moto mosusu, asengeli kozongisa nyama ya bomoi na esika ya nyama oyo ekufi: kolanda mobeko ya bomoi mpo na bomoi.
19 人若加害自己的同胞,他怎樣待人,人也怎樣待他:
Soki moto azokisi moninga na ye, bakosala ye ndenge asalaki moninga:
20 以傷還傷,以眼還眼,以牙還牙;他怎樣害了人,人也怎樣害他。
soki abuki eteni ya nzoto, ye mpe bakobuka ye eteni ya nzoto; soki atoboli liso, ye mpe bakotobola ye liso; soki abuki linu, ye mpe bakobuka ye linu; ndenge azokisi moto mosusu, ndenge wana mpe bakozokisa ye.
21 凡打死牲畜的,應該賠償;凡打死的人,應處死刑。
Moto nyonso oyo abomi nyama ya moninga na ye, akozongisa nyama mosusu; kasi oyo abomi moto, basengeli koboma ye.
22 為你們,不論是外方人或本地人,只有一樣法律;因為我上主是你們的天主。「
Ezala mopaya to mwana mboka, bino nyonso bozali na mobeko moko; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino. › »
23 梅瑟這樣訓示了以色列子民;他們就把這犯褻瀆罪的人帶到營外,用石頭砸死。以色列子民全照上主吩咐梅瑟的做了。
Bongo Moyize alobaki na bana ya Isalaele; mpe babimisaki na libanda ya molako moto oyo alakelaki Nzambe mabe mpe babambaki ye mabanga. Bana ya Isalaele basalaki kolanda ndenge Yawe atindaki Moyize.

< 利未記 24 >