< 利未記 22 >

1 上主訓示梅瑟:」
Yawe alobaki na Moyize:
2 你告訴亞郎和他的兒子,叫他們對以色列子民獻與我的聖物應謹慎,免得褻瀆了我的聖名:我是上主。
« Talisa Aron mpe bana na ye ya mibali ndenge nini basengeli kozala mosika ya makabo oyo bana ya Isalaele babonzelaka Ngai, mpo ete babebisa te bosantu ya Kombo na Ngai ya bule; Ngai nazali Yawe.
3 你對他們說:世世代代,你們後裔中,若有玷汙不潔的,竟敢接近以色列子民獻與上主的聖物,這人應由我面前剷除:我是上主。
Loba na bango: ‹ Mpo na milongo oyo ekoya na sima mpe kati na bakitani na bino, soki moko azali mbindo mpe apusani pembeni ya makabo ya bule oyo bana ya Isalaele babonzeli Ngai Yawe, esengeli balongola moto wana na miso na Ngai. Nazali Yawe.
4 亞郎的後裔中,凡患癩病或淋病的,在他未取潔之前,不可吃聖物;凡摸過死屍所染不潔之物的,或遺精的人,
Soki moko ya bakitani ya Aron azali na bokono na poso ya nzoto lokola maba, bokono ya kobima tofina to makila na nzoto ya mibali, akoki te kolia likabo ya bule kino tango akokoma peto. Ndenge moko mpe, akozala mbindo soki asimbi eloko oyo ekomi mbindo mpo ete etuti ebembe to mobali oyo abimisi mayi ya mibali;
5 或摸了任何能染上不潔的爬蟲,或摸了能使自己染上任何不潔的人;
soki asimbi nyama oyo etambolaka na libumu mpe ekomisaka mbindo to soki asimbi moto nyonso oyo akoki kokomisa ye mbindo ata na nzela ya ndenge nini.
6 凡摸了這些東西的人,直到晚上是不潔的,除非他用水洗身,不准吃聖物。
Moto oyo akosimba eloko ya ndenge wana akozala mbindo kino na pokwa. Akoki kolia likabo ya bule te kino tango akosukola na mayi.
7 太陽一落,他就潔淨了,以後可以吃聖物,因為這是屬他的食物。
Akokoma peto tango moyi ekolala mpe sima na yango nde akoki kolia makabo ya bule, pamba te ezali bilei na ye.
8 不可吃自死或被猛壽撕裂的獸肉,免得染上不潔:我是上主。
Akoki te kolia nyama oyo ekufi yango moko to oyo nyama ya zamba ebomi, noki te akokoma mbindo na nzela na yango. Nazali Yawe.
9 他們應遵守我的訓令,免陷於罪惡;因此褻瀆訓令的,必遭死亡:我是使他們成聖的上主。
Banganga-Nzambe bakotosa malako na Ngai tango nyonso mpo ete bamema ngambo te mpe bakufa te, noki te bakokufa solo. Ngai nazali Yawe oyo abulisaki bango mpe akomisaka bango basantu mpo na mosala na Ngai.
10 任何族外人,不准吃聖物;司祭的客人和傭工,也不准吃聖物;
Moto moko te oyo azali na libota ya Banganga-Nzambe te akoki kolia makabo ya bule: ezala mopaya oyo Nganga-Nzambe abengi to mosali oyo Nganga-Nzambe azwi na mosala.
11 但是司祭用銀錢買來的僕人,卻可以吃;凡生在他家的人,也可以吃這食物。
Kasi soki Nganga-Nzambe asombi mowumbu na mbongo na ye to soki mowumbu abotami na ndako na ye, mowumbu wana akolia makabo ya bule.
12 司祭的女兒,如嫁給族外人為妻,不准吃作獻儀的聖物;
Soki mwana mwasi ya Nganga-Nzambe abali mobali oyo azali Nganga-Nzambe te, akolia te makabo ya bule.
13 但是司祭的女兒,如成了寡婦或棄婦,因沒有兒子,又回到父家,如同她年輕時一樣,可以吃她父親的食物;但是任何族外人不得吃。
Kasi soki mwana mwasi ya Nganga-Nzambe akufisi mobali to akabwani na mobali, bongo amiboteli mwana te mpe azongi kovanda na ndako ya tata na ye lokola tango azalaki elenge, akoki kolia biloko ya ndenge moko na tata na ye; kasi moto oyo azali Nganga-Nzambe te akolia yango te.
14 如果一人因不慎而吃了聖物,應償還所吃的聖物,還應另加五分之一,交與司祭。
Soki moto alie likabo ya bule na kozanga koyeba, asengeli kozongisa epai ya Nganga-Nzambe motuya ya likabo yango mpe akobakisa eteni moko kati na mitano ya motuya na yango.
15 司祭不應讓以色列子民褻瀆所獻與上主的聖物,
Banganga-Nzambe basengeli te kobebisa lokumu ya makabo ya bule oyo bana ya Isalaele babonzeli Yawe.
16 而使他們應吃自己獻的聖物,負起賠償的罪債;因為我是使他們成聖的上主。「祭牲應無瑕疵
Soki, wana bazali mbindo, balie yango, bakomemisa bana ya Isalaele ngambo oyo ekosala ete bapesa likabo mpo na kozongisa boyokani, pamba te ezali Ngai Yawe nde nabulisaka bango mpo na mosala na Ngai. › »
17 上主訓示梅瑟說:」
Yawe alobaki na Moyize:
18 你告訴和亞郎和他的兒子,以及全體以色列子民說:以色列家中或住在以色列中的外方人,任何人如奉獻祭品,不管是為還願,或出於自願,獻給上主作全番祭的,
« Yebisa Aron, bana na ye ya mibali mpe bana nyonso ya Isalaele: ‹ Soki moto ya Isalaele to mopaya oyo azali kovanda kati na Isalaele alingi kobonza mbeka ya kotumba epai na Yawe mpo na kokokisa ndayi to likabo oyo apesi kolanda mokano ya motema na ye moko,
19 應是一隻無暇的公牛,公綿羊,或公山羊,方蒙悅納。
asengeli kobonza nyama ya mobali oyo ezangi mbeba kati na bangombe, bameme to bantaba mpo ete Nzambe andima yango.
20 凡身上有殘疾的,你們不應奉獻,因為這樣為你們決不會獲得悅納。
Asengeli te kobonza nyama oyo ezali na mbeba, pamba te ekondimama te.
21 如有人為還願,或出於自願,給上主奉獻牛羊作和平祭品,應是無暇的,方蒙悅納;身上不應有任何殘疾。
Ndenge moko mpe, soki moto alingi kobonza epai na Yawe mbeka ya boyokani oyo azwi kati na bangombe, bameme to bantaba, mpo na kokokisa ndayi to likabo oyo apesi kolanda mokano ya motema na ye moko, nyama yango esengeli kozala ezanga mbeba.
22 眼瞎的或殘廢的,或斷肢的,或患潰瘍的,或生痲疹的,或長癬疥的:這樣的牲畜,你們不可獻給上主;任何這樣的牲畜,不可放在祭壇上,獻給上主作火祭。
Bokobonza te epai na Yawe nyama oyo ekufa liso to ezoka, oyo ezali kotambola tengu-tengu to oyo ezali na bokono na poso ya nzoto, oyo ezali na makwanza to na mapalata; bokoki te kotia nyama ya boye na likolo ya etumbelo lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe.
23 一腿太長或太短的牛或羊,你可現為自願祭祭品;但為還願,必不被悅納。
Nzokande bokoki mpe te kobonza mpo na Yawe lokola likabo oyo bopesi kolanda mokano ya mitema na bino moko, ngombe ya mobali to meme oyo ezali na makolo to maboko ekokana te. Mbeka ya boye ekoki kondimama te mpo na kokokisa ndayi.
24 此外,凡睪丸傷壞,砸碎,破裂,割去的牲畜,你們不可獻給上主;在你們的地域內,萬不可舉行這樣的祭獻,
Bokobonza kaka epai na Yawe, nyama oyo mapumbu na yango bafina penza to banika, balongola to bakata; bokoki kosala bongo te kati na mboka na bino moko.
25 也不可由外邦人手內接受這樣的牲畜,獻給你們的天主作供物,因為身上殘廢的,有缺陷的,為你們不會獲得悅納。」
Bokoki kondima nyama ya lolenge oyo te na maboko ya bapaya mpo na kobonza yango epai na Yawe lokola bilei ya Nzambe na bino. Ekoki kondimama te, pamba te ezali na mbeba. › »
26 上主訓示梅瑟說:
Yawe alobaki na Moyize:
27 「幾時牛或綿羊或山羊一生下,應七天同其母在一起;自第八天,作為上主的火祭祭品,方蒙悅納。
« Soki mwana ngombe, mwana meme to mwana ntaba ebotami, ekosala mikolo sambo epai ya mama na yango, bongo na mokolo ya mwambe, ekondimama lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe.
28 牛羊及其幼雛,不可在同一日內宰殺。
Bokoki te kokata kingo ya ngombe ya mwasi to ya meme ya mwasi mokolo moko na mwana na yango.
29 幾時你們給上主奉獻感恩祭,應這樣奉獻,才獲得悅納:
Tango bokobonza mbeka ya kozongisa matondi epai na Yawe, bobonza yango na lolenge oyo ekosala ete Nzambe andima bino.
30 祭肉,應在當天吃完,不應留到次日早晨:我是上主。
Esengeli bolia yango kaka mokolo wana. Bokotika eloko moko te kino na tongo. Nazali Yawe.
31 你們應遵守我的命令,一一依照執行:我是上主。
Bobatela mitindo na Ngai mpe bosalela yango. Nazali Yawe.
32 不要褻瀆我的聖名,叫我在以色列子民中常被尊為聖;我是使你們成聖的上主,
Bokobebisa te lokumu ya Kombo na Ngai ya bule, mpo ete bana ya Isalaele bayeba solo ete Ngai nazali Mosantu. Ezali Ngai Yawe nde nabulisaki bino.
33 是我由埃及地領你們出來,為作為你們的天主:我是上主。」
Nabimisaki bino na mokili ya Ejipito mpo ete nazala Nzambe na bino. Nazali Yawe. »

< 利未記 22 >